John 11

Liwa ya Lazare

1Moto moko kombo na ye Lazare azalaki maladi ; azalaki moto ya mboka Betaniya, mboka ya Mariya mpe ya ndeko na ye Marta.

2Mariya azali mwasi oyo apakolaki Nkolo malasi, mpe apangusaki ye makolo na suki na ye ; ezali ye nde ndeko na ye Lazare azalaki maladi. 3Bandeko ya Lazare ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :

—Nkolo, ye oyo olingaka azali maladi.

4Tango Yesu ayokaki Sango yango, alobaki :

—Maladi oyo ekoboma ye te kasi yango ekopesa Nzambe nkembo, mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa nkembo.

5Nzokande, Yesu azalaki kolinga Marta, na ndeko na ye ya mwasi, mpe Lazare. 6Tango Yesu ayokaki ete Lazare azali maladi, avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo ye azalaki ; 7bongo alobaki na bayekoli na ye :

—Tozonga na Yudea !

8Bayekoli balobaki na ye :

—Moteyi, kala mingi te Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, bongo olingi lisusu kozonga kuna !

9Yesu azongisaki :

—Boni, mokolo mobimba ezali na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moi, akobeta libaku te, pamba te azali komona mwinda ya mokili oyo.
10Nzokande soki moto atamboli na butu, akobeta libaku pamba te mwinda ezali kati na ye te.

11Sima ya koloba bongo, alobaki na bango lisusu :

—Moninga na biso Lazare alali pongi ; kasi nakokende kolamusa ye !

12Bayekoli bazongiselaki ye :

—Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika !

13Nzokande Yesu alobaki mpo na liwa na ye ; kasi bayekoli bakanisaki ete alobaki kaka mpo na pongi oyo tolalaka. 14Bongo Yesu alobaki na bango polele :

—Lazare akufi !
15Mpe nazali na esengo mingi penza mpo na bino, lokola nazalaki kuna te, mpo ete bokoka kondima. Kasi tika tokende epai na ye !

16Bongo Toma oyo babengaka lipasa, alobaki na bayekoli mosusu :

—Biso mpe tokende, mpo tokufa na ye elongo !

17Tango Yesu akomaki, akutaki ete banda bakundaki Lazare na lilita, yango ekokisaki mikolo minei. 18Betaniya ezalaki pene-pene na Yeruzalem na bakilometele pene-pene misato. 19Bayuda mingi bayaki epai ya Mariya mpe Marta mpo na kolongola bango mawa mpo na liwa ya ndeko na bango.

Lisekwa mpe bomoi

20Tango Marta ayokaki ete Yesu azalaki koya, akendaki kokutana na ye, kasi Mariya atikalaki na ndako.

21Marta alobaki na Yesu :

—Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te !
22Kasi nayebi ete ata sikʼoyo, Nzambe akopesa yo nyonso oyo okosenga ye !

23Yesu alobaki na ye :

—Ndeko na yo akosekwa !

24Marta azongiselaki ye :

—Nayebi ete akosekwa, tango bato bakosekwa, na mokolo ya suka !

25Yesu alobaki na ye :

—Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo akondima ngai, akozala na bomoi, atako soki akufi.
26Mpe moto nyonso oyo azali na bomoi, soki andimeli ngai, akokufa seko te ! Ondimi yango ?

27Marta azongiselaki ye :

—E e Nkolo ! Nandimi ete ozali Kristo, Mwana na Nzambe, oyo azali koya na mokili !

28Tango asilisaki koloba bongo, akendaki kobenga ndako na ye Mariya mpe alobaki na ye na mongongo ya nse penza :

—Moteyi asiʼaye, azali kobenga yo !

29Awa Mariya ayokaki bongo, atelemaki mbangu mpe akendaki epai ya Yesu. 30Nzokande Yesu akotaki naino te na mboka, azalaki kaka na esika oyo Marta akutanaki na ye. 31Bayuda oyo bazalaki na Mariya na kati ya ndako mpo na kolongola ye mawa, tango bamonaki ete Mariya atelamaki mbangu mpe abimaki libanda, balandaki ye, mpo bakanisaki ete akei kolela na lilita.

32Tango Mariya akomaki esika Yesu azalaki mpe amonaki ye, amibwakaki na makolo ya Yesu, mpe alobaki na ye :

—Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te !

33Tango Yesu amonaki ete Mariya mpe bayuda oyo bayaki na Mariya bazalaki kolela, ayokaki mawa mingi na nse ya motema, mpe amitungisaki mingi.

34Atunaki bango :

—Bokundaki ye wapi ?

Bazongiselaki ye :

—Nkolo, yaka mpe omona !

35Yesu alelaki.

36Bongo bayuda balobaki :

—Tala, alingaki ye mingi penza !

37Kasi basusu kati na bango balobaki :

—Ye moto afungolaki miso ya mokufi miso, akokaki te kosala nyonso ete Lazare akufa te ?

Yesu asekwisi Lazare

38Yesu ayokaki lisusu mawa mingi na motema, mpe akomaki na lilita. Libulu yango ezalaki na kati ya mabanga, mpe libanga ezalaki likolo ya monoko na yango.

39Yesu alobi na bango :

—Bolongola libanga !

Kasi Marta ndeko ya mokufi alobi na ye :

—Nkolo, asiʼabandi kolumba solo, pamba te banda akundama, esiʼesali mikolo minei !

40Yesu alobaki na ye :

—Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo na Nzambe ?

41Bongo balongolaki libanga. Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki :

—Tata, natondi yo mpo oyoki ngai.
42Nayebi ete oyokaka ngai tango nyonso ; kasi nalobi boye mpo na ebele ya bato oyo bazali pembeni-pembeni na ngai, mpo ete bandima ete yo moto otindaki ngai !

43Sima ya maloba wana, Yesu agangaki na mongongo makasi : Lazare bima !

44Bongo mokufi abimaki na lilita ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na bilamba, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na kitendi.

Yesu alobaki na bango :

—Bofungola ye mpe botika ye akende !

Bakani koboma Yesu

(Mt. 26.1-5 ; Mk. 14.1-2 ; Lk. 22.1-2)

45Bayuda mingi oyo bayaki epai ya Mariya, tango bamonaki oyo Yesu asalaki, bandimaki ye. 46Kasi basusu kati na bango bakendaki epai ya bafarizeo mpe bayebisaki bango likambo Yesu asalaki.

47Bongo banganga-Nzambe mpe bafarizeo babengisaki likita-monene. Batunanaki :

—Tokosala nini ? Pamba te moto oyo azali kosala makamwisi mingi.
48Soki totiki ye bongo, bato nyonso bakondima ye, bongo bato ya Roma bakoya mpe bakopanza Esika na biso
Esika na biso  : to Ndako na biso ya Nzambe.
mpe ekolo na biso.

49Bongo moko na kati na bango kombo na ye Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, alobaki na bango :

—Bozali kososola eloko moko te !
50Bozali komona te ete ezali mpo na litomba na biso ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ekufa te ?

51Nzokande alobaki makambo wana na makanisi na ye moko te, kasi lokola azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, yango wana asakolaki ete Yesu akokufa mpo na ekolo ya bayuda ; 52mpe mpo na ekolo kaka te, kasi mpo na kosangisa mpe bana nyonso ya Nzambe baoyo bapalangana, ete bazala moto se moko.

53Banda mokolo wana, bayokanaki mpo na koboma ye. 54Bongo Yesu azalaki komimonisa lisusu polele te na miso ya bayuda. Alongwaki wana mpe akendaki na mokili oyo ezalaki pene-pene na esobe, na mboka moko kombo na yango Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na ye.

55Feti ya Pake ya bayuda ekomaki pene-pene. Bongo bato mingi batikaki bamboka mpe bakendaki na Yeruzalem, liboso ya Pake, mpo na komipetola. 56Bazalaki koluka Yesu, mpe bazalaki kotunana bango na bango, awa bazalaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe :

—Bokanisi nini ? Akoya na feti te ?

57Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bafarizeo bapesaki motindo ete, soki moto ayebi esika Yesu azali, akende koyebisa bango, mpo bakanga ye.
Copyright information for LinMNB