Hebrews 13

Bitinda ndenge na ndenge

1Tika ete bolingo ya bondeko ewumela kati na bino. 2Bobosanaka te koyamba bapaya na ndenge ya malamu, Pamba te na kosala bongo, bato mosusu bayambaki baanzelu, mpe bayebaki te ete bayambaki baanzelu.

3Bokanisaka bato oyo bazali na boloko, lokola nde bino moko mpe bozalibato ya boloko elongo na bango ; bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, lokola nde bino moko mpe bozali komona pasi.

4Tika ete moto nyonso atosa libala ; mpe mbeto ya libala esengeli ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa baoyo basalaka ekobo mpe baoyo basalaka pite.

5Bozala na lokoso ya mbongo te, mpe bosepelaka na oyo bozali na yango. Pamba te Nzambe alobaki : nakotika yo te, nakosundola yo te !

6Bongo tokoki koloba na elikya nyonso : Nkolo azali mosungi na ngai,
nakobanga eloko moko te.
Bongo batu bakoki kosala
ngai nini ?

7Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba ya Nzambe. Bokanisaka bizaleli oyo bazalaki na yango mpe ndenge bakufaki, mpe bolanda ndakisa ya kondima na bango.

8Yesu Kristo azali ndenge moko, lobi, lelo, mpe libela na libela. 9Botika te ete bakosa bino na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya lokuta. Pamba te, ezali malamu ete mitema na biso ezwa makasi na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela ya kotosa te mibeko oyo etali biloko ya kolia ; Pamba te mibeko yango esalisaka te baoyo batosaka yango. 10Tozali na mesa epai topesaka makabo, mpe banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na kati ya ndako ya kapo bazali na ndingisa te mpo na kolia. 11Mokonzi ya banganga-Nzambe amemaka makila ya banyama na Esikaeleki bosantu mpo na bolimbisi ya masumu, kasi banzoto ya banyama yango bazalaki kotumba yango na libanda ya mboka. 12Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka, mpo ete akomisa bato bosantu na nzela ya makila na ye moko.

13Yango wana, biso mpe, tokende epai na ye na libanda ya mboka, mpe tondima koyoka soni oyo ye ayokaki. 14Pamba te, awa, tozali na vile oyo ya libela te, kasi tozali kolukavile oyo ezali koya. 15Yango wana na nzela ya Yesu, topesaka Nzambe tango nyonso likabooyo epesaka ye lokumu, elingi koloba : tokumisaka kombo na ye. 16Bobosanaka te kosala makambo ya malamu mpe kosalisa bato mosusu, Pamba te yango ezali makabo oyo esepelisaka Nzambe.

17Botosaka bakambi na bino mpe bolandaka mitindo oyo bapesaka bino. Pamba te, bango bazali bakengeli ya milimo na bino, mpe basengeli kotalisa Nzambe ndenge basalelaki mosala na bango. Botosa bango mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na pasi na motema te, Pamba te yango ekosalisa bino te.

18Bobondelaka mpo na biso, Pamba te toyebi solo ete mitema na biso ezali peto, mpe tolingi kozala na ezaleli ya malamu na makambo nyonso. 19Nasengi bino ete bobondela, mpo ete Nzambe apesa ngai makoki ya kozongela bino noki.

Bambote

20Tika ete Nzambe ya kimia, ye oyo, na nzela ya makila ya Boyokaniya seko, asekwisaki wuta na bakufi Nkolo na biso Yesu, oyo azali Mobateli monene ya bampate, 21apesa bino makoki ya kokokisa misala nyonso ya malamu mpo bosalamokano na ye, mpe akoka kosala kati na biso, na nzela ya Yesu Kristo, oyo ezali kosepelisa ye. Tika ete nkembo ezala na ye libela na libela ! Amen.

22Bandeko, nabondeli bino ete boyamba malamu maloba na ngai ya kolendisa, Pamba te nakomeli bino kaka mokanda ya mokuse. 23Nalingi boyeba ete ndeko na biso Timote basiʼbabimisaki ye na boloko. Soki akomi noki, nakoya elongo na ye mpo na kotala bino.

24Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.

25Tika ete ngolu na Nzambe ezala na bino nyonso ! Amen.
Copyright information for LinMNB