Luke 13

Kobongola motema ezali na tina

1Bato moko bazalaki wana na tango wana, oyo bayebisaki Yesu makambo oyo esalamaki na bato ya Galileya, baoyo Pilato asangisaki makila na bango elongo na mbeka na bango.

2Yesu azongiselaki bango :

—Boni, bokanisi ete bato ya Galileya wana bazwi pasi wana mpo bazalaki bato ya masumu koleka bato ya Galileya nyonso ?
3Ezali bongo te ! Pamba e, bino mpe soki bobongwani te, bokokufa bino nyonso.

4To bokanisi ete bato zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako ya molayi ya Silowe ekweyilaki bango, baleki bato mosusu nyonso ya Yeruzalem na masumu ? 5Ezali bongo te ! Pamba te, bino mpe soki bobongwani te, bokokufa bino nyonso.

6Bongo alobaki lisapo oyo :

—Moto moko azalaki na nzete ya figi oyo ezalaki ya kolonama na elanga na ye ya banzete ya vino ; bongo akendaki koluka bambuma, kasi amonaki ata moko te.
7Bongo alobaki na mosali ya elanga ya vino : “Tala, oyo ekomi mbula misato nayaka koluka bambuma na nzete oyo ya figi, kasi namonaka ata mbuma moko te. Kata yango ; mpo na nini ezali kokanga mabele pamba ?” 8Mosali ya elanga azongiselaki ye : “Mokonzi, tika yango lisusu mbula oyo ! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola ; 9soki eboti mbuma na mbula oyo ezali koya, a ! a ! wana malamu ! Kasi soki eboti te, bongo okata yango.”

Yesu abikisi moto na mokolo ya saba

10Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koteya na moko ya bandako ya mayangani. 11Mwasi moko azalaki wana, azalaki na molimo ya mabe, bambula zomi na mwambe. Mokongo na ye ezalaki ya kogumbama mpe azalaki kokoka kotelema malamu te. 12Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye mpe alobaki na ye :

—Mwasi, okangolami na pasi na yo !

13Bongo atielaki ye maboko, mpe kaka na tango wana atelemaki malamu, mpe abandaki kokumisa Nzambe.

14Kasi mokonzi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo Yesu abikisaki moto na mokolo ya saba. Bongo alobaki boye na ebele ya bato :

—Mikolo ezali motoba mpo na kosala mosala ; boya, mpe babikisa bino na mikolo wana ! Kasi na mokolo ya saba te !

15Nkolo azongiselaki ye :

—Ipokrite ! Boni, moko-moko na kati na bino afungolaka ngombe to mpunda na ye te na elielo ya banyama mpo na kokende komelisa yango mayi na mokolo ya saba ?
16Bongo mwasi oyo, oyo azali mwana ya Abraham, oyo satana akangaki na nse ya bokonzi na ye bambula zomi na mwambe, ekokaki te akangolama na minyololo wana, na mokolo ya saba ?

17Tango alobaki bongo, bayini na ye nyonso batondaki na soni. Bongo bato nyonso batondaki na esengo mpo na makambo nyonso ya kokamwa ye azalaki kosala.

Masapo ya mbuma ya mutarde mpe ya kisi oyo evimbisaka mampa

(Mt. 13.31-33 ; Mk. 4.30-32)

18Bongo Yesu atunaki :

—Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakoki komeka yango na nini ?
19Bokonzi ya Nzambe ekokani na mbuma ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye ; ebima mpe ekoma nzete monene, bongo bandeke bayaki kovanda na bitape na yango.

20Yesu alobaki lisusu :

—Bokonzi ya Nzambe ekokani lisusu na nini ?
21Bokonzi ya Nzambe ekokani na kisi ya mampa oyo mwasi moko akamataki mpe asangisaki yango na kopo misato na farine, kino tango farine nyonso evimbaki.

Bokota na porte ya moke

22Bongo Yesu azalaki koleka na bavile mpe na bamboka, mpe azalaki koteya awa azalaki kokende na Yeruzalem.

(Mt. 7.13-14)

23Moto moko atunaki ye :

—Nkolo, bato oyo bakobika bazali mingi te ?

24Azongiselaki bango :

—Bosala makasi mpo na kokota na porte ya moke ; pamba te, bato mingi bakoluka kokota kasi bakokoka te.

(Mt. 25.10-12)

25—Tango nkolo ya ndako akotelema, mpe akokanga porte, bino baoyo bokozala na libanda, bokobanda kobeta porte, mpe kobondela : “Nkolo, fungolela biso !” Bongo ye akozongisela bino : “Nayebi esika bowuti te !”

26—Bongo bokoloba : “Toliaki mpe tomelaki na yo, mpe oteyaki na babala-bala na biso !”

27Kasi ye akozongisa : “Nalobi na bino : Nayebi esika bowuti te ! Bolongwa liboso na ngai, bino nyonso bato bosalaka mabe !”

28—Kolela mpe koswa mino ekozala kuna, tango bokomona Abraham, Izaki, Zakobi mpe baprofeta nyonso na kati ya Bokonzi ya Nzambe ; nzokande bino, bokobwakama na libanda. 29Bato bakowuta na bipai ya Este mpe Weste, na bipai ya Norde mpe Sude, bakovanda na kati ya Bokonzi ya Nzambe.

30Bongo, bato mosusu na kati ya baoyo bazali sikʼoyo bato ya suka, bakokoma bato ya liboso ; mpe bato mosusu na kati ya baoyo bazali sikʼoyo bato ya liboso, bakokoma bato ya suka.

Yesu azali kokoba mobembo na ye na Yeruzalem

31Kaka na tango wana, bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na ye :

—Longwa awa, mpe kende na yo, pamba te Erode alingi koboma yo !

32Kasi Yesu azongiselaki bango :

—Bokende, boloba na renar wana : “Nazali kobengana milimo mabe mpe nazali kobikisa bato ya maladi lelo mpe lobi, mpe na mokolo ya misato nakosilisa mosala na ngai.
33Kasi esengeli ete nakoba mobembo na ngai lelo, lobi, mpe lobi oyo ekolanda, pamba te, ekoki kosalama te ete moprofeta baboma ye na libanda ya Yeruzalem !”

(Mt. 23.37-39)

34—Yeruzalem ! Yeruzalem ! Yo moto obomaka baprofeta mpe obomaka na mabanga bato oyo Nzambe atindelaka yo ! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso esangisaka bana na yango na nse ya mapapu, kasi olingaki yango te ! 35Yoka, ndako na yo bakosundola yango ; mpe nalobi na yo : okomona ngai lisusu te kino tango okoloba : Mapamboli ezala na Moto oyo aye na kombo na Nkolo !
Copyright information for LinMNB