John 18

Bakangi Yesu

(Mt. 26.47-56 ; Mk. 14.43-50 ; Lk. 22.47-53)

1Tango Yesu asilisaki kobondela, akendaki na bayekoli na ye na ngambo ya mayi ya Sedroni. Elanga moko ezalaki na esika yango, bongo Yesu akotaki kuna na bayekoli na ye.

2Yuda oyo atekaki Yesu ayebaki esika yango ; pamba te mbala mingi Yesu azalaki kokende kosangana kuna na bayekoli na ye. 3Bongo Yuda akendaki na elanga ; azalaki kokamba lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bapesaki ye. Bato yango bazalaki na minda, banzete oyo ezalaki kopela moto, na bibundeli na maboko.

4Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo elingaki kokomela ye, akendaki kokutana na bango mpe atunaki bango :

—Bozali koluka nani ?

5Bazongisaki :

—Yesu ya Nazareti !

Yesu alobaki na bango :

—Ngai oyo !

Bongo Yuda oyo atekaki ye, azalaki wana elongo na bango.
6Tango Yesu alobaki na bango : “Ngai oyo”, bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.

7Yesu atunaki bango lisusu :

—Bozali koluka nani ?

Bazongisaki :

—Yesu ya Nazareti !

8Yesu alobaki na bango :

—Nasiʼnalobaki na bino ete ezali ngai. Soki bozali koluka ngai, botika baoyo bakende.

9Na bongo, maloba oyo alobaki ekokisamaki : “Na kati ya bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te !”

10Bongo Simon Piere, oyo azalaki na mopanga, abendaki yango, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, mpe akataki ye litoyi oyo ya mopanzi ya mobali. Mosali yango, kombo na ye : Malkus.

11Kasi Yesu alobaki na Piere :

—Zongisa mopanga na yo na esika na yango. Boni, kopo ya bapasi oyo Tata apesi ngai, esengei namela yango te ?

Bamemi Yesu epai ya Ana

(Mt. 26.57-58 ; Mk. 14.53-54 ; Lk. 22.54)

12Bongo basoda elongo na bakonzi na bango, na bakengeli ya Bayuda, bakamataki Yesu mpe bakangaki ye na basinga. 13Bamemaki ye liboso epai ya Ana ; pamba te Ana azalaki bokilo ya Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana. 14Kayifa azalaki moto oyo apesaki Bayuda toli ete, ebongi malamu moto moko akufa mpo na bato.

Piere awangani Yesu mpo na mbala ya liboso

(Mt. 26.69-70 ; Mk. 14.66-68 ; Lk. 22.55-57)

15Simon Piere mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Lokola moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, akotaki elongo na Yesu na lopango ya ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe, 16kasi Piere azalaki kozela libanda, liboso ya porte. Moyekoli oyo mosusu, oyo ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, abimaki mpe alobaki na mwasi oyo azalaki kokengela porte, akotisaki mpe Piere. 17Mwasi yango, oyo azalaki kokengela porte atunaki Piere :

—Boni, yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana te ?

Piere azongiselaki ye :

—Te, nazali moyekoli na ye te !

18Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto ya makala, mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyotela. Piere mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyotela.

Mokonzi ya banganga-Nzambe asambisi Yesu

(Mt. 26.59-66 ; Mk. 14.55-64 ; Lk. 22.66-71)

19Mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki Yesu mituna mpo na bayekoli na ye, mpe mpo na mateya na ye.

20Yesu azongiselaki ye :

—Nazalaki koloba polele epai ya bato nyonso ; nazalaki koteya tango nyonso na Bandako ya mayangani mpe na lopango ya Ndako ya Nzambe, epai Bayuda nyonso basanganaka. Mpe nalobaki eloko moko te na sekele.
21Bongo mpo na nini ozali kotuna ngai ? Tuna bato oyo bayoka maloba na ngai. Bango bayebi makambo oyo nazalaki koloba !

22Tango Yesu alobaki bongo, mokengeli moko oyo azalaki wana, abetaki ye mbata, mpe atunaki ye :

—Ozali kozongisa ndenge wana na mokonzi ya banganga-Nzambe ?

23Yesu alobaki na ye :

—Soki nalobi mabe, lakisa ngai mabe yango. Kasi soki nalobi solo, bongo mpo na nini obeti ngai ?

24Bongo Ana atindaki Yesu epai ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe ; mpe azalaki kaka ya kokangama na basinga.

Piere awangani lisusu Yesu

(Mt. 26.71-75 ; Mk. 14.69-72 ; Lk. 22.58-62)

25Simon Piere azalaki naino wana, mpe azalaki koyotela moto. Bongo batunaki ye :

—Boni, yo mpe ozali moko ya bayekoli na ye te ?

Piere awanganaki yango mpe alobaki :

—Te, nazali moyekoli na ye te !

26Kasi mosali moko na kati ya basali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, ndeko ya moto oyo Piere akataki litoyi, atunaki Piere :

—E e, ezali yo te oyo namonaki elongo na ye, kuna na elanga ?

27Kasi Piere awanganaki yango lisusu ; mpe kaka na tango wana, soso elelaki !

Pilato asambisi Yesu

(Mt. 27.1-2,11-31 ; Mk. 15.2-15 ; Lk. 23.13-25)

28Bongo wuta na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu na esika oyo bakatelaka makambo. Ezalaki na tongo. Mpe bango moko bakotaki te na esika oyo bakatelaka makambo, mpo ete bakoma mbindo te, mpe bakoka kolia bilei ya Pake.

29Yango wana Pilato abimaki, mpe atunaki bango :

—Bofundi moto oyo mpo na nini ?

30Bango bazongiselaki ye :

—Soki moto oyo azalaki moto mabe te, mbele toye kotika ye te na maboko na yo !

31Pilato alobaki na bango :

—Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko, ndenge Mibeko na bino ezali kotinda !

Bayuda bazongiselaki ye :

—Biso tozali na ndingisa te ya koboma moto.

32Na bongo, maloba oyo Yesu alobaki ekokisamaki, oyo elakisaki lolenge ya liwa asengelaki kokufa.

33Pilato akotaki lisusu na esika oyo bakatelaka makambo, abengaki Yesu mpe atunaki ye ;

—Yo ozali mokonzi ya Bayuda ?

34Yesu azongiselaki ye :

—Boni, yango ezali makanisi na yo moko to bato mosusu bayebisi yo mpo na ngai ?

35Pilato atunaki ye :

—Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato na yo moko, mpe bakonzi ya banganga-Nzambe na bino bato bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?

36Yesu azongisaki :

—Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki Bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbele basali na ngai balingaki kobunda etumba, mpo Bayuda bakanga ngai te. Kasi sikʼoyo bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te !

37Bongo Pilato atunaki :

—Elingi koloba ete ozali mokonzi ?

Yesu azongisaki :

—Yo moto olobi ete nazali mokonzi ! Nabotamaki mpe nayaki na mokili mpo na kotatola solo. Moto oyo azali kati na solo, ayokaka mongongo na ngai.

38Pilato atunaki ye :

—Solo ezali nini ?

Sima ya maloba wana, Pilato abimaki lisusu epai Bayuda bazali, mpe alobaki na bango :

—Mpo na ngai, namoni mabe moko te epai na ye.
39Kasi yango ezali momesano mpo na bino ete nabimisela bino moto moko ya boloko na tango ya feti ya Pake ; boni, bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ?

40Kasi bango nyonso babandaki koganga :

—Te, ye te ! Bimisela biso Barabas ! Nzokande Barabas azalaki mobomi monene.
Copyright information for LinMNB