James 2

Kondima mpe misala

1Bandeko na ngai, lokola bozali bandimi kati na Nkolo na biso ya nkembo, Yesu Kristo, boponaka bilongi ya bato te. 2Ndakisa : moto moko akoti na mayangani na bino, alati bilamba ya kitoko penza, na pete ya wolo ; mpe, moto moko akelela akoti ; alati bilamba ya bosoto penza, 3soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya kitoko mpe bolobi na ye : “Tala esika ya kitoko mpo na yo”, kasi bolobi na moto oyoakelela : “Yo, telema kuna” to “Vanda awa na mabele, na esika oyo natiaka makolo na ngai” ; 4Boni, wana bopona bilongi te kati na bino ? Mpe bokomi bazuzi te oyo bazali na makanisi ya mabe ?

5Bandeko balingami boyoka : boni, Nzambe apona te bato oyo bazali ya kokelela na mokili mpo ete bakoma bato ya bomengo kati na kondima, mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya baoyo balingaka ye ? 6Kasi bino, bomonaka bato bakelela bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na batribinale, ezali bato ya bomengo te ? 7Boni, ezali bango te bato batiolaka nkombo ya kitoko oyo Nzambe apesa bino ?

8Nzokande, soki bozali kokokisa Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi : Linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko, wana, bozali kosala malamu. 9Kasi soki bozali kopona bilongi ya bato, bozali kosala masumu mpe Mibeko ezali kokweyisa bino, mpo bozali kotosa yango te. 10Pamba te, moto oyo atosaka Mibeko nyonso, soki abebisi kaka moko, abebisi mpe nyonso. 11Pamba te, ye oyo alobaki : kosala ekobo te ; alobaki lisusu : koboma te. Yango wana, soki osali ekobo te, kasi abomi moto, yeba ete obuki Mibeko nyonso.

12Bolobaka mpe bosalaka misala lokola bato oyo bakosambisa bango nanzela ya Mibeko oyo epesaka bonsomi. 13Pamba te, Nzambe akoyoka mawa te tango akosambisa moto ayokelaki bato mosusu mawa te ; kasi mawa elongaka kosambisama.

14Bandeko na ngai, litomba ezali wapi soki moto alobi azali na Kondima mpe azali kolakisa yango na misala te ? Kondima ya ndenge wana ekoki kobikisa ye ?

15Ndakisa : ndeko moko ya mobali to ya mwasi azangi bilamba ya kolata, to biloko ya kolia ya mokolo na mokolo ; 16soki moto moko na kati na bino alobi na bango : “Bokende na kimia, boyotela moto mpe bolia malamu”, kasi asali eloko moko te mpo na oyo bazali na yango posa mpo na nzoto na bango ; bongo yango ezali na litomba nini ? 17Ndenge moko mpe mpo na kondima, soki ezangi misala, ezali ya kokufa. 18Kasi moto akoki koloba : —Ozali na kondima, ngai nazali na misala.—Malamu ! Lakisa ngai kondima na yo oyo ezangi misala, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala oyo nasalaka. 19Ondimaka ete Nzambe azali moko. Ezali malamu ! Ata milimo mabe mpe bandimaka ete Nzambe azali moko, mpe balengaka. 20Yo zoba oyo, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala, ezali Pamba ? 21Boni, Nzambe akamataki nkoko na biso Abraham moto sembo te na nzela ya misala, tango akabaki mwana na ye Izaki likolo ya mesa ya makabo ? 22Omoni, kondima na ye mpe misala na ye ezalaki kosala nzela moko. Mpe kondima na ye ekomaki ya kokoka na nzela ya misala na ye. 23Bongo Makomi ekomaki ya solo, oyo ezali koloba : Abraham andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akamataki ye moto na sembo ; mpe babengaki ye moninga ya Nzambe.

24Bomoni sikʼoyo ete, moto akomaka sembo liboso ya Nzambe na Nzela ya misala, kasi na nzela ya kondima kaka te. 25Boni, ndenge moko mpe mpo na Rahabi mwasi ya ndumba, akomaki sembote na miso ya Nzambe na nzela ya misala, tango ayambaki bantoma mpe abimisaki bango na nzela mosusu ? 26Pamba te, ndenge nzoto oyo ezangi molimo ezali ya kokufa, ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala, ezali ya kokufa.
Copyright information for LinMNB