John 15

Nzete ya vino mpe bitape na yango

1—Ngai nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na ngai azali moloni. 2Ye akataka etape nyonso oyo ezali kati na ngai, oyo ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka etape nyonso oyo ebotaka mbuma mpo ete ebota bambuma ebele. 3Bosiʼbokoma peto mpo na Liloba oyo nalobaki na bino. 4Bokangama na ngai mpe ngai kati na bino. Etape moko te ekoki kobota mbuma na ndenge na yango moko ; esengeli ezala ya kokangama na nzete. Bino mpe ndenge moko : soki bokangani na ngai te, bokoki kobota mbuma te.

5Ngai nazali nzete ya vino, mpe bino bozali bitape. Moto oyo azali ya kokangama na ngai, mpe ngai kati na ye, akobota bambuma ebele. Pamba te, soki bokabwani na ngai, bokokoka kosala eloko moko te. 6Soki moto akangami na ngai te, azali lokola etape ya nzete oyo babwaki libanda mpe ekawuki ; bitape ya ndenge wana balokotaka yango, babwakaka yango na moto, mpe ezikaka. 7Soki bokangami na ngai, mpe maloba na ngai evandi kati na bino, bosenga eloko nyonso oyo bolingi, mpe bokozwa yango ! 8Likambo epesaka Tata na ngai lokumu ezali oyo : ete bobota bambuma ebele mpe bokoma bayekoli na ngai. 9Nalingaka bino ndenge Tata alingaka ngai ; yango wana, bowumela kati na bolingo na ngai. 10Soki bobateli mitindo na ngai, bokowumela kati na bolingo na ngai, ndenge ngai nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe nazali kowumela kati na bolingo na ye. 11Nayebisi bino makambo oyo mpo ete esengo na ngai ezala kati na bino, mpe mpo esengo na bino ezala ya kokoka.

12Motindo na ngai yangoʼoyo : bolingana bino na bino ndenge ngai nalingaka bino. 13Moto moko te azali na bolingo monene koleka moto oyo akabi bomoi na ye mpo na baninga na ye. 14Bino bozali baninga na ngai, soki bozali kosala oyo natindi bino.

15Nakobenga bino lisusu basali te, pamba te mosali ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Kasi bino, nabengi bino baninga na ngai, mpo nasiʼnayebisi bino makambo nyonso oyo nayokaki na Tata na ngai ! 16Ezali bino te bato boponaki ngai, kasi ngai moto naponaki bino. Napesaki bino mosala mpo bokende mpe bobota mbuma, mbuma oyo ekowumela. Bongo Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga ye na kombo na ngai.

17Motindo napesi bino yangʼoyo : bolinganaka bino na bino.

Bato ya mokili bakoyina bayekoli ya Yesu

18—Soki mokili eyini bino, boyeba ete eyinaki ngai liboso na bino. 19Soki bozalaki bato ya mokili, mbele mokili elingaki kolinga bino lokola bato na ye. Kasi lokola bozali bato ya mokili te, mpe nasi napona bino wuta na mokili : yango wana mokili ezali koyina bino.

20Bokanisa maloba oyo nalobaki na bino : mosali moko te aleki nkolo na ye. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola bino mpe ; soki babatelaki mateya na ngai, bakobatela mpe oyo ya bino. 21Kasi bakosala bino makambo wana nyonso mpo na kombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai.

22Soki nayaki te mpe nalobaki na bango te, mbele balingaki kozala na lisumu te, kasi sikʼoyo, bazali na mwaye te ya kowangana lisumu na bango. 23Moto oyo ayinaka ngai, ayinaka mpe Tata na ngai.

24Soki nasalaki te kati na bango, makamwisi oyo moto mosusu asala te, mbele balingaki kozala na lisumu te ; sikʼoyo basiʼbamoni yango, kasi bazali kaka koyina ngai na Tata na ngai. 25Kasi yango esalami bongo mpo ete makambo oyo ekomama na Mibeko na bango ekokisama : Bayinaki ngai kaka pamba.

26Tango Mosungi akoya, oyo nakotindela bino wuta epai ya Tata, Molimo ya bosolo oyo akowuta epai ya Tata, ye akotatola mpo na ngai. 27Bongo bino mpe, bokotatola mpo na ngai, pamba te bozalaki na ngai elongo wuta na ebandeli !
Copyright information for LinMNB