John 19

Bakateli Yesu etumbu ya liwa

1Bongo Pilato akamataki Yesu mpe abetisaki ye bafimbo. 2Basoda basalaki ekoti ya lokumu ya banzube mpe balatisati ye yango. Balatisaki ye mpe elamba ya motane. 3Bazalaki koya mpe koloba na ye :

—Mbote, mokonzi ya Bayuda !

Bazalaki kobeta ye mpe bambata.
4Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango :

—Boyoka ! Nakobimisela bino ye na libanda, mpo boyeba ete namoni mabe moko te epai na ye !

5Yesu abimaki ; alataki ekoti ya lokumu ya banzube, mpe elamba ya motane. Bongo Pilato alobaki na bango :

—Botala moto !

6Tango bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki ye, babandaki koganga :

—Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !

Kasi Pilato azongisaki :

—Bino moko bokamata ye, mpe bobaka ye na ekulusu. Pamba te, ngai namoni mabe moko te epai na ye.

7Bayuda balobaki na molende nyonso :

—Tozali na Mobeko, mpe soki totali Mobeko yango, ye asengeli kokufa, pamba te alobaki ete ye azali Mwana na Nzambe !

8Tango Pilato ayokaka maloba wana, kobanga na ye ebakisamaki lisusu. 9Azongaki lisusu na esika oyo bakatelaka makambo mpe atunaki Yesu :

—Ozali moto ya wapi ?

Kasi Yesu azongiselaki ye eyano te.

10Bongo Pilato alobaki na ye :

—Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kotika yo, mpe ya kobomisa yo na ekulusu ?

11Yesu azongiselaki ye :

—Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na ngai, soki bapesaki yo yango wuta na likolo te. Yango wana, moto oyo akabi ngai na maboko na yo, asali lisumu moko ya monene penza !

12Banda tango wana, Pilato alukaki nzela mpo atika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga :

—Soki otiki moto oyo, wana ozali moninga ya Sezare te. Moto nyonso oyo amikomisaka mokonzi, azali monguna ya Sezare !

13Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu libanda, mpe avandaki na kiti na ye oyo akatelaka makambo, na esika oyo babengaka “Esika batanda mabanga” (na monoko ya Ki-ebreo : “Gabata”). 14Yango ezalaki mokolo ya Komilengela mpo na Pake, mpe ezalaki pene-pene na ngonga midi. Bongo Pilato alobaki na bayuda :

—Botala mokonzi na bino !

15Kasi bagangaki :

—Longola ye na miso na biso ! Longola ye na miso na biso ! Baka ye na ekulusu !

Pilato atunaki bango :

—Bolingi nabaka mokonzi na bino na ekulusu ?

Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisaki :

—Tozali na mokonzi mosusu te, kaka Sezare !

16Bongo Pilato apesaki Yesu na maboko na bango mpo babaka ye na ekulusu.

Liwa ya Yesu

(Mt. 27.32-56 ; Mk. 15.21-41 ; Lk. 23.26-49)

Bongo bakamataki Yesu.
17Yesu amemaki ekulusu na ye, abimaki na vile mpe akendaki na Esika oyo babengaka : “Mokuwa ya motu ya moto” (na monoko ya Ki-ebreo : “Gologota”). 18Na esika wana nde, babakaki Yesu na ekulusu elongo na bato mibale. Moko na pembeni mpe mosusu na pembeni, bongo Yesu na kati-kati.

19Pilato akomisaki mwa libaya mpe babambaki yango na ekulusu. Bakomaki boye na libaya yango : “Yesu ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda !” 20Bayuda mingi batangaki mwa libaya yango, pamba te esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene-pene na vile ; mpe bakomaki yango na Ki-ebreo, kilatino, mpe na Kigreki.

21Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ya Bayuda balobaki na Pilato :

—Kokoma te : “Mokonzi ya bayuda”, kasi koma : “Moto oyo alobi : Nazali Mokonzi ya Bayuda.”

22Kasi Pilato azongiselaki bango :

—Oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana !

23Tango basoda basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na ye, mpe bakabolaki yango na biteni minei, soda moko-moko na eteni na ye. Bakamataki mpe nzambala na ye ; nzambala yango batongaki yango na biteni te, kasi batongaki yango kaka na elamba moko banda na likolo kino na nse.

24Basoda balobanaki :

—Topasola yango te, kasi tobetela yango zeke, bongo totala soki nani akozwa yango !

Esalamaki bongo mpo ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba : Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango,
mpe babetelaki nzambala na ngai zeke !

Tala makambo basoda basalaki.

25Mama na ye, ndeko ya mama na ye, Mariya mwasi ya Klopasi, mpe Mariya ya mboka Magadala, batelemaki pene-pene na ekulusu ya Yesu.

26Tango yesu amonaki mama na ye wana, mpe moyekoli oyo ye azalaki kolinga mingi atelemaki pembeni wana alobaki na mama na ye :

—Mwasi, tala mwana na yo !

27Bongo alobaki na moyekoli wana :

—Tala mama na yo !

Banda tango wana, moyekoli yango akamataki mama ya Yesu na ndako na ye.

28Sima na yango, awa ayebaki ete makambo nyonso ekokisamaki, alobaki boye mpo ete Makomi ekokisama :

—Nazali na posa ya mayi !

29Eloko moko ezalaki wana, ezalaki ya kotonda na vino ya ngayi. Batondisaki eponzi na vino ya ngayi, bakangaki yango na mwa nzete, mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu.

30Tango Yesu asilisaki komela vino ya ngayi, alobaki :

—Esili !

Alalisaki motu mpe azongisaki molimo.

31Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na saba, mpe saba yango ezalaki ya kafu-kafu, Bayuda balingaki te ete banzoto etikala na ba-ekulusu na tango ya saba. Yango wana, bakendaki kosenga Pilato ete babuka bango makolo, mpe balongola banzoto na bango. 32Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya moto ya liboso, oyo babakaki na ekulusu elongo na Yesu, bongo babukaki mpe oyo ya mosusu. 33Tango bakomaki epai ya Yesu, mpe bamonaki ete asiʼakufaki, babukaki ye lisusu makolo te. 34Kasi moko na kati ya basoda atobolaki Yesu mopanzi na likonga ; mpe kaka na tango wana makila na mayi ebimaki.

35Moto oyo amonaki makambo yango, ye moto azali kotatola yango. Mpe litatoli na ye ezali ya solo. Ayebi ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. 36Pamba te makambo oyo esalamaki bongo, mpo ete Makomi ekokisama : Bakobuka ye ata mokuwa moko te ! 37Mpe epai mosusu Makomi elobi boye : Bakotala epai ya moto oyo bango batobolaki !

Bakundi Yesu

(Mt. 27.57-61 ; Mk. 15.42-47 ; Lk. 23.50-56)

38Sima na yango, Zozefi ya mboka Alimateo, asengaki nzela na Pilato mpo alongola nzoto ya Yesu na ekulusu. Ye mpe azalaki moyekoli ya Yesu, kasi ya kobombama, pamba te azalaki kobanga Bayuda. Bongo Pilato apesaki ye nzela. Zozefi ayaki mpe alongolaki nzoto ya Yesu. 39Nikodemi, oyo na ebandeli, akendaki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki. Amemaki pene-pene ya bakilo ntuku misato ya mafuta ya mira oyo ezalaki ya kosangana na malasi ya alowesi. 40Bakamataki nzoto ya Yesu, mpe balingaki yango na bilamba ya lino elongo na mafuta wana, ndenge Bayuda bazalaki kosala mpo na kokunda bibembe. 41Elanga moko ezalaki pene-pene na esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ; mpe lilita moko ya sika ezalaki kuna, kati na yango bakundaki naino ata moto moko te. 42Lokola ezalaki mokolo ya Bayuda ya Komilengela mpo na saba, batiaki Yesu na lilita wana, pamba te yango ezalaki pene-pene.
Copyright information for LinMNB