John 2

Likamwisi ya liboso

1Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na Kana na Galileya. Mama ya Yesu azalaki kuna.

2Yesu na bayekoli na ye babengamaki mpe na feti yango.

3Tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Yesu :

—Bazali lisusu na vino te !

4Kasi Yesu azongiselaki ye :

—Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na ngai naino ekoki te ?

5Bongo mama na ye alobaki na basali :

—Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.

6Biloko motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Eloko moko na moko ekokaki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale. 7Bongo Yesu alobaki na basali :

—Botondisa biloko oyo na mayi.

Mpe, batondisaki yango kino na motu.

8Yesu alobaki na bango :

—Sikʼoyo botoka mpe bomemela mokambi ya feti.

Bongo bamemelaki ye yango.

9Mokambi ya feti amekaki mayi oyo ebongwanaki vino. Ayebaki te soki vino yango ewutaki wapi, kasi basali oyo batokaki mayi, bango nde bayebaki. Bongo mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki, 10mpe alobaki na ye :

—Bato nyonso bapesaka liboso vino ya kitoko, bongo soki bato bameli mingi, sima bapesaka bango oyo ya mwa kitoko ; kasi yo obombi vino ya kitoko kino sikʼoyo.

11Oyo nde likamwisi ya liboso Yesu asalaki : asalaki yango na Kana na Galileya. Na bongo nde amonisaki nkembo na ye ; mpe bayekoli na ye bandimaki ye.

12Sima na yango, Yesu akendaki na Kapenawumi na mama na ye, na bandeko na ye, mpe na bayekoli na ye. Bavandaki kuna kaka mwa mikolo.

Kokoso ya liboso na Ndako ya Nzambe

(tala Mt. 21.12-17 ; Mk. 11.15-17 ; Lk. 19.45-46)

13Lokola feti ya Pake ekomaki pene-pene, Yesu akendaki na Yeruzalem. 14Akutaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bato oyo batekaka bangombe, bameme mpe bapijon, elongo na bato oyo basanzaka mbongo bavandaki na bamesa na bango. 15Bongo asalaki fimbo ya bansinga, mpe abenganaki bango nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambe, na bangombe, mpe bameme. Abwakaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, apanzaki mpe mbongo na bango. 16Bongo alobaki na bato oyo bazalaki koteka bapijon :

—Bolongola biloko oyo awa ! Bokomisa Ndako ya Tata na ngai, ndako ya mombongo te !
17Bongo bayekoli na ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : E e Nzambe, bolingo oyo nazali na yango mpo na Ndako na yo, yango nde ezali kozikisa ngai !

18Bongo Bayuda bapesaki ye eyano mpe balobaki na ye :

—Likamwisi nini okoki kosala mpo na kolakisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala bongo ?

19Yesu azongiselaki bango :

—Boboma Ndako ya Nzambe oyo, mpe nakotonga yango lisusu na mikolo misato !

20Bongo Bayuda balobaki :

—Nini ? Bato oyo batongaki Ndako oyo basalaki bambula ntuku minei na motoba, bongo yo olobi okotonga yango na mikolo misato !
21Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yesu alobaki, ezalaki nzoto na ye moko.

22Sima ya kosekwa ya Yesu kati na bakufi, nde bayekoli na ye bakanisaki ete ye alobaki bongo ; bongo bandimelaki makambo oyo ekomama, mpe maloba oyo Yesu alobaki.

23Tango Yesu azalaki na Yeruzalem mpo na feti ya Pake, bato mingi bandimaki ye mpo bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala. 24Kasi Yesu atielaki bango mitema te, pamba te ayebaki bango nyonso ; 25Mpe azalaki na posa te ete bayebisa ye makambo oyo ezalaka na bato, pamba te ye moko ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki na mitema ya bato.
Copyright information for LinMNB