Jude

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Yude, mowumbu ya Yesu Kristo mpe ndeko ya Zaki, natindimokanda oyo epai ya baoyo Nzambe abenga, baoyo Nzambe Tata alingaka, mpe baoyo babatelami mpo na Yesu Kristo.

2Tika ete mawa, kimia, mpe bolingo ezala na bino na mingi penza.

Tina ya mokanda oyo

3Balingami, nazalaki na posa mingi penza mpo na kokomela bino mpo na oyo etali lobiko oyo tozali na yango lisanga. Namoni ete ezali na tina mingi mpo nakomela bino, mpo ete nalendisa bino, mpo bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki na basantu mbala moko mpo na libela. 4Pamba te, bato mosusu basiʼbakoti na ndenge ya mayele na kati na bino, bato oyo etumbu na bango esiʼekomama banda kala. Bazali bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te, babongolaka ngolu ya Nzambe na biso mpo bazala na bonsomi ya kosala makambo ya mabe, mpe bawanganaka Yesu Kristo, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.

Bateyi ya lokuta mpe lifuti oyo ezali kozela bango

5Ata bosiʼboyebi makambo oyo nyonso, kasi nalingi kokanisela bino, ete Nkolo akangolaki bato na ye na Ezipito, mpe na sima abomaki baoyo baboyaki kondima. 6Mpe baanzelu oyo babatelaki ndelo ya bokonzi na bango te, kasi batikaki esika na bango : Nzambe azali kobomba bango kati na molili, na minyololo ya seko mpo na kosambisama ya Mokolo monene.

7Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodomo na Gomore mpe bato ya ba-vile pembeni ; basalaki ndenge baanzelu basalaki, basalaki kindumba mpe misala ya mabe. Mpe bazali ndakisa epai ya baoyo bakomona pasi ya etumbu ya moto ya seko.

8Ndenge moko mpe mpo na bato wana : makanisi na bango etindaka bango mpo babebisa banzoto na bango ; batiolaka bokonzi ya Nkolo mpe bafingaka bikelamo ya likolo. 9Kasi ata Misiele, mokonzi ya baanzelu, tango atiaki tembe na zabolo mpo na oyo etali nzoto ya Moyize, amekaki te kobimisa maloba ya kofinga mpo na zabolo ; kasi alobaki kaka : Tika Nkolo apamela yo !

10Kasi bato wana bafingaka biloko oyo bango basosolaka te ; mpe biloko oyo basosolaka na lolenge na bango ya bomoto lokola banyama oyo ezangi mayele, yango nde ekoboma bango.

11Mawa na bango ! Pamba te balandaki nzela oyo Kayina alandaki ; bamikweyisaki na libunga ya Balami mpo na kozwa litomba, mpe bakufaki mpo batombokaki lokola Kore. 12Bato yango babebisaka bafeti na bino ya bolingo, baliaka elongo na bino na botosi te, mpe balukaka kaka bango moko batonda. Bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ememaka-memaka ; bazali lokola banzete oyo ebotaka te na tango ya mbuma ; bakufa mbala mibale mpe basiʼbapikola bango. 13Bazali lokola bambonge ya makasi oyo ya ebale, oyo ebwakaka fulu-fulu ya soni na yango ; bazali lokola minzoto oyo elekaka-lekaka, Nzambe abombeli bango molili ya makasi mpo na libela.

14Enoki, moto na sambo wuta na Adam, asakolaki mpo na bato wana : tala, Nkolo azali koya elongo na baanzelu na ye basantu, bankoto na bankoto 15mpo na kosambisa bato nyonso, mpe kondimisa na kati na bango, bato nyonso oyo batosaka makambo ya Nzambe te, na misala na bango nyonso ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe, oyo bazalaki na kati ya Nzela ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe, mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato na masumu, baoyo batosaka te makambo ya Nzambe, balobaki mpo na ye. 16Bato yango bazali bato oyo batondi na koyima-yima mpe komilela-lela mpo na bomoi na bango ; balandaka baposa na bango ya mabe ; minoko na bango etondi na maloba ya lofundu mpe balobaka maloba ya sukali epai ya bato mpo bazwa litomba.

Bomitonga likolo ya fondasio ya kondima na bino

17Kasi bino, balingami, bokanisa maloba oyo bapostolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo balobaki liboso. 18Balobaki na bino : “Na batango ya suka, batioli bakozala, baoyo bakolanda baposa na bango ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe.” 19Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani, balandaka makanisi na bango ya bomoto, mpe bazali na Molimo te.

20Kasi bino, balingami, bomitonga bino moko likolo ya kondima na bino oyo eleki bosantu, mpe bobondela kati na Molimo Mosantu. 21Bomibatela kati na bolingo ya Nzambe, lokola bozali kozela mawa ya Nkolo na biso Yesu, mpo na bomoi ya seko. 22Baoyo bazali na tembe, boyokela bango mawa ; 23bobenda bato mosusu wuta na moto mpe bobikisa bango ; boyokela basusu mawa, na kobanga ; kasi boyina bilamba na bango oyo ebebi na baposa na bango ya nzoto.

Maloba ya kokumisa Nzambe

24Na ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo bokweya te mpe kolakisa bino liboso ya nkembo na ye, na kozanga mabe mpe na esengo monene, 25na Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala na ye, na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso, liboso ya batango nyonso, sikʼoyo mpe libela na libela ! Amen.
Copyright information for LinMNB