John 12

Bapakoli Yesu malasi

(Mt. 26.6-13 ; Mk. 14.3-9)

1Etilaki mikolo motoba liboso ete Pake ebanda. Yesu akendaki na Betaniya epai Lazare azalaki kovanda, moto oyo ye asekwisaki kati na bakufi. 2Kuna, balambelaki Yesu biloko ya kolia. Marta azalaki kosalela bango, mpe Lazare avandaki na mesa elongo na Yesu.

3Bongo Mariya akamataki ndambo ya litre ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko moko te mpe ya motuya mingi penza. Asopaki yango na makolo ya Yesu, mpe azalaki kopangusa yango na basuki na ye. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi.

4Yuda Iskariote, moko ya bayekoli ya Yesu, oyo akoteka ye, alobaki :

5—Mpo na nini bateki malasi oyo te na badeni nkama misato mpe bapesa mbongo na babola ?

6Nzokande alobaki bongo te mpo azalaki kokanisela babola, kasi mpo azalaki moyibi. Pamba te, ye moto azalaki kobomba mbongo, mpe azalaki koyiba mbongo oyo bazalaki kotia.

7Kasi Yesu alobaki :

—Tika ye ! Abombi malasi oyo mpo na mokolo ya kokundama na ngai.
8Babola bakozala na bino tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te !

Bayuda balingaki koboma Lazare

9Bayuda ebele penza bayebaki ete Yesu azalaki kuna, bongo bakendaki kuna, mpo na Yesu kaka te, kasi mpo na kotala mpe Lazare oyo ye asekwisaki kati na bakufi. 10Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe basalaki likita mpo na koboma Lazare. 11Pamba te, Bayuda mingi bakima bango mpe bandimaki Yesu mpo na Lazare.

Bayambi Yesu na nkembo monene na Yeruzalem

(Mt. 21.1-11 ; Mk. 11.1-11 ; Lk. 19.28-40)

12Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na feti, awa bayokaki ete Yesu akoya na Yeruzalem, 13bakamataki mandalala, bongo bakendaki koyamba ye, mpe bazalaki koganga :

—Ozana ! Mapamboli mingi na moto oyo aye na kombo ya Nkolo ! Mapamboli na Mokonzi ya Isalayele !

14Yesu amonaki mwana ya mpunda, mpe avandaki likolo na yango, ndenge ekomama :
15 Elenge mwasi ya Siona kobanga te,
tala, Mokonzi na yo azali koya,
avandi likolo ya mwana ya mpunda !

16Na tango wana, bayekoli na ye basosolaki te tina ya makambo yango ; kasi tango Yesu akotaki kati na nkembo, bongo nde bakundolaki na mitema ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe basalaki makambo wana epai na ye. 17Bato nyonso oyo bazalaki na Yesu tango abengaki Lazare abima na lilita mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki. 18Yango wana bato ebele penza bakendaki koyamba ye, mpo bayokaki ete asalaki likamwisi wana.

19Bongo bafarizeo bazalaki kolobana bango na bango :

—Bomoni : tokolonga lisusu te, tala ndenge bato nyonso bakomi kolanda ye !

Yesu alobeli lolenge ya liwa na ye

20Na kati ya baoyo bayaki na Yeruzalem mpo na kokumisa Nzambe na feti, Bagreki ndambo mpe bazalaki. 21Bakendaki kokutana na Filipo ya mboka Betsayida ya Galileya mpe basengaki ye :

—Tata, tolingi komona Yesu !

22Filipo akendaki koyebisa yango na Andele ; bongo Andele mpe Filipo bakendaki koyebisa Yesu.

23Yesu azongiselaki bango :

—Ngonga esiʼekoki oyo Mwana na moto alingi kokota na nkembo na ye.
24Nalobi na bino ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, yango ekobota bambuma ebele penza. 25Moto oyo akolinga bomoi na ye, akobungisa yango ; kasi oyo akoboya bomoi na ye na mokili oyo, azali kobatela yango mpo na bomoi ya seko. 26Soki moto azali kosalela ngai, alanda ngai ; mpe epai ngai nakozala, mosali na ngai mpe akozala wana. Oyo akosalela ngai, Tata akokumisa ye !

27Sikʼoyo, molimo na ngai, etungisami. Naloba nini ? Tata kangola ngai na ngonga oyo ? Kasi ezali mpo na kokutana na yango nde nakomi na ngonga oyo ! 28Tata, pesa nkembo na kombo na yo !

Bongo mongongo moko ewutaki na likolo :

—Nasiʼnapesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !

29Ebale ya bato oyo bazalaki wana, oyo bayokaki mongongo yango, balobaki ete ezali kake ; basusu balobaki :

—Ezali anzelu moto alobi na ye.

30Kasi yesu alobaki na bango :

—Mongongo yango elobi mpo na ngai te, kasi mpo na bino.
31Sikʼoyo, tango ya kosambisama ya mokili oyo ekoki ; sikʼoyo mokonzi ya mokili oyo akobwakama libanda. 32Mpe ngai, tango bakotombola ngai wuta na mabele, nakobenda bato nyonso epai na ngai !

33Alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya liwa oyo ye akokufa. 34Ebele ya bato bazongiselaki ye :

—Toyokaki wuta na Mibeko ete Kristo akowumela libela na libela. Bongo ndenge nini olobi na biso ete Mwana na moto akotombwama ? Nani nde azali Mwana na moto ?

35Yesu alobaki na bango :

—Moi ezali naino na kati na bino mpo na mwa tango moke : botambola tango bozali na moi, mpo ete molili ekanga bino na mbalakaka te. Pamba te, moto oyo atambolaka na molili ayebaka te epai ye azali kokende.
36Yango wana, lokola bozali naino na moi, bondimela moi, mpo bokoma bana ya moi.

Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendaki mpe amibombaki mosika na bango.

Bayuda bandimeli Yesu te

37Atako Yesu asalaki makamwisi mingi na miso na bango, kasi bandimaki ye te.

38Esalamaki bongo mpo ete maloba oyo moprofeta Ezayi alobaki ekokisama : Nkolo, nani andimaki mateya na biso ;
mpe nguya ya Nkolo emonanaki epai ya nani ?

39Yango wana bakokaki kondima te, mpo Ezayi alobaki lisusu :
40 Nzambe azipa miso na bango
akomisa mitema na bango mabanga,
mpo ete miso na bango emona te,
mpe mitema na bango esosola te,
mpo ete babongola mitema te,
mpo nabikisa bango te !

41Ezayi alobaki bongo pamba te amonaki nkembo ya Yesu, mpe alobaki mpo na ye.

42Nzokande, ata na kati ya bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki ye ; kasi balakisaki kondima na bango polele te, pamba te bazalaki kobanga soki te bafarizeo bakobengana bango na ndako ya mayangani. 43Mpo ete, balingaki mingi kozwa lokumu ya bato, kasi oyo ya Nzambe te.

44Bongo Yesu agangaki :

—Moto oyo andimi ngai, andimi kaka ngai te, kasi andimi mpe moto oyo atindaki ngai.
45Oyo amoni ngai, amoni mpe moto oyo atindaki ngai. 46Ngai nayaki na mokili lokola moi, mpo ete moto nyonso oyo akondima ngai, azala lisusu na molili te. 47Soki moto ayoki maloba na ngai, mpe azali kotosa yango te, ezali ngai te moto nakokatela ye etumbu ; pamba te nayaki te mpo na kokatela mokili etumbu, kasi mpo na kobikisa yango.

48Moto oyo akoboya ngai mpe akoyamba maloba na ngai te, azali na zuzi na ye. Liloba oyo nazali koloba, yango nde ekokatela ye etumbu na mokolo ya suka. 49Pamba te, nalobaki na kombo na ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai, ye moto atindaki ngai makambo oyo nasengeli koloba mpe ndenge nini koloba yango. 50Mpe nayebi ete, etinda na ye ememaka na bomoi ya seko. Yango wana, makambo oyo nalobaki, nalobaki yango ndenge Tata ayebisaki ngai !
Copyright information for LinMNB