Galatians 6

1Bandeko, soki bokangi moto moko na mabe, bino baoyo bozali kotambusama na Molimo na Nzambe, bozongisa ye na nzela ya malamu, na boboto nyonso. Mpe, mikebisa, soki te Satana akomeka mpe yo. 2Bosalisana bino na bino mpo na komemana mikumba. Na ndenge wana, bokokokisa mobeko ya Klisto. 3Soki moto akanisi ete azali moto monene, nzoka nde azali moto ya pamba, azali komikosa ye moko. 4Tika ete moto na moto atala malamu-malamu misala na ye, bongo nde akoki komikumisa ; amikumisa kaka mpo na ye moko, kasi mpo na bato mosusu te. 5Pamba te, moto na moto akomema mokumba na ye moko. 6Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba, akabela moteyi na ye ndambo ya biloko na ye nyonso. 7Bomikosa te : basakanaka na Nzambe te ; pamba te, oyo moto alonaka, yango mpe akobuka. 8Pamba te, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa nzoto na ye, akobuka mpe oyo nzoto ebotaka : libebi. Kasi oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo, akobuka mpe oyo Molimo abotaka : bomoi ya seko. 9Bongo tokmba te mpo na kosala makambo ya malamu, pamba te, na tango malamu, tokobuka mbuma soki tokmbi te. 10Yango wana, lokola tozali nanu na tango, tosala makambo ya malamu na bato nyonso, kasi koleka epai ya bato oyo bazali bato ya libota ya bandimi.

Makebisi Ya Suka Mpe Mbote

11Bomoni makomi oyo ya minene, ezali na loboko na ngai moko nde nakomeli bino. 12Baoyo batindaka bino na makasi mpo bokatisa nzotu, bazali bato oyo balukaka kaka koyebana na miso ya bato. Basalaka bongo kaka mpo banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto. 13Pamba te, baoyo wana bakatisa nzoto, bango moko batosaka Mibeko te. Kasi balingi ete bokatisa nzoto, mpo bamikumisa na nzoto na bino. 14Kasi ngai, soki nakomikumisa, namikumisaka kaka mpo na ekulusu ya Nkolo na biso Yesu Klisto ; pamba te, na nzela na yango, nde mokili babaka yango na ekulusu mpo na ngai ; mpe ngai babaka ngai na ekulusu mpo na mokili. 15Pamba te, kokatisa nzoto to kokatisa te, ezali na tina soki moke te, kasi likambo ya tina, ezali nde kokoma ekelamo ya sika. 16Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe ezala na bato oyo balandaka motindo oyo, ezala mpe na Isalaele ya Nzambe ! 17Banda lelo, moto atungisa ngai lisusu te, pamba te nazali komema bikmbo ya bapota ya Yesu na nzoto na ngai. 18Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto ezala na bino. Amen.
Copyright information for LinMNB