Galatians 3

MAKOMI ELAKISI POLELE ETE MOTO AKOMAKA SEMBO KAKA NA KONDIMA

Na Nzela Ya Mibeko To Na Nzela Ya Kondima ?

1Bato ya Galatia, bozali liboma ! Nani aloka bino ? Nzoka nde, balimboklaki bino polele penza ndenge babakaki Klisto na ekulusu. 2Nalingi kotuna bino kaka motuna moko : Bozwaki Molimo na nzela ya kotosa Mibeko, to na nzela ya kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? 3Ndenge nini bokomi liboma boye ? Bobandaki na molimo, bongo bolingi kosukisa sikʼoyo na makasi na bino moko ? 4Boni, bonyokwamaki mingi kaka pamba soki ya solo ete ezalaki kaka mpo na pamba ? 5Nzambe oyo apesaki bino Molimo na ye mpe asalaki makamwisi kati na bino, bokanisi ete asalaki yango mpo botosaka Mibeko, to mpo bondimaki Sango Malamu oyo boyokaki ?

Ndakisa Ya Abrayami

6Botala Abrayami : “andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe andimaki ye lokola moto na sembo.” 7Bongo, boyeba ete baoyo bazali na kondima bango nde bazali penza bana ya Abrayami. 8Makomi elobaki yango liboso ete, tango ekoka, ete Nzambe akokomisa sembo bato ya bikolo ya bapaya na nzela ya kondima, mpe liboso penza, ayebisaki Abrayami sango malamu oyo : “Bato ya bikolo nyonso bakozwa mapamboli na nzela na yo !” 9Yango wana, baoyo bazali na kondima basiʼbazwa mapamboli elongo na Abrayami moto ya kondima. 10Kasi baoyo batiaka elikya na kotosa Mibeko, bango nyonso bazali na nse ya lisumu ; pamba te ekomama : “elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo akokoba te kosala makambo nyonso oyo ekomama na buku ya Mibeko.” 11Boye ezali polele ete : na miso ya Nzambe moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya Mibeko, pamba te : “Moto na sembo akozala na bomoi mpo na kondima !” 12Kasi Mibeko ewuti na kondima te, nzoka nde : “Moto oyo akosala makambo oyo Mibeko etmiindaka, akozala na bomoi na nzela na yango.” 13Klisto akangola biso na lisuma oyo Mibeko ezalaki komemisa biso, awa akomaki lisuma mpo na biso, pamba te ekomama : “Elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo babaki na nzete.” 14Esalamaki bongo, mpo ete kati na Klisto Yesu, lipamboli ya Abrayami ekomela bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete tozwa na nzela ya kondima Molimo oyo Nzambe alakaki.

Mibeko Mpe Elaka

15Bandeko na ngai, tika nazwa ndakisa moko ya makambo oyo tomonaka mokolo na mokolo : soki moto asili kokoma mokanda mpo na koyokana likambo moko na moninga na ye, moto moko te akoki kolongola to kobakisa makambo mosusu na likolo ya makambo oyo esiʼekomamaki. 16Nzoka nde, Nzambe atiaki bilaka na ye na Abrayami mpe na mokitani na ye. Makomi eloba ete : “Na bakitani na ye”, lokola nde ezalaki mpo na bato ebele ; kasi “‘Na mokitani na yo’, elakisi moto moko kaka : ye nde Klisto.” 17Nalingi koloba boye : Mibeko oyo eyaki sima ya bambula nkama minei na ntuku misato, ekoki koboma te boyokani oyo Nzambe atia liboso penza na Abrayami, na ndenge ete ekomisa elaka eloko pamba. 18Pamba te, soki bomengo oyo Nzambe apesaka ezwamaka na nzela ya Mibeko, wana bomengo oyo Nzambe apesaka eleki kozwama te na nzela ya elaka. Kasi Nzambe kati na ngolu na ye, apesaki yango na Abrayami na nzela ya elaka. 19Bongo mpo na nini Mibeko ? Babakisaki yango mpo na kolakisa soki lisumu ezali eloko nini, kino tango mokitani oyo Nzambe apeselaki elaka ayaki. Nzambe asaklaki baanzelu mpo na kopesa Mibeko na moto oyo azongisaka boyokani. 20Nzoka nde, moto oyo azongisaka boyokani azalaka mozongisi ya boyokani kaka ya moto moko te ; kasi Nzambe azali moko. 21Bongo Mibeko, etekmelaka bilaka ya Nzambe ? ata moke te ! Pamba te, soki ezali na mobeko mpe epesamaki oyo ekokaki kopesa bomoi, wana moto akokaki kokoma sembo na nzela ya mobeko. 22Kasi Makomi elobi ete, mokili mobimba ezali na boloko ya masumu, mpo ete elaka epesama na bandimi na nzela ya kondima Yesu Klisto.

Kondima Mpe Bomengo Ya Bolamu Oyo Balakaki Biso

23Liboso ete kondima eya, tozalaki na boloko ya Mibeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama. 24Yango wana, Mibeko ezalaki mokengeli oyo ezalaki na mokumba ya komema biso na Klisto, mpo ete tokomisama na nzela ya kondima. 25Kasi lokola kondima eyaki, tozali lisusu te na nse ya bokonzi ya Mibeko. 26Pamba te, bozali bino nyonso bana ya Nzambe na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu. 27Pamba te, bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto, bosiʼbolata Klisto. 28Yango wana, bokeseni ezali lisusu te kati na bayuda na bagreki, kati na bawumbu na bato ya bonsomi, kati na mibali na basi, pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Klisto Yesu. 29Soki bozali bato ya Klisto, bozali mpe bana ya Abrayami, mpe bokozwa biloko oyo Nzambe alakaki.
Copyright information for LinMNB