James 3

Salela lolemo na yo malamu

1Bandeko na ngai, baoyo balukaka kokoma bateyi na kati na bino, bazala mingi te, mpo boyebi ete biso baoyo toteyaka, bakosambisa bisomakasi penza. 2Biso nyonso tosalaka mabe ya ndenge na ndenge. Soki moto asalaka mabe te na maloba oyo alobaka, moto wana azali moto ya kokoka, mpe akokikobatela nzoto na ye mobimba.

3Tala, totiaka bibende na minoko ya bapunda mpo etosa biso, na bongo tokambaka nzoto na yango mobimba. 4Tokamata mpe ndakisa ya masuwa : atako ezali monene mpe mopepe ya makasi nde etindikaka yango, kasi mwa yenda ya moke penza ekoki kokamba yango, mpo elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi. 5Ndenge moko mpe, lolemo ezali mwa eteni moko ya moke na kati ya nzoto ya moto, kasi emikumisaka na makambo ya minene.

Bokanisa mpe ndenge moto ya moke ekoki kozikisa zamba monene !
6Lolemo mpe ezali moto, ezali mpe mokili ya makambo ya mabe kati na biteni ya nzoto na biso. Yango nde ebebisaka nzoto mobimba, mpe ezikisaka bomoi na biso mobimba sima ya kopelisama na moto na yango ewutaka na lifelo.

7Moto akoki kolakisa banyama ya lolenge nyonso, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu, banyama ya mayi, mpo etosa ye, mpe asiʼalakisa yango. 8Kasi mpo na lolemo, moto moko te akoki kolakisa yango mpo etosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe, elembaka te, mpe etonda na pwazo.

9Na lolemo, topambolaka Nkolo na biso mpe Tata, mpe, na yango mpe, tolakelaka mabe na bato oyo basalama na lolenge ya Nzambe. 10Lipamboli mpe elakeli mabe ewutaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, ekoki kozala bongo te. 11Boni, esika moko ekoki kobimisa mayi ya malamu mpe ya bololo ? 12Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki kobota bambuma ya Olive ? To mpe nzete ya vino ekoki kobota bafigi ? Ekoki kosalama te ete mayiya mungwa ebimisa mayi ya malamu.

Bwania oyo ewutaka epai ya Nzambe

13Nani kati na bino azali moto ya mwania mpe ya mayele ? Alakisa yango na ezaleli na ye ya malamu, mpe na misala oyo azali kosala na komikitisa oyo ewutaka na bwania. 14Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo, mpe sokibozali na molimo ya koswana, wana bomikumisaka te, mpe bobebisa makambo ya solo te na lokuta na bino.

15Bwania ya ndenge wana ewutaka epai ya Nzambe te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto mpe ya Zabolo. 16Pamba te, esika zuwa mpe molimo ya koswana ezali, esika wana mpe etondi mobulu ya lolenge nyonso mpe misala ya mabe. 17Kasi bwania oyo ewutaka na Nzambe ezali, liboso : ya peto, bongo : ya kimia, ya boboto, botosi, etondi na mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, mpe ezali na bokosi te.

18Baoyo batiaka kimia balonaka mbuma ya bosembo kati na kimia.
Copyright information for LinMNB