Luke 12

Yeba kotatola mpo na Yesu

(Mt. 10.19-20,28-33)

1Na tango wana, ebele ya bato bankoto na bankoto bayaki kosangana wana mpe bazalaki konyatana moko na moko. Bongo Yesu abandaki liboso koloba na bayekoli na ye :

—Bokeba na nkisi oyo evimbisaka mampa ya Bafarizeo : yango nde kokosana na bango.
2Pamba te eloko moko te oyo ezali ya kobombama mpe ekozanga komonana, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana. 3Yango wana, makambo nyonso oyo bokoloba na molili ekoyokana na moi ; mpe nyonso oyo bokoloba na matoyi, na kati ya basambele bakosakola yango likolo ya bandako.

4Nalobi na bino baninga na ngai, bobanga te baoyo babomaka nzoto, mpe na sima bakoka te kosala likambo mosusu. 5Kasi nakolakisa bino soki nani bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima ya koboma, azali na bokonzi ya kobwaka na lifelo. Ya solo nalobi na bino, bobanga ye. 6Boni, batekaka bandeke mitano ya mike-mike na makuta mibale te ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata moko na yango te. 7Mpe, ata suki ya motu na bino ezali ya kotangama. Yango wana bobanga te ; pamba te, bozali na motuya mingi koleka bandeke mike-mike ebele.

8Nalobi na bino, moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, Mwana na Moto mpe akondima ye liboso ya baanzelu ya Nzambe. 9Kasi moto oyo akowangana ngai liboso ya bato, bakowangana ye mpe liboso ya baanzelu ya Nzambe. 10Moto oyo akoloba maloba ya mabe mpo na Mwana ya Moto, akolimbisama ; kasi moto oyo akofinga Molimo-Mosantu, akolimbisama te.

11Tango bakomema bino mpo na kosamba liboso ya bandako ya mayangani, liboso ya bayangeli, mpe liboso ya bakonzi, bomitungisa te mpo na koyeba soki ndenge nini bokomilongisa to mpe maloba nini bokoloba ; 12pamba te, Molimo-Mosantu akolakisa bino kaka na tango wana maloba oyo bokoloba.

Lisapo ya moto ya bomengo oyo azangi mayele

13Moto moko na kati ya ebele ya bato alobaki na Yesu :

—Moteyi, loba na ndeko na ngai, akabola na ngai, biloko oyo tata atikelaki biso.

14Yesu azongiselaki ye :

—Mobali, nani atie ngai zuzi to mokaboli ya biloko oyo batikela bino ?

15Bongo alobaki na bango :

—Bokeba mpe bomibatela na lokoso ya lolenge nyonso ; pamba te ata moto atondi na bomengo, bomoi na ye ezali na kati ya biloko na ye te.

16Bongo alobaki na bango lisapo oyo :

—Moto moko ya bomengo azalaki na bilanga oyo ebotaki biloko mingi penza.
17Bongo akanisaki na nse ya motema na ye : “Nasala nini ? Nazali na esika te mpo na kobomba biloko oyo nazwi na bilanga” ; 18bongo alobaki ; “Nakosala boye : nakoboma bandako oyo nabombelaka biloko na ngai mpe nakotonga misusu oyo eleki minene, bongo nakotia bambuma na ngai mpe biloko na ngai kuna.” 19Bongo nakoloba na elimo na ngai : “Otondi na biloko ya malamu mpo na bambula ebele. Pema na yo, lia, mela, mpe sepela !” 20Kasi Nzambe alobaki na ye : “Zoba ! Na butu ya lelo, bomoi na yo bakosenga yo yango. Bongo biloko nyonso oyo obomba mpo na yo moko, nani akozwa yango ?”

21Ekozala bongo na moto oyo akongolaka bomengo mpo na ye moko, kasi azali moto ya bomengo te na miso ya Nzambe.

(Mt. 6.25-34)

22Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Yango wana nalobi na bino : bomitungisa te mpo na bomoi na bino, soki bokolia nini ; to mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini ?
23Pamba te, bomoi eleki bilei, mpe nzoto eleki bilamba.

24Botala bandeke oyo babengaka korbo, yango elonaka te mpe ebukaka te, ezali mpe na ndako te mpo na kobombela mbuma, ata mpe esika ya kobomba biloko te, kasi Nzambe aleyisaka yango. Nzokande bino boleki bandeke na motuya ! 25Kutu, nani kati na bino mpo na komitungisa na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na bomoi na ye ? 26Soki bokoka te kosala mwa likambo wana ya moke, bongo mpo na nini komitungisa na makambo oyo mosusu ? 27Botala bafololo ndenge ekolaka, esalaka te mpe etongaka bilamba te ; kasi nalobi na bino, ata Salomo, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. 28Soki Nzambe alatisaka na ndenge wana, matiti oyo ezali lelo na elanga, mpe lobi ekobwakama na moto ; boni, akolatisa bino koleka yango te ? A ! bato ya kondima moke.

29Kasi bino, boluka te eloko oyo bokolia to oyo bokomela, mpe bomitungisa te mpo na yango. 30Pamba te, bapakano ya mokili oyo nde baluka-lukaka biloko wana nyonso, kasi Tata na bino ayebi ete bozali na posa ya biloko wana ; 31kasi boluka Bokonzi na ye, bongo biloko wana bakobakisela bino yango.

32Etonga moke ya bameme, bobanga te ; pamba te, Tata na bino asepelaki mpo na kopesa bino Bokonzi. 33Boteka biloko oyo bozali na yango mpe bopesa mbongo oyo bokozwa na babola. Bomisalela basakosi ya mbongo oyo ebebaka te, bomengo oyo esilaka te kuna na Likolo, epai moyibi akoki koyiba te, mpe epai bampese bakoki kobebisa yango te. 34Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna !

Bomibongisa mpo na kozela koya ya Nkolo

(Mt. 24.45-51)

35Botikala kaka na bilamba na bino ya mosala, mpe bobatela minda na bino etikala kaka ya kopela. 36Bozala lokola bato oyo bazali kozela mokonzi na bango azonga wuta na feti ya libala, mpo ete tango akoya mpe akobeta porte, bakoka kofungolela ye yango noki penza. 37Esengo mingi na basali oyo mokonzi na bango akokuta bango bazali kokengela tango ye akoya. Ya solo nalobi na bino : akolata bilamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, akoya mpe akopesa bango biloko ya kolia. 38Ata aye na midi ya butu, to na ngonga misato ya tongo : soki akuti bango bazali kokengela, basali yango bakosepela.

39Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ya ndako ayebi tango moyibi asengeli akoya, akotika te ete ndako na ye batobola yango. 40Yango wana, bino mpe bomibongisa ; pamba te Mwana ya Moto akoya na ngonga oyo bozali kozela te.

41Bongo Piere atunaki ye :

—Nkolo, olobi lisapo oyo mpo na biso, to mpo na bato nyonso ?

42Nkolo azongisaki :

—Nani azali kapita ya sembo mpe ya mayele oyo mokonzi na ye apesi ye mokumba ya kobatela basali ya ndako na ye, mpo apesaka bango lifuti na bango ya ble na tango oyo ekoki ?
43Esengo mingi na mosali wana soki mokonzi na ye azongi, mpe akuti ye azali kosala bongo. 44Ya solo nalobi na bino, mokonzi na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.

45Kasi soki mosali wana alobi na nse ya motema : “Mokonzi na ngai awumeli mpo na koya”, bongo soki abandi konyokola basali mosusu ya mibali mpe ya basi, kolia, komela mpe kolangwa masanga ; 46mokonzi na ye akoya na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga oyo ye ayebi te. Ya solo, mokonzi na ye akokata ye biteni-teni, mpe akotia ye na molongo ya bato oyo bazangi kondima.

47Nzokande mosali oyo ayebaki mokano ya mokonzi na ye, kasi amibongisaki te mpe asalaki mokano ya mokonzi na ye te, bakoteta ye bafimbo mingi penza. 48Kasi mosali oyo ayebaki te mokano ya mokonzi na ye, mpe asalaki makambo oyo asengelaki kozwela etumbu, bakobeta ye bafimbo mingi te ; pamba te moto oyo bapesaki ye mingi bakosenga ye mpe mingi ; mpe oyo bapesaki ye mokumba monene, bakotuna ye mpe mingi.

Bokabwani mpe etumbu

49Nayei kobwaka moto na mokili mpe nalingi ete moto yango epela. 50Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa : mpe nazali motema likolo kino yango ekokokisama !

(Mt. 10.34-36)

51Bino bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Te, kasi bokabwani. 52Pamba te, banda sikʼoyo soki batu mitano bazali libota moko, bakokabwana : misato bakoyina mibale mpe mibale bakoyina misato. 53Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; bokilo ya mwasi akoyina mwasi ya mwana na ye, mpe mwasi ya mwana akoyina bokilo na ye ya mwasi.

(Mt. 16.2-3)

54Bongo Yesu alobaki lisusu na ebele ya bato :

—Tango bomonaka mapata ebimaka na weste, bolobaka nbula moko : “Mbula elingi kobeta”, mpe yango esalamaka bongo.
55Tango mopepe ya sude eyaka, bolobaka : “Molunge ekozala makasi penza”, mpe yango ezalaka bongo.

56Bato ya kokosana ! Boyebi kolimbola makambo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo ; bongo mpo na nini bozali kososola te tango oyo ?

57Mpo na nini bososolaka te na bino moko oyo ezali sembo ? 58Yango wana, tango ozali kokende na tribinale elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo boyokana tango bozali naino na nzela ; soki te akomema yo epai ya zuzi, bongo zuzi akopesa yo na maboko ya polisi, mpe polisi akobwaka yo na boloko. 59Nalobi na yo, okobima kuna te kino tango okofuta likuta oyo ya suka.
Copyright information for LinMNB