Hebrews 5

MOSALA YA BONGANGA-NZAMBE YA KRISTO

Kristo azali Mokonzi ya banganga Nzambe mpe mopesi ya lobiko

1Mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe baponaka ye na kati ya bato, mpe batiaka ye mpo na kosalela Nzambe mpo na bato mpo apesaka makabo mpe mbeka mpo na masumu. 2Akoki kolakisa boboto epai ya baoyo bazangi boyebi mpe basalakamabe, pamba te ye moko mpe azali na bolembu. 3Mpo na bolembu wana, yango wana asengeli kopesa mbeka mpo na masumu na ye moko, ndenge moko mpe mpo na masumu ya bato.

4Mpe, moto moko te akoki komipesa ye moko lokumu wana ; kasi esengeli Nzambe abenga ye, ndenge esalamaki na Aron. 5Ndenge moko mpe Kristo, amipesaki ye moko te lokumu ya kokoma Mokonziya banganga-Nzambe. Kaki Nzambe alobaki na ye : Ozali Mwana na ngai,
lelo nakomi Tata na yo.

6Mpe na esika mosusu, alobaki : Ozali Nganga-Nzambe
mpo na libela,
lokola Melkisedeki !

7Yesu, kati na bomoi na ye na mokili, azalaki kobondela mpe kosengana koganga makasi elongo na mayi ya miso, epai ya Nzambe oyo akokaki kobikisa ye na liwa ; mpe Nzambe andimaki mabondeli na ye mpo na botosi na ye. 8Atako azalaki Mwana ya Nzambe, kasi ayekolaki kotosa na nzela ya bapasioyo amonaki. 9Mpe awa Nzambe asilaki kokomisa ye moto ya kokoka, akomaki mopesiya lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso batosaka ye, 10mpe Nzambe aponaki ye mpo azala Mokonzi ya banganga-Nzambe lokola Melkisedeki.

Bilei ya bakolo

11Tozali na makambo mingi ya koloba mpo na likambo oyo, kasi ezali pasi mingi mpo na kolimbola, Pamba te bokomi na bolembu mingi mpo na kososola. 12Pamba te, sima ya tango nyonso oyo, esengelaki bokoma balakisi, kasi bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe. Bozali na posa ya miliki, kasi bilei ya makasi te ! 13Moto nyonso oyo azali naino komela miliki, azali naino mwana moke, mpeazali na boyebi te na mateya oyo ezali koloba mpo na bosembo. 14Kasi bilei ya makasi ezali mpo na bakolo. Bango na nzela ya kosalelayango, basiʼbasalela mayele na bango mpo na kososola makambo ya malamuna oyo ya mabe.
Copyright information for LinMNB