John 17

Yesu abondeli mpo na ye moko

1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, atalaki na Likolo mpe abondelaki :

—Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na yo, mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na yo !
2Pamba te, opesaki ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesi bomoi ya seko na bato nyonso oyo opesaki ye. 3Nzokande bomoi ya seko ezali nde : bayeba yo Nzambe moko kaka mpe ya solo, mpe Yesu Kristo oyo yo otindaki. 4Namonisi nkembo na yo awa na mokili, mpe nasilisi mosala oyo opesaki ngai. 5Mpe sikʼoyo, Tata pesa ngai nkembo, liboso na yo, na nkembo oyo nazalaki na yango elongo na yo, liboso ete mokili esalama.

Yesu asamopanga mpo na bayekoli na ye

6Nasiʼnalakisi kombo na yo na bato oyo opesaki ngai wuta na mokili. Bazalaki bato na yo, mpe opesaki ngai bango ; mpe babateli maloba na yo. 7Sikʼoyo bayebi malamu ete nyonso oyo opesaki ngai ewuti epai na yo ; 8pamba te, napesaki bango mateya oyo opesaki ngai mpe bayambaki yango ; bayebi penza ete nawutaki epai na yo, mpe bandimi ete yo moto otindaki ngai. 9Nazali kobondela mpo na bango. Nazali kobondela mpo na bato ya mokili te, kasi mpo na bato oyo opesaki ngai ; mpo bazali bato na yo. 10Pamba te nyonso oyo ezali ya ngai, ezali mpe ya yo ; mpe oyo ezali ya yo, ezali mpe ya ngai ; Mpe nkembo na ngai ezali komonana kati na bango. 11Nakozala lisusu na mokili te, pamba te nazali koya epai na yo, kasi bango bazali kati na mokili. Tata Mosantu, batela bango na nguya ya kombo na yo, kombo oyo opesaki ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko. 12Tango nazalaki na bango, nabatelaki bango na nguya ya kombo na yo, kombo oyo opesaki ngai ; nabatelaki bango malamu penza, mpe moko te na kati na bango abungaki, longola kaka moto oyo asengelaki kobunga mpo ete Makomi ekokisama.

13Sikʼoyo nazali koya epai na yo, mpe nazali koloba makambo oyo na tango nazali naino na mokili, mpo ete batonda na esengo na ngai. 14Napesaki bango maloba na yo, mpe mokili eyinaki bango mpo bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. 15Nazali kobondela te mpo olongola bango na mokili, kasi mpo obatela bango na mabe. 16Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.

17Komisa bango bato na yo na nzela ya solo na yo. Maloba na yo ezali solo. 18Natindi bango na mokili, ndenge yo mpe otindaki ngai na mokili. 19Namipesi ngai moko mpo na bango, mpo ete bango mpe bakoma solo bato na yo.

Yesu abondeli mpo na bato oyo bakondima ye

20—Nazali kobondela kaka mpo na bango te ; kasi mpo na baoyo mpe bakondimela ngai na nzela ya maloba na bango, 21mpo ete bango nyonso bakoma moto se moko, lokola yo Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, mpo ete bango mpe bazala moto moko kati na biso, mpo ete mokili endima ete yo moto otindaki ngai. 22Napesi bango nkembo oyo opesaki ngai, mpo ete bazala moto se moko, ndenge biso mpe tozali moto moko : 23ngai kati na bango, mpe yo kati na ngai, mpo ete bazala penza moto moko, mpe mpo ete mokili eyeba penza ete Yo moto otindaki ngai, mpe olingaka bango ndenge olingaka ngai.

24Tata, nalingi ete bato oyo opesaki ngai bazala na ngai elongo na esika oyo ngai nakozala, mpo bamona nkembo na ngai, nkembo oyo opesaki ngai, pamba te olingaki ngai liboso ete mokili esalama. 25Tata ya bosembo, mokili eyebaki yo te, kasi ngai nayebaki yo, mpe baoyo bayebi ete yo moto otindaki ngai. 26Nalakisi bango kombo na yo, mpe nakolakisa bango yango lisusu, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na ngai, ezala kati na bango, bongo ngai mpe nazala kati na bango.
Copyright information for LinMNB