Hebrews 10

Mbeka ya Kristo eleki mibeko

1Mibeko ezali kaka elilingi ya makambo ya malamu oyo ezali koya, kasi ezali bosolo na yango penza te. Yango wana, Mibeko ekoki ata moke te na nzela ya mbeka ya ndenge moko, oyo bapesaka tango nyonso, mbula na mbula, kokomisa baoyo bayaka pene-pene ya Nzambe bato ya kokoka. 2Soki Mibeko ekokaki, mbele baoyo bapesaka bambeka wana balingaki banda kala kotika kopesa yango. Pamba te, awa balingaki kokoma peto mbala moko mpo na libela, balingaki lisusu kokanisa-kanisa masumu na bango te.

3Kasi bambeka wana ezalaki mbula na mbula kobimisa masumu na makanisi ya bato. 4Pamba te, ekokaki kosalama te ete makila ya bangombe na oyo ya bantaba elongola masumu. 5Yango wana tango Kristo ayaki na mokili, alobaki : Olingaki mbeka mpe makabo te :
kasi osalaki nzoto mpo na ngai.

6 Osepelaki na bambeka ya kotumba te,
mpe bambeka mpo na masumu.

7 Bongo nalobaki :
Tala,
nazali koya
kati na mokanda
ekomama mpo na ngai
ee Nzambe, naye mpo na kosala
mokano na yo.

8Alobaki liboso : Bambeka, makabo, bambeka ya kotumba, mpe bambeka mpo na masumu, olingaki yango te, mpe osepelaki na yango te. Nzokande, bambeka yango ezalaki kopesama na ndenge Mibeko ezalaki kotinda. 9Bongo alobaki : Tala, nazali koya mpo na kosala mokona na yo. Boye, alongolaki bambeka nyonso ya kala mpe atie mbeka ya Kristo na esika na yango.

10Mpe azali mpo na mokano wana, nde bakomisi biso basantu na nzela ya mbeka oyo Yesu Kristo apesaki nzoto na ye moko mbala moko mpo na libela. 11Nganga-Nzambe nyonso atelemaka mokolo na mokolo mpo na kosala mosalana ye, mpe kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ekoki ata moke te kolongola masumu. 12Kasi Kristo, tango apesaki mbeka moko kaka mpo na masumu, avandaki na lokobo ya mobali ya Nzambe. 13Banda tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na yeesika oyo makolo na ye eniataka.

14Pamba te na nzela ya likabo kaka moko, akomisaki mpo na libela, baoyo ye apetolaki na masumu, bato ya kokoka. 15Molimo Mosantu mpe azali kopesa biso litatoli na ye. Alobaki liboso :
16 Tala boyokani
oyo nakotia elongo na bango
sima ya mikolo wana,
Nkolo alobi bongo.
Nakotia Mibeko na ngai
na mitema na bango,
mpe nakokoma yango
likolo ya makanisi
na bango.

17Bongo abakisaki : Nakokanisa masumu na bango
mpe mabe na bango lisusu te.

18Nzokande, kuna epai ezali bolimbisi ya masumu, likabo ya kopesa mpo na lisumu, ezali lisusu te.

KONDIMA MPE KOYIKA MPIKO

Tobwaka elikya na biso te

19Yango wana bandeko, lokola tozali na elikya mpo na kokota na Esika eleki bosantu, na nzela ya makila ya Yesu, 20na nzela ya sika mpe ya bomoi, oyo afungolelaki biso na rido, yango nde nzoto na ye moko, 21mpe lokola tozali na Mokonzi ya banganga-Nzambe oyo bapesa mokumba ya ndako ya Nzambe, 22topusana pene-pene ya Nzambe na motema sembo, na elikya nyonso oyo kondima epesaka, elongo na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe nzoto oyo esokolami na mayi ya peto.

23Tosimba makasi elikya oyo tondimaka ete ezali ya solo. Pamba te ye oyo apesa biso bilaka akosaka te. 24Tokengelana moko na moko na kosalisana biso na biso mpo na kolakisa bolingo mpe kosala misala ya malamu.

25Tokima mayangani na biso te ndenge bato mosusu bameseni kosala, kasi tolendisana moko na moko, awa bomoni ete Mokolo ya Nkolo ezali kopusana.

26Pamba te, sima ya koyeba makambo ya solo, soki tosali masumu na nko, mbeka mosusu etikali te mpo na masumu, 27kasi esengeli kaka tozela na nsomo penza kosambisama mpe motoya makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.

28Moto oyo aboyaka kotosa Mibeko ya Moise, babomaka ye mpe bayokelaka ye mawa te, soki batemwe mibale to misato batatoli mpo na ye. 29Bongo bokanisi etumbu ya makasi ya ndenge nini moto oyo akozwa, ye oyo atioli Mwana ya Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani oyo ekomisaki ye moto ya peto mpe afingi Molimo ya ngolu ?

30Pamba te toyebi ye oyo alobaki : Ngai moto nakozongisa mabe ; mpe ngai moto nakofuta. Mpe lisusu : Nkolo akosambisa bato na ye.

31Ezali likambo moko ya nsomo penza soki moto akueyi na maboko ya Nzambe ya bomoi !

32Bokanisa lisusu mikolo ya liboso : na mikolo yango, sima ya kozwa moi ya Nzambe, boyikaki mpiko na etumba monene ya bapasi. 33Pamba te tango mosusu bazalaki kofinga bino mpe konyokola bino na miso ya bato ; tango mosusu mpe bozalaki komona pasi elongona bato oyo bazalaki koniokwama ndenge wana. 34Pamba te, bosanganaki na bapasi oyo bato ya boloko bazalaki komona, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola bino biloko nabino, mpo boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko penza mpe oyo ekowumela libela na libela.

35Bongo bobwaka elikya na bino te ; Pamba te elikya yango ezali na lifuti moko ya monene penza. 36Pamba te, bozali na posa ya kokanga motema, mpo ete, sima ya kokokisa mokano ya Nzambe, bokoka kozwa biloko oyo alakaki.
37 Pamba te, etikali moke, moke penza,
Ye oyo azali koya akoya,
mpe akowumela te.

38 Kasi moto na sembo
akozala na bomoi
na nzela ya kondima.
Mpe soki azongi nsima,
nakosepela na ye te.

39Biso tozali na molongo ya baoyo bazongaka sima te mpo na kobunga, kasi tozali na molongo ya baoyo bandimaka mpe basiʼbabika.
Copyright information for LinMNB