John 13

MALOBA YA SUKA YA MOTEYI

Yesu asukoli makolo ya bayekoli na ye

1Ezalaki liboso ya feti ya Pake. Yesu ayebaki ete tango ya kolongwa na mokili oyo mpo na kokende epai ya Tata ekokaki. Tango nyonso azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki kati na mokili, mpe alingaki bango kino na suka ! 2Tango bazalaki kolia ; Zabolo asiʼakotaki na motema ya Yuda Isikariote, mwana ya Simon, mpo na koteka Yesu. 3Yesu ayebaki ete Tata atiaki makambo nyonso na nse ya nguya na ye, mpe awutaki epai ya Nzambe mpe akozonga epai ya Nzambe.

4Alongwaki na mesa na tango bazalaki kolia, alongolaki elamba oyo alataki likolo, bongo akamataki elamba oyo bapanguselaki mayi mpe akangaki yango na loketo na ye. 5Na sima, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na ye, bongo azalaki kopangusa yango na elamba oyo bapanguselaka mayi oyo akangaki na loketo.

6Tango akomaki epai ya Simon Piere, ye alobaki na ye :

—Nkolo, yo olingi kosukola ngai makolo ?

7Yesu azongiselaki ye :

—Likambo nazali kosala, ozali kososola yango te sikʼoyo, kasi okososola yango sima !

8Kasi Piere alobaki na ye :

—Te ! Okosukola ngai makolo te !

Yesu azongiselaki ye :

—Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu moyekoli na ngai te !

9Simon Piere alobaki na ye :

—Nkolo, soki bongo, osukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai mpe maboko na motu !

10Yesu alobaki na ye :

—Moto oyo basukoli nzoto mobimba, azali na posa kaka ya kosukola makolo ; nzoto na ye mobimba ezali peto. Mpe bino, bozali peto, kasi bino nyonso te.

11Pamba te Yesu ayebaki moto oyo akoteka ye. Yango wana alobaki : “Bino nyonso bozali peto te !”

12Tango asilisaki kosukola bango makolo, alataki elamba na ye mpe ayaki lisusu kovanda na mesa ; bongo alobaki na bango :

—Boni, bososoli likambo oyo nasali bino ?

13Bino bobengaka ngai Moteyi mpe Nkolo, ya solo bolobaka malamu, pamba te nazali bongo. 14Bongo soki ngai Moteyi mpe Nkolo nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino. 15Pamba te napesi bino ndakisa, mpo bosalaka mpe ndenge ngai nasali bino.

16Nazali koloba na bino ya solo penza : mosali aleki mokonzi na ye te, mpe motindami aleki te moto oyo atindaki ye. 17Lokola boyebi makambo oyo, bozali bato na esengo soki bosaleli yango.

18Nazali koloba mpo na bino nyonso te ; nayebi baoyo ngai napona. Kasi esengeli ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba : Moto oyo azali kolia lipa elongo na ngai, abalukeli ngai ! 19Nayebisi bino likambo yango sikʼoyo, liboso ete yango esalama, mpo ete tango yango ekosalama, bondima ete “Ngai nazali oyo nazali.” 20Nazali koloba na bino ya solo penza, moto oyo ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai ; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.

Yesu ayebisi ete Yuda akoteka ye

(Mt. 26.20-25 ; Mk. 14.17-21 ; Lk. 22.21-23)

21Sima ya koloba bongo, Yesu ayokaki pasi mingi na motema, mpe alobaki :

—Nazali koloba na bino ya solo penza, moto moko na kati na bino akoteka ngai !

22Bayekoli babandaki kotalana moko na moko, mpe bayebaki te soki alobaki bongo mpo na nani. 23Moko na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi, azalaki na mesa pene-pene na Yesu. 24Bongo Simon Piere asalaki mwa elembo na moyekoli wana mpo atuna soki alobaki bongo mpo na nani. 25Bongo moyekoli yango alalaki moke na ntolo ya Yesu mpe atunaki ye :

—Nkolo, nani yango ?

26Yesu azongisaki :

—Ezali moto oyo nakopesa ndambo ya lipa sima ya kodindisa yango na supu. Bongo, adindisaki ndambo ya lipa na supu, mpe apesaki yango na Yuda Isikariote mwana ya Simon.

27Na tango kaka Yuda azwaki lipa wana, Satana akotaki kati na ye.

Bongo Yesu alobaki na ye :

—Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki !

28Kasi moto ata moko te na baoyo bazalaki na mesa, asosolaki soki mpo na nini Yesu alobaki na ye bongo. 29Lokola Yuda azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye akende kosomba biloko ya feti, to mpe apesa lisalisi na babola. 30Awa Yuda azwaki lipa wana, abimaki kaka na tango wana. Ezalaki butu.

Mobeko ya sika

31Tango Yuda akendaki, Yesu alobaki :

—Sikʼoyo nkembo ya Mwana na Moto emonani polele, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na ye.
32Soki Nzambe azwi nkembo kati na ye, Nzambe ye moko mpe akopesa Mwana nkembo kati na ye moko, mpe akosala yango noki penza. 33Bana na ngai, nazali naino na bino elongo kaka mpo na mwa tango moke. Bokoluka ngai ; kasi nalobi na bino sikʼoyo ndenge nalobaki na bayuda : Bokokoka te kokende epai ngai nazali kokende !

34Mobeko ya sika oyo napesi bino, yango oyo : Bolingana bino na bino. Ndenge ngai nalingaka bino, bino mpe bolingana bino na bino. 35Soki bolingani bino na bino, na ndenge wana nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai !

Yesu ayebisi ete Piere akowangana ye

36Simon Piere atunaki ye :

—Nkolo, ozali kokende wapi ?

Yesu azongiselaki ye :

—Okokoka te kolanda ngai sikʼoyo epai nazali kokende, kasi okolanda ngai sima.

37Piere alobaki na ye lisusu :

—Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda yo sikʼoyo ? Nazali ya komibongisa mpo na kokufa mpo na yo !

38Yesu azongiselaki ye :

—Ozali ya komibongisa penza mpo na kokufa mpo na ngai ? Nalobi na yo ya solo penza : liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato !
Copyright information for LinMNB