James 4

Keba na baposa mabe

1Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewuti te na baposa na bino ya mabe oyo ebundaka kati na banzoto na bino ? 2Bolulaka biloko, kasi bozwaka yango te. Bobomaka mpe botondi na zuwa, kasi bokokaka te kozwa oyo bino bolingaka kozwa. Boswanaka mpe bobundaka bitumba. Mpe bozwaka te, Pamba te bosengaka Nzambe te. 3Mpe tango bosengaka, bozwaka te ; mpo bosengaka na makanisi ya mabe, ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.

4Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili, ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili, amikomisi monguna ya Nzambe. 5To bokanisi ete Makomi ezali koloba Pamba ? —Nzambe alingaka na zuwa mingi penza molimo oyo atia kati na biso. 6Kasi Nzambe azali kopesa biso bolamu oyo eleki monene. —Tala makambo Makomi ezali koloba : Nzambe atelemelaka bato ya lofundu, kasi apesaka ngolu na ye na bato oyo bamikitisa.

7Botosaka Nzambe mpe botelemela Zabolo, bongo ye akokima mosika na bino. 8Boya pene-pene na Nzambe, mpe ye akoya pene-pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino. Bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino ! 9Botala mpasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa. 10Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe ye akotombola bino.

11Bandeko na ngai, botonganaka te moko na moko. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye, atongaka mpe asambisaka Mibeko. Nzokande, soki ozali kosambisa Mibeko, wana elakisi ete yo ozali moto oyoatosaka Mibeko te, kasi ozali zuzi na yango. 12Nzokande, moto oyo apesa Mibeko mpe ye oyoazali zuzi, azali kaka moko, ye oyo akoki kobikisa mpe koboma. Bongo yo ozali nani, mpo osambisa moninga na yo ?

Mateya mpo na bato ya bomengo

13Boyoka sikʼoyo bino bato bolobaka : “Lelo to lobi tokokende na vile boye, tokovanda kuna mbula mobimba mpe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi.” 14Boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Pamba te, bomoi na bino ezali nini ? Yango ezali kaka londende oyo emonanaka mwa tango moke, mpe na nsima elimwaka. 15Tala ndenge bosengeli kolobaka : “Soki Nkolo alingi, tokozala nabomoi, mpe tokosala likambo oyo to oyo wana.” 16Kasi sikʼoyo, bozali komikumisa kati na lofundu na bino. Boyeba ete, lofundu nyonso ya lolenge wana, ezali mabe. 17Bongo, moto oyo ayebi kosala makambo ya malamu, kasi azali kosala yango te, asali masumu.
Copyright information for LinMNB