John 10

Yesu mobateli malamu ya bameme

1Nazali koloba na bino ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na porte na yango te, kasi amataka likolo ya lopango na esika mosusu, ye azali moyibi mpe mobomi. 2Kasi ye oyo akotaka na porte, ye nde azali mobateli ya bameme.

3Mokengeli akofungolela ye porte, mpe bameme bayokaka mongongo na ye. Mpe abengaka bameme na ye na kombo na bango, mpe abimisaka yango na libanda. 4Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na bango mpe bameme balandaka ye, pamba te bayebi mongongo na ye. 5Balandaka mopaya te kasi bakimaka ye mosika, pamba te bayebi mongongo na ye.

6Yesu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.

7Yesu alobaki na bango lisusu :

—Nazali koloba na bino ya solo : ngai nazali porte ya bameme.
8Baoyo nyonso bayaki liboso na ngai bazalaki miyibi mpe babomi. Mpe bameme bayokelaki bango te. 9Ngai nazali porte ; moto nyonso oyo akokota na nzela na ngai, akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. 10Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayaki mpo ete bazwa bomoi, mpe bazwa yango ya mingi penza.

11Ngai nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu apesaka bomoi na ye mpo na bameme. 12Kasi moto oyo azali penza mobateli te, oyo asalaka kaka mpo na lifuti, mpe azali nkolo ya bameme te, soki amoni mbwa ya zamba ezali koya, akotika bameme mpe akokima. Bongo mbwa ya zamba ekokanga mpe ekopanza bameme. 13Akokima, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti, mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.

14Ngai nazali mobateli malamu ya bameme ; nayebi bameme na ngai, mpe bameme na ngai eyebi ngai, 15ndenge Tata ayebi ngai, ngai mpe nayebi Tata ! Mpe nakopesa bomoi na ngai mpo na bameme. 16Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Esengeli ete namema yango ; ekoyoka mongongo na ngai, mpe etonga ya bameme ekozala kaka moko, mpe mobateli akozala kaka mpe moko. 17Tata alingaka ngai mpo nakabi bomoi na ngai, mpo ete nazwa yango lisusu.

18Moto moko te alongoli ngai yango, kasi napesi yango na mokano na ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa yango mpe ya kozwa yango lisusu. Etinda oyo, nazwaki yango epai ya Tata na ngai.

19Bayuda bakabwanaki lisusu mpo na maloba oyo. 20Bongo mingi kati na bango bazalaki koloba :

—Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?

21Basusu bazalaki koloba :

—Maloba wana ezali ya moto oyo azali na molimo mabe te ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bato bakufa miso ?

Yesu azali Mwana na Nzambe to moto oyo azali kotiola Nzambe

22Bongo tango ekokaki oyo bazalaki kosala na Yeruzalem feti ya “Kobulisa Ndako ya Nzambe”, mpe ezalaki tango ya malili makasi. 23Yesu azalaki kotambola na lopango ya Ndako ya Nzambe, na veranda ya Salomo. 24Bayuda bazingaki ye mpe batunaki ye :

—Kino tango nini okotika mitema na biso ezala kaka likolo-likolo ? Soki ozali Kristo, yebisa biso yango polele !

25Yesu azongiselaki bango :

—Nayebisaki bino yango, kasi bozali kondima te ! Makamwisi oyo nazali kosala na kombo ya Tata, ezali kotatola mpo na ngai ;
26kasi bino bozali kondima te, pamba te bozali bameme na ngai te. 27Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai, nayebi bango, mpe elandaka ngai ! 28Nazali kopesa yango bomoi ya seko, ekokufa soki moke te ; mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na ngai ! 29Tata na ngai, oyo apesaki ngai yango, aleki nyonso na monene. Mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na ngai. 30Ngai na Tata, tozali se moko.

31Bongo Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma ye.

32Yesu alobaki na bango :

—Nalakisi bino makamwisi mingi ya minene, oyo ewutaki epai ya Tata ; bongo bolingi koboma ngai na mabanga mpo na likamwisi nini ?

33Bayuda bazongiselaki ye :

—Tolingi koboma yo te mpo na likamwisi moko boye, kasi mpo ozali kofinga Nzambe. Mpe, mpo yo ozali moto, kasi ozali koloba ete ozali Nzambe.

34Yesu alobaki na bango :

—Ekomama te na Mibeko na bino ete : Ngai nalobaki :
Bozali banzambe ?

35Nzokande, Makomi ekoki koboyama te. Soki Mibeko na bino ezali kobenga “banzambe” baoyo Liloba ya Nzambe eyelaki bango, 36bongo mpo na nini bozali koloba na ngai ete nazali kotiola Nzambe, awa nalobi : “Nazali Mwana na Nzambe,” pamba te Tata moto abulisaki ngai mpe atindaki ngai na mokili.

37Soki nasalaka te misala ya Tata na ngai, wana bondimela ngai te. 38Kasi soki nasalaka yango, bondimela yango ata soki bozali kondimela ngai te, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na Tata.

39Balukaki lisusu kokanga ye, kasi akimaki bango. 40Bongo Yesu akendaki lisusu na ngambo ya mayi ya Yordani, esika Jean azalaki kobatis bato, mpe atikalaki kuna.

41Bato mingi penza bayaki epai na ye. Balobaki :

—Jean asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo ye alobaki mpo na moto oyo, ezali ya solo !

42Mpe kuna, bato mingi bandimelaki Yesu.
Copyright information for LinMNB