Galatians 4

1Makambo oyo nazali koloba, elobi boye : na tango moto oyo batikeli bomengo azali nanu mwana moke, azali na bokeseni te na mowumbu, ata ye nde azali nkolo ya biloko nyonso ; 2akotikala na maboko ya bato oyo bakobanda kobatela ye mpe kotala bomengo oyo batikeli ye kino tango akokokisa bambula oyo tata na ye akataki. 3Biso mpe ndenge moko, tango tozalaki nanu bana mike, tozalaki na nse ya bowumbu ya molimo oyo ekambaka mokili. 4Kasi awa tango Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na ye, abotamaki na mwasi, na nse ya bokonzi ya Mibeko, 5mpo ete akangola bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi ya Mibeko, mpo tokoka kokoma bana na Nzambe. 6Mpe lokola bozali bana na ye, Nzambe atindaki na kati ya mitema na biso Molimo ya Mwana na ye, oyo agangaka : “Abba”, elingi koloba “Tata”. 7Yango wana, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe, soki ozali mwana, Nzambe akokomisa yo mpe mokitani ya bomengo.

Polo Amitungisi Mpo Na Bandeko Ya Galatia

8Liboso, tango boyebaki Nzambe te, bozalaki bawumbu ya biloko oyo, na lolenge na yango, ezalaki banzambe te. 9Kasi sikʼoyo boyebi Nzambe, to nakoki koloba ete, sikʼoyo Nzambe ayebi bino, bongo ndenge nini bozongeli lisusu milimo oyo ezangi nguya mpe tina, mpo bokoma lisusu bawumbu na yango ? 10Bozali kotosa mikolo, basanza, batango mpe bambula ! 11Nazali kobanga mingi mpo na bino, mpo ete tango mosusu, mosala oyo nasalaki epai na bino ekka kaka, pamba. 12Bandeko na ngai, nabondeli bino ete bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe nazali lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te. 13Boyebi malamu ete ezali maladi nde epesaki ngai nzela mpo na koteya bino Sango Malamu na mbala ya liboso. 14Mpe ata maladi na ngai ezalaki motungisi mpo na bino, kasi botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te, nzoka nde boyambaki ngai lokola anzelu ya Nzambe, lokola ye moko Klisto Yesu. 15Esengo oyo ezalaki kati na biso ekeyi wapi ? Pamba te, nazali kotatola yango ete : soki yango ekokaki kosalama, mbek bolingaki kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango. 16Bongo sikʼoyo nakomi monguna na bino mpo nazali kolobela bino makambo ya solo ? 17Bato wana bazali kotia molende mpo babenda bino, kasi mpo na makanisi ya malamu te. Balingi kaka bakabola bino na ngai, mpo bokangama na bango. 18Ezali malamu kozala na molende, na makanisi ya malamu, mpe kozala bongo tango nyonso, kasi kaka te soki nazali na bino elongo. 19Bana na ngai ya bolingo, nazali lisusu koyoka pasi mingi mpo na bino lokola mwasi oyo alingi kobota, kino tango Klisto akosalama kati na bino. 20Nazali na posa mingi mpo na kozala sikʼoyo elongo na bino, mpe kobongola elobeli na ngai, pamba te nazali kokamwa mingi mpo na bino.

Boyokani Ya Bowumbu Na Boyokani Ya Bonsomi

21Bino baoyo bolingaka kozala na nse ya bokonzi ya Mibeko, boyebisa ngai nanu : boyokaka te makambo oyo Mibeko eloba ? 22Pamba te, ekomama ete Abrayami azalaki na bana mibale ya mibali, moko na mwasi oyo azalaki ya bowumbu, mpe mosusu na mwasi ya bonsomi. 23Mwana ya mwasi ya bowumbu abotamaki lokola bato nyonso ; kasi mwana ya mwasi ya bonsomi abotamaki mpo na elaka oyo Nzambe apesaki. 24Tolimbola yango lokola lisese : basi wana mibale bazali kolakisa boyokani mibale. Boyokani oyo ewutaki na ngomba ya Sinai mpe ebotaki bana ya bowumbu : yango nde Agar. 25Bongo Agar azali lokola ngomba ya Sinai oyo ezali na mokili ya Arabia. Akokani na mboka ya Yeruzakm ya sikʼoyo, pamba te ezali na bowumbu elongo na bana na yango. 26Kasi Yeruzakm ya Likolo ezali na bonsomi ; mpe yango nde ezali mama na biso. 27Pamba te, ekomama : “Yo mwasi oyo obotaka te, sepela, sepela mingi mpe ganga makasi, Yo mwasi oyo nanu oyoki pasi ya kobota te. Pamba te, bana ya mwasi oyo basundola bakozala mingi penza, koleka bana ya mwasi oyo azali na libala.” 28Nzoka nde bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka lokola Izaki. 29Na tango wana, mwana oyo abotamaki ndenge bato nyonso babotamaka, azalaki konyokola mwana oyo abotamaki na nguya ya Molimo. Ezali mpe ndenge moko mpo na sikʼoyo. 30Kasi Makomi ezali koloba nini ? “Bengana mowombu na mwana na ye, pamba te mwana ya mowumbu akokaki kozwa bomengo te elongo na mwana na mwasi ya bonsomi.” 31Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana na mwasi ya bowumbu te, kasi bana na mwasi ya bonsomi.
Copyright information for LinMNB