Hebrews 6

1Yango wana, totika mateya ya ebandeli oyo etali Kristo, mpe toluka koyeba oyo ekoki mpo na bakolo. Kasi toluka lisusu te kozongela mateya ya ebandeli lokola : kobongola motema mpe kotika misala oyo ememaka na liwa, mpe kondimela Nzambe ; 2mateya oyo ezali kolobela mpo na lolenge ya kobatisa bato, mateyaya kotiela bato maboko, ya lisekwa ya bato bakufa, mpe oyo etali kosambisama ya seko. 3Tala makambo tokosala, soki Nzambe apesi biso ndingisa.

4Pamba te, yango ekoki kosalama te mpo na baoyo basiʼbamona mwindaya Nzambe, baoyo basiʼbameka likabo ya likolo, baoyo basiʼbasangana na Molimo Mosantu, 5baoyo basiʼbameka bolamu ya Liloba ya Nzambe mpe banguya ya mokili oyoezali koya ; 6soki bakweyi, bakoka kobenda bango lisusu mpo babongola motema, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana ya Nzambe na ekulusu mpo na bango moko mpe bazali koyokisa ye soni na miso ya bato.

7Pamba te, mabele oyo emelaka mayi ya mbula oyo ekweyelaka yango mbala na mbala, mpe ebotaka mbuma ya malamu mpo na baoyo balonelaka bango yango, Nzambe apambolaka yango. 8Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka na tina te mpeezalaka ya kobongama mpo Nzambe alakela yango mabe. Mpe suka na yango, batumbaka yango.

9Balingami, ata tozali koloba boye, kasi tozali kondima makambo ya kitoko mingi mpo na bino, makambo oyo ememaka na lobiko. 10Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino, mpe bolingo oyo bolakisaki mpo na kombo na ye, tango bosalisaki basantu mpe bozali kaka kosalisa bango. 11Kasi tolingi ete moko na moko na kati na bino alakisa molende ya ndenge moko kino na suka, mpo ete makambo oyo botalaka elikya ekoma ya solo. 12Tolingi te bokoma bato ya goi-goi, kasi bolanda ndakisa ya baoyo bazali kozwa na nzela ya kondima mpe na nzela ya kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.

Elikya ya solo

13Tango Nzambe apesaki elaka na Abraham, alapaki ndayi na kombo na ye moko, Pamba te moto mosusu oyo alekaki ye, oyo ye asengelaki kolapa ndayi na kombo na ye azalaki te ; 14Alobaki : Ya solo, nakopambola yo mpe nakopesa ya bankolo ebele. 15Abraham akangaki motema, mpe na bongo, azwaki oyo Nzambe alakaki ye.

16Pamba te, bato balapaka ndayi na kombo ya moto oyo aleki bango ; mpe, ndayi elakisaka bosolo ya likambo oyo bato balobi mpe esilisaka tembe nyonso. 17Awa Nzambe alingaki kolakisa na baoyo bazwaki elaka ete mokano na ye ebongwanaka te, yango wana alakisaki bosolo na yango na kolapa ndayi. 18Nzambe asalaki bongo mpo ete, na nzela ya makambo mibale oyo ebongwanaka te, kati na oyo ekokaki kosalama te ete Nzambe akosa, biso baoyo totika makambo nyonso mpo na kokanga elikya oyo balaka biso, tokoka kolendisama mingi penza.

19Tozali na elikya yango lokola longo ya elomo, ekoki kobeba te mpe ekanga makasi penza. Ekota koleka rido, na kati ya Esika ya bosantu, 20epai Yesu, ye oyo akenda liboso na biso, mpe akota kuna mpo na biso, akoma Mokonzi ya banganga-Nzambe mpo na libela, lokola Melkisedeki.
Copyright information for LinMNB