Galatians 5

BOMOI NA NZELA YA MOLIMO

Tozali Na Bonsomi Kati Na Klisto

1Klisto asiʼakangola biso mpo tozala na bonsomi ya solo. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te. 2Ngai Polo nayebisi bino boye : soki bozali kokatisa nzoto, wana Klisto azali lisusu na tina te mpo na bino. 3Nazali koyebisa bino lisusu ete, moto nyonso oyo akokatisa nzoto, asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mibeko etindaka. 4Bino bato oyo bolukaka kokoma bato na sembo mpo na kotosa Mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto mpe bolongwe na nse ya ngolu ya Nzambe. 5Pamba te, biso na nzela ya Molimo, tozali kozela na elikya nyonso ete tokoma sembo mpo na kondima. 6Pamba te, kati na Klisto Yesu, ata tokatisi nzoto to tokatisi te, nyonso wana ezali na tina te. Kasi likambo eleki na tina ezali nde kondima oyo emonanaka na nzela ya bolingo. 7Bozalaki kokima mbangu malamu, bongo nani atekmisaki bino mpo ete botika kotosa makambo ya solo ? 8Likambo ya ndenge wana ewuti te na moto oyo abengaki bino. 9“Mwa kisi ya mapa ya moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.” 10Nazali na elikya kati na Nkolo ete, bokozala na makanisi mosusu te. Kasi moto oyo ayeli bino mobulu, azala nani, akozwa etumbu. 11Bandeko na ngai, soki ya solo ete nazali nanu koteya ete kokatisa nzoto ezali na tina, bongo mpo na nini bazali konyokola ngai ? Soki ezali bongo, wana mabe oyo bato bayokaka na mitema mpo na mateya ya ekulusu ezali na tina te. 12Nalingi ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino, balongola bango moko mbuma na bango ya mibali.

Molimo Mpe Nzoto Ya Masumu

13Pamba te, bino bandeko na ngai, bobengama mpo bozala na bonsomi, esengeli te ete bosalela bonsomi na bino lokola nzela mpo na kosalela mosuni, kasi bosalisana bino na bino kati na bolingo. 14Pamba te, Mibeko nyonso ezali kokokisama na mobeko oyo moko : “Linga moninga na yo lokola yo moko.” 15Kasi soki bozali kozokisana mpe komipasola, bokeba soki te bokobomana bino na bino. 16Kasi nalobi na bino boye : botika Molimo atambusa bomoi na bino, na bongo bokotosa te kosala makambo oyo baposa ya nzoto etindaka. 17Pamba te, baposa ya nzoto elingaka makambo oyo Molimo alingaka te ; ndenge moko mpe Molimo alingaka makambo oyo baposa ya nzoto elingaka te. Bango mibale bazali na etumba, mpo ete bokoka te kosala makambo oyo bolingaka kosala. 18Kasi soki Molimo azali kotambusa bino, bokozala na nse ya bokonzi ya Mibeko te. 19Misala ya nzoto emonanaka na : ekobo, makambo ya bosoto, kindumba, 20kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, kotiana tembe, kokabwana, kolongwa na mateya ya solo, 21likunya, kolangwa masanga, lokoso, na makambo mosusu oyo ekokani na oyo wana. Nazali kokebisa bino ndenge nakebisaki bino liboso ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. 22Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, kosalisana, kosala bolamu, bosolo, 23boboto, mpe komibatela. Mpo na makambo ya ndenge oyo, Mibeko ezali te. 24Baoyo bazali bato ya Klisto, basila kobaka nzoto elongo na baposa na yango mpe bilukla nyonso. 25Lokola tozali na bomoi na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.

Tosala Mpo Na Bolamu Ya Bato Nyonso

26Tozala bato ya lofundu te, totika kotumolana biso na biso, mpe toyokelana zuwa te.
Copyright information for LinMNB