James 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai, Zaki, mosali ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo. Natindi mokanda oyo na mabota zomi na mibale oyo bapalangana na mokili mobimba.

Komekama mpe kokanga motema

2Bandeko na ngai, bomona yango lokola likambo moko ya esengo mingi, na tango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge. 3Pamba te boyebi ete, tango kondima na bino ezali kokutana na komekama, yango ekobota kokanga motema. 4Kokanga motema esengeli esilisa mosala na yango, mpo ete bokoka kokoma bato oyo bakola mpe oyo bazali ya kokoka, mpe oyo bazangi ata eloko moko te.

Bwania mpe libondeli

5Soki moto moko na kati na bino azangi bwania, abondela Nzambe, mpe Nzambe akopesa ye yango ; Pamba te Nzambe apesaka na bato nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. 6Kasi tango azali kobondela, esengeli andima, atia tembe te. Pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale, oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. 7Moto ya ndenge wana, akanisa te ete akozwa eloko epai ya Nkolo, 8azali moto ya makanisi mibale mpe moto oyo abongwanaka-bongwanaka na nyonso oyo asalaka.

Babola mpe bato ya bomengo

9Ndeko oyo akelela esengeli atonda na esengo tango Nzambe atomboli ye, 10mpe moto oyo azali na bomengo esengeli atonda na esengo tango Nzambe akitisi ye. Pamba te moto ya bomengo akoleka lokola fololo ya elanga. 11Pamba te, ndenge tomonaka moi ebimaka na moto makasi, ekawusaka matiti, mpe fololo na yango ekweyaka, mpe kitoko na yango esilaka ; ezali mpe ndenge moko mpo na moto ya bomengo, akolimwa na kati ya misala na ye.

Komekama mpe baposa ya mabe

12Esengo na moto oyo azali kokanga motema na tango azali kokutanana komekama ; Pamba te tango akolonga komekama, akozwa ekoti ya lokumu ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka ye. 13Moto moko te, tango azali kokutana na komekama, aloba : “Nzambemoto azali komeka ngai.” Pamba te, mabe ekoki komeka Nzambe te, mpe Nzambe amekaka moto moko te. 14Kasi moto nyonso amekamaka, tango baposa na ye ya mabe ebendi ye mpe ekangi ye. 15Bongo baposa wana ya mabe soki etondi kati na moto, ebotaka lisumu. Mpo soki lisumu ekoli, ebotaka liwa. 16Bandeko balingami, bomikosa te : 17bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka na Likolo, wuta na Tata ya moi, kati na ye oyo mbongwana ezali te to mpe elilingi ya mbongwana. 18Abotaki biso na nzela ya liloba ya bosolo, na mokano na ye moko, mpo ete tozala na esika ya liboso na kati ya biloko nyonso oyo Nzambe asala.

Liloba ya Nzambe mpe kotosa

19Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : moto nyonso azala moto ya koyoka noki, kasi azala moto ya koloba noki te mpe ya kosilika noki te ; 20Pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya malamu oyo Nzambe alingaka. 21Yango wana, bobwaka bosoto nyonso mpe misala nyonso ya mabe. Mpe bondima na komikitisa nyonso Liloba oyo balonaki na kati ya mitema na bino, oyo ekoki kobikisa bino.

22Bosalaka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, kasi boyokaka yango kaka Pamba te ; soki te, bokomikosa bino moko.

23Pamba te, soki moto azali koyoka Liloba mpe azali kosala te oyo yango ezali koloba, akokani na moto oyo atali elongi na ye na tala-tala, 24mpe nsima ya komitala, akeyi na ye ; mpe kaka na tango wana abosani ndenge elongi na ye ezalaki.

25Kasi moto oyo alandelaka malamu penza Mibeko ya kokoka, oyo epesaka bonsomi, oyo atosaka yango tango nyonso, mpe abosanaka te oyo ayokaki, kasi asalelaka yango, moto wana akozala na esengo na nyonso oyo akosala.

26Soki moto akanisi ete azali moto oyo asambelaka, kasi ayebi kobatela lolemo na ye te, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.

27Kosambela ya peto mpe oyo ezangi bosoto na miso ya Nzambe tatana biso yangʼoyo : kosalisa bana oyo bakufela baboti mpe basi oyobakufela mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto na makambo ya mokili.
Copyright information for LinMNB