Luke 1

1Bato mingi babandaki kokoma makambo oyo elekaki na kati na biso, 2ndenge penza bayebisaki biso yango na baoyo bamonaki makambo yango na miso banda na ebandeli mpe bakoma basali ya Liloba ya Nzambe.

3Teyofili wa lokumu, lokola ngai moko nalukaki malamu penza koyeba makambo yango nyonso banda na ebandeli, yango wana namoni malamu ete nakomela yo yango ndenge yango elandanaki, 4mpo oyeba bosolo ya makambo oyo bateyaki yo.

KOBOTAMA MPE BOMWANA YA YESU

Anzelu ayebisi mbotama ya Jean-Batiste

5Na tango Erode azalaki mokonzi ya Yudea, ezalaki mpe na nganga-Nzambe moko kombo na ye Zakariya, ye azalaki moto ya molongo ya Abia ; mwasi na ye Elizabeti azalaki na libota ya Aroni. 6Bango mibale bazalaki sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa mitindo nyonso mpe mibeko nyonso ya Nkolo, na ndenge ekoki. 7Bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki kobota te ; mpe bango nyonso mibale bakomaki mibange.

8Mokolo moko, Zakariya azalaki kosala mosala na ye ya kinganga-Nzambe liboso ya Nzambe, mpo yango ezalaki ngala ya molongo na ye. 9Pamba te, tango babetaki zeke lokola banganga-Nzambe bamesanaki kosala, ye moto aponamaki mpo akota na Esika ya bosantu ya Nkolo mpo na kotumba ansa
ansa  : Mayi ya nzete ya mokili ya Arabia oyo bazalaki kotumba mpo ebimisa solo kitoko.
.
10Mpe, na tango ya kotumba ansa, ebele ya bato nyonso bazalaki kosambela na libanda. 11Bongo Anzelu ya Nkolo abimelaki ye, mpe atelemaki na loboko ya mobali ya mesa oyo batumbelaka ansa. 12Tango Zakariya amonaki ye, alengaki mpe kobanga monene ekangaki ye. 13Kasi Anzelu alobaki na ye :

—Kobanga te Zakariya, pamba te Nzambe ayokaki mabondeli na yo ; mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Jean.
14Ye akozala likambo ya esengo mpe oyo ekosepelisa yo, mpe bato mingi bakosepela mpo na kobotama na ye, 15pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela vino te to mpe masanga ya makasi te. Mpe akozala ya kotonda na Molimo-Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. 16Akozongisa bato mingi ya Isayele epai ya Nkolo Nzambe na bango. 17Mpe akokende liboso ya Nkolo, na molimo mpe na nguya ya Eliya mpo na kozongisa boyokani kati na batata na bana na bango, mpe batomboki bakokoma na makanisi ya bato na sembo, mpo na kobongisela Nkolo bato oyo babongisami malamu penza.

18Zakariya atunaki Anzelu :

—Nakoyeba yango ndenge nini ? Pamba te ngai nasi nakomi mobange penza, mpe bambula ya mwasi na ngai esiʼepusani mingi.
19Anzelu azongiselaki ye :

—Ngai nazali Gabriel. Natelemaka liboso ya Nzambe, batindi ngai mpo na koloba na yo mpe koyebisa yo basango oyo ya malamu.
20Lokola oboyi kondima maloba na ngai, oyo ekokokisama na tango na yango, okokoma baba, okokoka koloba lisusu te kino mokolo makambo yango ekosalama.

21Na tango wana, bato bazalaki kozela Zakariya mpe bazalaki kokamwa na ndenge bamonaki ye awumelaki na kati ya Esika ya bosantu. 22Tango abimaki, akokaki koloba na bango te. Bongo bato basosolaki ete amonaki emoniseli na kati ya Esika ya Bosantu. Kasi ye azalaki koloba na bango na bilembo mpe atikalaki baba. 23Tango mikolo na ye ya kosala mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.

24Sima na yango, mwasi na ye Elizabeti akomaki na zemi, mpe amibombaki sanza mitano. 25Alobaki :

—Tala likambo Nkolo asali mpo na ngai ! Alakisi ngai bolamu na ye na mikolo oyo mpe alongoli soni na ngai na kati ya bato.

Anzelu ayebisi mbotama ya Yesu

26Na sanza ya motoba, Nzambe atindaki Anzelu Gabriel na vile moko ya Galileya, kombo na yango Nazareti, 27epai ya elenge mwasi moko kombo na ye Mariya, oyo ayebaki naino nzoto ya mobali te, mpe azalaki mwasi oyo mobali moko kombo na ye Zozefi andimaki kobala. Zozefi azalaki moto ya libota ya David.

28Anzelu akotaki epai na ye mpe alobaki :

—Mbote na yo, yo moto Nzambe apesi bolamu na ye ! Nkolo azali elongo na yo !

29Tango Mariya ayokaki maloba ya Anzelu, abangaki mingi penza, mpe abandaki komituna-tuna soki mbote yango elingaki koloba nini.

30Kasi anzelu alobaki na ye :

—Mariya kobanga te, pamba te ozwi bolamu ya Nzambe.
31Okozwa zemi, okobota mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Yesu. 32Akozala moto monene mpe bakobenga ye : Mwana na Ye oyo Aleki Likolo. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David. 33Akozala mokonzi ya libota ya Zakobi libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na suka te !

34Mariya atunaki anzelu :

—Yango ekosalama ndenge nini, pamba te nayebi naino nzoto ya mobali te ?

35Anzelu azongiselaki ye :

—Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye oyo Eleki Likolo ekozipa yo na elilingi na yango. Yango wana Mosantu oyo akobotama, bakobenga ye : Mwana na Nzambe.
36Tala, ndeko na yo Elizabeti mpe, azwi zemi ya mwana mobali kati na kimobange na ye. Ye moto bazalaki kobenga : ekomba ; kasi sikʼoyo akomi na zemi ya sanza motoba 37Pamba te, Nzambe akoki kolemba kosala eloko ata moko te.

38Mariya azongiselaki ye :

—Nazali mosali ya Nkolo ; tika ete yango esalama na ngai ndenge olobi Bongo anzelu atikaki ye.

Mariya akeyi kotala Elizabeti

39Na mikolo wana, Mariya atelemaki mpe akendaki mbango na vile moko oyo ezali na mokili ya bangomba, oyo ya Yudea. 40Akotaki na ndako ya Zakariya mpe apesaki Elizabeti mbote. 41Tango Elizabeti ayokaki mbote ya Mariya, mwana aninganaki na libumu na ye. Bongo Elizabeti atondaki na Molimo-Mosantu, 42mpe agangaki na mongongo makasi :

—Yo opambolami na kati ya basi, mpe mwana oyo azali na libumu na yo azali ya kopambolama !
43Bolamu oyo ewuti wapi ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? 44Pamba te tala, tango nayoki mbote na yo, mwana aninganaki na esengo na kati ya libumu na ngai. 45Esengo mingi na mwasi oyo andimaki pamba te makambo oyo Nkolo alobaki na ye, ekokokisama ! 46Bongo Mariya alobaki :

Elimo na ngai kumisa Nkolo,
47mpe molimo na ngai ezali kosepela kati na Nzambe, Mobikisi na ngai. 48Pamba te atali kozanga lokumu ya mosali na ye. Yango wana banda lelo, bato ya batango nyonso bakobenga ngai mwasi ya esengo, 49pamba te, Nzambe na Nguya nyonso asali makambo minene mpo na ngai ; kombo na ye ezali mosantu. 50Mpe mawa na ye ekozala tango nyonso, likolo ya baoyo babangaka ye. 51Asali misala ya nguya na loboko na ye ; apanzi baoyo bazali na lofundu na motema. 52Akweyisi bakonzi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisa. 53Atondisi baoyo bazali na nzala na biloko ya malamu, kasi abengani bato ya bomengo maboko pamba. 54Asalisi mosali na ye Isayele, akanisi kolakisa mawa na ye 55na Abraham mpe na bana na ye, mpo na libela na libela, ndenge alobaki na bakoko na biso.

56Mariya avandaki elongo na Elizabeti pene-pene na basanza misato, bongo azongaki na ndako na ye.

Kobotama ya Jean-Batiste

57Tango eleko ya Elizabeti ya kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. 58Bongo baninga ya Elizabeti mpe bandeko na ye, tango bayokaki ete Nkolo ayokeli ye mawa monene, basepelaki elongo na ye.

59Na mokolo ya mwambe, sima ya mbotama ya mwana, baboti ya mwana bayaki mpo na kokatisa mwana ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye : Zakariya. 60Kasi mama na ye alobaki :

—Te ! Bakobenga ye Jean.

61Bongo balobaki na ye :

—Moto moko te na kati ya bandeko na yo azali na kombo oyo !

62Bongo batunaki tata ya mwana na bilembo, mpo bayeba soki kombo nini alingi kopesa mwana ; 63Zakariya asengaki mwa libaya mpe akomaki :

—Kombo na ye Jean. Bongo bango nyonso bakamwaki.

64Na mbala moko, monoko na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; abandaki koloba mpe kokumisa Nzambe.

65Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na kobanga ; mpe bazalaki kosolola-solola mpo na makambo yango nyonso, na kati ya mokili ya bangomba, oyo ya Yudea. 66Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kobomba yango na mitema na bango mpe komituna : Yango mwana oyo akozala nani ? Pamba te, loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye. 67Tata na ye, Zakariya, atondaki na Molimo Mosantu mpe asakolaki boye :

68Lokumu na Nkolo, Nzambe ya Isayele, pamba te aye kotala mpe kokangola bato na ye, 69mpe abimeseli biso Mobikisi-ya nguya, kati na libota ya David mosali na ye, 70ndenge alobaki yango kala penza na minoko ya baprofeta na ye ya bosantu, 71ete akobikisa biso na maboko ya banguna na biso, mpe na maboko ya baoyo bayinaka biso, 72mpo na kolakisa mawa na ye na bakoko na biso, mpe mpo na kokanisa Boyokani na ye ya bosantu, 73ndayi oyo alapaki na koko na biso, Abraham : 74ete sima ya kokangola biso na maboko ya banguna na biso, apesa biso nzela ya kosalela ye na kobanga te, 75kati na bosantu mpe bosembo liboso na ye, na mikolo nyonso ya bomoi na biso. 76Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo moprofeta ya Ye oyo Aleki Likolo ; pamba te, okokende liboso na ye mpo na kobongisela ye nzela, 77mpo na kolakisa na bato na ye, ete Nzambe apesi bango lobiko na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango, 78mpo na mawa monene ya Nzambe na biso ; na nzela na yango monzoto ya tongo ekoyela biso wuta na likolo, 79mpo na kongengisa baoyo bavandi na molili mpe na butu na liwa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso na nzela ya kimia.

80Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi kati na molimo ; bongo avandaki na esobe kino mokolo amimonisaki epai ya bato ya Isayele.
Copyright information for LinMNB