Hebrews 12

Kokima mbangu na molende nyonso

1Yango wana, lokola batemwe ebele penza bazingi biso, tobwaka mikumba nyonso mpe masumu oyo ezingi biso bipai na bipai, mpe tokima mbangu na molende nyonso na momekano ya mbangu oyo ezali liboso na biso. 2Tika ete miso na biso etala kaka Yesu, ye oyo azali moto oyo abandaka mpe akokisaka kondima na biso, ye oyo, mpo na esengo oyo ezalaki liboso na ye, akangaki motema tango babomaki ye na ekulusu, ayokaki soni te, mpe sikʼoyo avandi na loboko ya mobali ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe.

3Bokanisa ye oyo akangaki motema liboso ya tembe ya ndenge wana epaiya bato ya masumu, mpo ete bolemba te mpe bokweyisa molende na bino te. 4Na etumba na bino na masumu, moto moko te naino abundi etumba kino makila etanga. 5Boni, bosiʼbobosana maloba ya kolendisa oyo Nzambe alobaki nabino lokola bana na ye ? Mwana na ngai,
kotiola etumbu ya Nkolo te,
mpe kolemba te
tango ye azali kopamela yo.

6 Pamba te Nkolo apesaka etumbu
na baoyo ye alingaka,
mpe abatelaka
baoyo nyonso
ye ayebi ete
bazali bana na ye.

7Bokanga mitema na bapasi na bino : Nzambe azali kosalela bino lokola bana. Pamba te, mwana nini oyo tata apesaka ye etumbu te ? 8Soki bapesaka bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, wana elakisi ete bozali bana ya makangu, kasi bana penza te.

9Kutu biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni ; bazalaki kopesabiso bitumbu, mpe tozalaki kotosa bango mpo na yango. Bongo tokoleka kotosa te Tata na biso ya Likolo mpo tozala na bomoi ? 10Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge bango moko bazalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na ye.

11Moto moko te soki bapesi ye etumbu amonaka yango lokola likambo ya esengo, ezalaka likambo ya mawa. Kasi na sima, etumbu ebotaka mbuma ya bosembo mpe ya kimia, epai ya moto oyo azwaka yango.

12Yango wana, botombola maboko na bino oyo ebandi kozwa bolembu mpe bokembisamabolongo na bino oyo ebandi kolemba. 13Bosalela makolo na bino banzela oyo etengama te, mpo ete lokola oyo ezali kotambola tengu-tengu, ebeba libela te, kasi ebika.

Kozala na bomoi ya bosantu

14Bosala makasi mpo na kozala na kimia na bato nyonso mpe kozala na bomoi ya bosantu ; Pamba te soki bomoi ya bosantu ezali te, moto moto te akoki komona Nkolo. 15Bomibatela malamu mpo ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe, mpe, mpo ete mosisa moko te ya bololo ebima kati na bino, oyo ekoki kobimisa mobulu mpe kobebisa bato ebele.

16Moto moko te akoma moto ya ekobo to mpe oyo atiolaka makamboya Nzambe lokola Ezawu, oyo atekaki bokonzi na ye ya bokulutu mpo na biloko ya kolia. 17Sima na yango, ndenge boyebi, tango alingaki kozwa lipamboli na ye ; azwaki yango te, Pamba te azwaki nzela te mpo na kobongola makanisi ya tata na ye, atako alukaki yango na mayi na miso.

Bokonzi oyo ekoki koningana te

18Pamba te, naino bopusani te pene-pene na ngomba oyo bakoki kosimba mpe oyo ezali kopela moto ; to mpe na molili, to mpe na molili ya makasi penza, to mpe na mopepe ya makasi ; 19to mpe na lokito ya kelelo, to mpe na mongongo oyo ezali koloba, na ndenge ete, baoyo bayokaki yango babondelaki ete eloba na bango lisusu te. 20Pamba te, bakokaki te kosimba etinda oyo apesaki bango : Ata soki nyama asimbi ngomba, esengeli baboma yango na mabanga. 21Lokola makambo yango ezalaki nsomo mingi, yango wana Moyize alobaki : Nazali kobanga mpe kolenga.

22Kasi bino, bosiʼbopusana pene-pene na ngomba ya Siona, pene-penena Yeruzalem ya Likolo, vile ya Nzambe ya bomoi. Bosi bopusana pene-pene ya baanzelu bankoto na bankoto oyo bazali na feti, 23pene-pene na lingomba ya bana ya Nzambe ya liboso, baoyo bakombo na bango ekomama na Likolo. Bosiʼbopusana pene-penena Nzambe, zuzi ya bato nyonso, pene-pene na milimo ya bato sembo baoyobasiʼbakoma bato ya kokoka.

24Bosiʼbopusana pene-pene na Yesu Mozongisi bondeko ya Boyokani ya sika, mpe pene-pene ya makila na ye oyo esopanaki, makila oyo elobaka malamu koleka makila ya Abel. 25Bokeba : boboya te koyoka ye oyo azali koloba. Pamba te soki baoyobaboyaki koyoka ye oyo azalaki kokebisa bango na mokili, bazwaki nzela te ya kokima etumbu, bongo ndenge nini biso tokokima kozwa etumbu, soki toboyi koyoka ye oyo azali kokebisa biso wuta na Likolo ? 26Na tango wana mongongo na ye eningisaki mokili, kasi sikʼoyoapesi elaka oyo : Mbala moko lisusu, nakoningisa kaka mokili te, kasi na likolo mpe. 27Maloba oyo “mbala moko lisusu”, ezali kolakisa ete : biloko oyo ekoki koningana, oyo esalama, ekobongwana, mpo ete oyo ekoki koningana te etikala.

28Yango wana, lokola tokozwa bokonzi oyo ekoningana te, tozongisamatondi mpe tosalela Nzambe na ndenge oyo esepelisaka ye, na botosimpe na kobanga. 29Pamba te, Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.
Copyright information for LinMNB