Luke 16

Nzambe mpe mbongo

1Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Moto moko ya mbongo azalaki na kalaka ; bongo bafundaki kalaka yango epai na ye ete azalaki kobebisa biloko na ye.
2Abengisaki ye, mpe alobaki na ye :

“Makambo nini nayoki mpo na yo ? Limbola ngai ndenge osalaka mosala na yo, pamba te okozala lisusu kalaka ya misala na ngai te.”

3Kalaka alobaki boye na nse ya motema : “Nakosala nini, pamba te mokonzi na ngai alingi kolongola ngai na mosala ? Nazali penza na makasi mingi te mpo na kosala bilanga, mpe kosenga-senga biloko ya bato, nakoyoka soni. 4Nayebi likambo nakosala, mpo bato bayamba ngai na bandako na bango tango nakokoma somele.”

5Bongo abengisaki bato nyonso oyo bazalaki na baniongo ya mokonzi na ye. Atunaki moto ya liboso :

“Ozali na niongo ya boni epai ya mokonzi na ngai ?”

6Moto yango azongisaki : “Batono ntuku mibale ya mafuta.” Kalaka alobaki na ye : “Kamata mokanda ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya batono zomi.”

7Atunaki mosusu :

“Bongo yo, ozali na niongo ya boni ?” Ye azongisaki : “Basaki nkama ya ble.” Kalaka alobaki na ye : “Kamata mokanda ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya basaki ntuku mwambe.”

8Bongo mokonzi akumisaki kalaka wana ya mabe, mpo asalaki na mayele nyonso. Pamba te, bana ya mokili oyo bazali na mayele mingi kati na bango na bango, koleka bana ya moi.

9Bongo ngai nalobi na bino : bosalela bomengo ya mokili mpo na kozwa baninga mpo na bino moko. Mpo ete mokolo bokozanga yango, bayamba bino na bivandelo ya seko. 10Pamba te, moto oyo azali sembo na likambo moke, akozala mpe sembo na likambo ya monene ; mpe moto oyo azali sembo te na likambo ya moke, akozala mpe sembo te na likambo monene. 11Soki bozali sembo te mpo na kobatela bomengo ya mokili ; bongo nani akopesa bino bomengo ya solo ? 12Mpe soki bozali sembo te na biloko ya moto mosusu, bongo nani akopesa bino biloko oyo ya bino moko ?

13—Mosali moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, to akoyina moko mpe akolinga mosusu ; to mpe akotosa moko mpe akotiala oyo mosusu. Yango wana, bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo.

14Bafarizeo mpe balingaki mbongo mingi penza, tango bayokaki makambo wana nyonso, basekaki ye.

15Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bino bozali bato oyo bamikomisaka sembo bango moko liboso ya bato, kasi Nzambe ayebi mitema na bino. Pamba te eloko oyo ezali tina mingi kati na bato, Nzambe ayinaka yango.

Mibeko mpe Bokonzi ya Nzambe

(Mt. 11.12-13)

16—Tango ya Mibeko mpe ya baprofeta ezalaki kino na Jean ; banda tango wana, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kosala makasi mpo na kokota kuna.

17—Ezali pasi te mpo likolo mpe nse elimwa, kasi mpo na Mibeko, ata likomi na yango moko te ekolongwa.

(Mt. 5.32)

18—Moto oyo alongoli mwasi na ye mpe abali mosusu, asali ekobo ; mpe moto oyo abali mwasi oyo balongoli na libala, asali ekobo.

Moto ya bomengo mpe mobola Lazare

19—Moto moko ya bomengo azalaki kolata bilamba ya talo mpe ya kitoko, mpe azalaki kosala feti mikolo nyonso. 20Mobola moko kombo na ye Lazare, azalaki na bapota nzoto mobimba, azalaki kolala na porte na ye. 21Azalaki kolinga kotonda na ndambo ya biloko oyo ezalaki kokweya na mesa ya moto ya bomengo. Kasi bambwa bazalaki koya kolembola bapota na ye.

22Mobola akufaki mpe banzelu bamemaki ye pembeni ya Abraham. Moto ya bomengo mpe akufaki, mpe bakundaki ye. 23Wuta na mboka ya bakufi, epai azalaki koyoka pasi mingi penza, atombolaki miso na likolo, amonaki na mosika penza Abraham, mpe Lazare avandi pembeni na ye.

24Bongo agangaki : “Tata Abraham, yokela ngai mawa, mpe tinda Lazare mpo ete atia songe ya mosapi na ye na mayi, mpo atangisela ngai na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi mingi penza na moto oyo.”

25Kasi Abraham azongiselaki ye :

“Mwana na ngai, kanisa malamu ete biloko na yo tango ozalaki na bomoi, nzokande Lazare azalaki na pasi. Sikʼoyo, ye abondisami awa, kasi yo okomi na pasi.
26Lisusu, libulu moko ya monene ezali kokabola biso na bino ; na ndenge ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa mpo na kokende epai na bino, akokoka te ; mpe oyo alingi kokatisa yango longwa kuna mpo na koya awa epai na biso, akokoka mpe te.”

27Moto ya bomengo alobaki : “Tata, nabondeli yo, tinda Lazare na ndako ya tata na ngai, 28pamba te nazali na bandeko mitano ; akende kokebisa bango, mpo bango mpe, bakoma awa te na esika ya pasi boye !”

29Kasi Abraham azongiselaki ye : “Bandeko na yo bazali na Moyize mpe baprofeta ; bayokela bango !”

30Kasi alobaki lisusu : “Te, tata Abraham : kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akeyi epai na bango, wana bakobongola mitema !”

31Kasi Abraham azongiselaki ye :

“Soki baboyi koyokela Moyize mpe baprofeta, bakondima mpe te ata soki moto asekwi na liwa !”
Copyright information for LinMNB