John 16

1—Nalobi na bino makambo oyo mpo ete kondima na bino ebeta libaku te. 2Pamba te bakobengana bino na Bandako na bango ya mayangani, mpe tango elingi kokoka, oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete azali kosalela Nzambe na ndenge wana. 3Bakosala makambo ya ndenge wana mpo bayebi Tata te, mpe bayebi ngai te ! 4Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete tango ngonga ekokoka, bokanisa ete nasiʼnayebisaki bino makambo yango. Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli te, mpo nazalaki naino na bino elongo.

Mosala ya Molimo Mosantu

5Sikʼoyo nazali kokende epai ya Moto oyo atindaki ngai ; mpe moto ata moko te na kati na bino azali kotuna ngai : Ozali kokende wapi ? 6Kasi lokola nayebisi bino makambo oyo, tala ndenge mitema na bino etondi na mawa. 7Nzokande, nazali koyebisa bino makambo ya solo : ezali malamu mingi penza mpo na bino ete ngai nakende. Pamba te soki nakei te, Mosungi mpe akoyela bino te. Kasi soki nakei, nakotindela bino ye.

8Tango akoya, akolakisa bato ya mokili polele mpo na oyo etali masumu, bosembo, mpe kosambisama : 9mpo na masumu, pamba te bazali kondima ngai te ; 10mpo na bosembo, pamba te nazali kokende epai ya Tata mpe bokomona ngai lisusu te ; 11mpo na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asiʼasambisami.

12Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi sikʼoyo, bokokoka te kososola yango.

13Tango Molimo ya bosolo akoya, ye akotambolisa bino kati na solo nyonso, pamba te akoloba na kombo na ye moko te, kasi akoloba makambo nyonso oyo ayokaki, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya. 14Ye akopesa ngai nkembo, pamba te akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango.

15Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali mpe ya ngai. Yango wana nalobi ete, akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango. 16Etikali moke bokomona ngai lisusu te ; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu !

Mawa ya bayekoli ekobongwana esengo

17Bayekoli na ye mosusu babandaki kotunana bango na bango :

—Oyo ye alobi na biso elingi koloba nini. “Etikali moke bokomona ngai lisusu te ; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu”. Mpe lisusu : “Pamba te nazali kokende epai ya Tata ?”

18Bazalaki kaka kotunana :

—“Etikali moke”, yango elingi koloba nini ? Tozali kososola te likambo alingi koloba.

19Yesu ayebaki ete balingaki kotuna ye motuna, bongo alobaki na bango :

—Bozali kotunana bino na bino mpo na maloba oyo nalobi ete : “Etikali moke bokomona ngai lisusu te ; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu.”
20Nazali koloba na bino ya solo : bokolela mpe bokomitungisa, kasi mokili ekotonda na esengo. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21Mwasi soki alingi kobota ayokaka mawa mingi penza, mpo tango na ye ya kobota ekoki ; kasi soki aboti mwana, akobosana bapasi na ye mpo na esengo oyo akotonda na yango, mpo ete mwana asili kobotama na mokili. 22Bino mpe ndenge moko, sikʼoyo bozali na mawa, kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe esengo yango, moto ata moko te akokoka kolongola bino yango. 23Na mokolo yango, bokotuna ngai lisusu ata likambo moko te. Nazali koloba na bino ya solo : nyonso oyo bokosenga epai ya Tata na kombo na ngai, ye akopesa bino yango. 24Kino sikʼoyo, naino bosengi eloko moko te na kombo na ngai. Bosenga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

Boyika piko nasiʼnalongi mokili

25Nalobaki na bino makambo wana na masapo. Kasi tango ezali koya oyo nakoloba na bino lisusu na masapo te, kasi nakoloba na bino na polele penza mpo na Tata. 26Na mokolo wana, bokosenga na kombo na ngai. Mpe nalobi te ete nakosenga epai ya Tata mpo na bino ; 27pamba te Tata ye moko alingaka bino, mpo bolingaka ngai mpe bondimaka ete ngai nawutaki epai ya Tata. 28Nawutaki epai ya Tata mpe nayaki awa na mokili. Mpe sikʼoyo nazali kotika mokili, mpe nazali kozonga epai ya Tata !

29Bongo bayekoli na ye balobaki na ye :

—Omoni, sikʼoyo ozali koloba polele, mpe otiki koloba na masapo.
30Sikʼoyo toyebi ete oyebi makambo nyonso, mpe ozali na posa te ete moto atuna yo ; mpo na yango, tondimi ete owutaki epai ya Nzambe.

31Yesu azongiselaki bango :

—Bondimi sikʼoyo ?
32Tango ezali koya, mpe esiʼekomi, oyo bokopanzana moto na moto na epai na ye, mpe bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko te, pamba te Tata azali na ngai elongo. 33Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete bozala na kimia kati na ngai. Na mokili oyo, bokonyokwama mingi penza. Kasi boyika mpiko ! pamba te, nasiʼnalongi mokili.
Copyright information for LinMNB