John 1

LILOBA YA NZAMBE MPE TEMWE NA YANGO

1Na ebandeli Liloba azalaki mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. 2Na ebandeli Liloba azalaki elongo na Nzambe. 3Biloko nyonso esalamaki na ye ; mpe eloko moko te oyo esalama, mpe ezangaki kosalama na ye. 4Bomoi ezalaki kati na ye, mpe bomoi yango ezalaki moi ya bato. 5Moi ezali kongenga kati na molili, kasi molili esosolaki yango te.

6Nzambe atindaki moto moko ; kombo na ye ezalaki Jean. 7Ayaki lokola temwe mpo na kotatola moi, mpo ete na nzela na ye bato nyonso bakoka kondima. 8Ye moko azalaki moi te ; ayaki kaka mpo na kozala temwe ya moi. 9Moi ya solo, oyo epesaka moi na bato nyonso, eyaki kati na mokili. 10Azalaki kati na mokili, mpe mokili esalamaki na ye mpe mokili eyebaki ye te. 11Ayaki na ekolo na ye moko, kasi bato ya ekolo na ye bayambaki ye te.

12Kasi bato nyonso oyo bayambaki ye, baoyo bandimaki kombo na ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. 13Babotami bana na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te, to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.

14Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso. Tomonaki nkembo na ye, nkembo ya Mwana moko kaka, oyo ewutaki na Tata ; ye atondaki na ngolu mpe solo.

15Jean atatolaki mpo na ye. Azalaki koganga :

—Botala moto nalobaki na bino tango nalobaki : Moto oyo akoya sima na ngai aleki ngai, pamba te ye azalaki liboso na ngai.

16Mpe wuta na kotondisama ya ngolu na ye, biso nyonso tozwaki mapamboli likolo ya mapamboli. 17Pamba te, Mibeko epesamaki na nzela ya Moyize ; kasi ngolu mpe bosolo eyaki na nzela ya Yesu-Kristo. 18Moto moko naino amona Nzambe te ; kasi Mwana se moko kaka, ye oyo azali pembeni ya Tata, ye moto alakisa ye.

BIMONISELI YA LIBOSO MPE KOKOSO YA LIBOSO

Litatoli ya Jean Batiste

(Mt. 3.1-12 ; Mk. 1.2-8 ; Lk. 3.15-17)

19Tala litatoli Jean apesaki tango Bayuda batindaki banganga-Nzambe mpe balevi wuta na Yeruzalem, mpo na kotuna ye soki azali nani.

20Alobaki na bango na bosolo nyonso, awanganaki te, alobaki na bango :

—Ngai nazali Kristo te.

21Batunaki ye :

—Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ?

Jean azongisaki :

—Nazali Eliya te.

Batunaki :

—Ozali moprofeta ?

Azongisaki :

—Te !

22Bongo batunaki ye :

—Kasi ozali nani, mpo tokoka kopesa eyano na bato oyo batindaki biso. Okoloba nini mpo na yo moko ?

23Jean azongisaki :

—Ngai nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela na esobe : Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! ndenge moprofeta Ezayi alobaki yango.

24Bato oyo batindamaki bazalaki bato ya lisanga ya bafarizeo. 25Bango batunaki ye :

—Soki ozali Kristo te, Eliya te, to mpe Moprofeta te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?

26Jean azongiselaki bango :

—Ngai nazali kobatisa kati na mayi, kasi moto moko azali kati na bino, oyo boyebi te,
27ye azali koya sima na ngai, mpe nazali ya kokoka te mpo na kofungola basinga ya basandale na ye.

28Makambo oyo nyonso elekaki na Betaniya, na ngambo mosusu ya mayi ya Yordani, epai Jean azalaki kobatisa.

Yesu azali Mwana meme ya Nzambe

29Mokolo oyo elandaki, Jean amonaki Yesu azalaki koya epai na ye ; bongo alobaki :

—Botala Mwana-meme ya Nzambe, oyo alongolaka masumu ya mokili.
30Ezali mpo na ye nde nalobaki na bino : “Moto moko azali koya sima na ngai aleki ngai ; pamba te, ye azalaki liboso na ngai. 31Ngai mpe nayebaki ye te, kasi soki naye kobatisa bato na mayi, ezali mpo nalakisa ye na bato ya Isalayele.”

32Bongo Jean apesaki litatoli oyo :

—Namonaki Molimo azalaki kokita wuta na Likolo lokola pijon, mpe avandaki likolo na ye.
33Nayebaki te ete ezalaki ye, kasi Nzambe, oyo atindaki ngai mpo na kobatisa na mayi, alobaki na ngai : Moto oyo okomona Molimo akokitela ye mpe akovanda likolo na ye, ezali ye moto akobatisa na Molimo Mosantu. 34Mpe, lokola namonaki, yango wana nazali kotatola ete : moto oyo azali Mwana na Nzambe.

Bayekoli ya liboso ya Yesu

35Mokolo oyo elandaki, Jean azalaki lisusu wana elongo na bayekoli na ye mibale. 36Tango amonaki Yesu azalaki koleka, alobaki :

—Botala Mwana-Meme ya Nzambe !

37Awa bayekoli wana mibale bayokaki ndenge Jean alobaki, balandaki Yesu.

38Tango Yesu atalaki na sima, amonaki ete bazalaki kolanda ye, bongo atunaki bango :

—Bolingi nini ? Bongo bazongisaki :

—Rabi (elingi koloba Moteyi), ovandaka wapi ?

39Yesu alobaki na bango :

—Boya mpe bokomona !

Balandaki ye mpe bamonaki esika Yesu azalaki kovanda, mpe bavandaki na ye mokolo wana. Ezalaki pene-pene ya ngonga ya minei ya sima ya midi.

40Andele, ndeko ya Simon Piere azalaki moko na kati ya bato wana mibale, oyo bayokaki maloba ya Jean mpe balandaki Yesu.

41Likambo ya liboso Andele asalaki, akendaki kokutana na ndeko na ye Simon mpe alobaki na ye :

—Tomoni Masiya (elingi koloba : Kristo).

42Bongo Andele amemaki Simon epai ya Yesu. Yesu atalaki ye mpe alobaki :

—Yo ozali Simon, mwana ya Jonasi. Bakobanda kobenga yo Sefasi (elingi koloba : Libanga).

43Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galileya. Na nzela, akutanaki na Filipo, mpe alobaki na ye :

—Landa ngai !

44Filipo azalaki moto ya vile Betsayida, vile moko na Andele mpe Piere. 45Filipo akendaki koluka Natanayele mpe alobaki na ye :

—Tomoni moto oyo Moyize akomaki mpo na ye na Buku ya Mibeko, mpe oyo baprofeta bakomaki mpo na ye : Yesu ya Nazareti, mwana ya Zozefi.

46Natanayele atunaki :

—Na Nazareti ! Boni eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ?

Filipo alobaki na ye :

—Yaka mpe tala !

47Tango Yesu amonaki Natanayele azalaki koya epai na ye, alobaki mpo na ye :

—Tala moto ya Isalayele ya solo penza. Lokuta ezali kati na ye te !

48Nataneyele atunaki ye :

—Oyebi ngai ndenge nini ?

Yesu azongisaki :

—Namonaki yo tango ozalaki na nse ya nzete ya figi, liboso ete Filipo abenga yo !

49Bongo Natanayele alobaki :

—Moteyi, ozali Mwana na Nzambe ; ozali Mokonzi ya Isalayele !

50Yesu alobaki na ye :

—Ondimi mpo nalobi na yo ete namonaki yo na nse ya nzete ya Figi ? Okomona makambo ya minene koleka kutu oyo.
51Bongo alobaki lisusu :

—Ya solo nalobi na bino, bokomona likolo ekofungwama, mpe baanzelu ya Nzambe bakobanda kobuta mpe kokita likolo ya Mwana na moto.
Copyright information for LinMNB