Luke 17

Ezaleli kati ya bandeko

(Mt. 18.6-7 ; Mk. 9.42)

1Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Makambo oyo ekweyisaka bato na masumu ekoki kozanga te, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela.
2Eleki malamu mpo na ye, bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe babwaka ye na ebale, na esika ete akweisa moko ya bana oyo. 3Bomikebisa malamu bino moko !

(Mt. 18.21-22)

—Soki ndeko na yo asala yo mabe, pamela ye ; mpe soki ayoki mawa mpo na yango, limbisa ye.
4Mpe soki asali yo mabe mbala sambo na mokolo, mpe aye epai na yo mbala sambo mpo na koloba na yo : “Nayoki mawa na mabe na ngai”, limbisa ye.

Kondima lokola mbuma ya mutarde

(Mt. 17.20)

5Bapostolo balobaki na Nkolo :

—Bakisela biso kondima !

6Nkolo azongiselaki bango :

—Soki bozali na kondima lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : “Mipikola mpe milona na kati ya ebale”, mpe yango ekotosa bino.

Tozali basali ya pamba

7—Nani kati na bino soki azali na mosali oyo asalaka na bilanga to abatelaka bameme, tango azongaka na bilanga, alobaka na ye : “Yaka noki, vanda na mesa mpo olia ?” 8Boni, bolobaka na ye te ete : “Lambela ngai biloko, lata bilamba ya mosala mpe salela ngai kino nakosilisa kolia mpe komela ; bongo na sima okolia mpe okomela ?” 9Boni, mokonzi asengeli kopesa mosali wana matondi mpo asali mosala oyo batindaki ye ? 10Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindaki bino, boloba : “Tozali kaka basali ya pamba ; tosali kaka mosala na biso.”

Yesu abikisi bato zomi ya maladi ya maba

11Awa Yesu azalaki kokende na Yeruzalem, alekaki na Samariya mpe na Galileya. 12Tango azalaki kokota na mboka moko, bato zomi ya maladi ya maba bayaki kokutana na ye ; batelemaki na mosika 13mpe babandaki kobelela ye na mongongo makasi :

—Yesu, Mokonzi yokela biso mawa !

14Tango amonaki bango, alobaki :

—Bokende komilakisa na banganga-Nzambe ! Tango bazalaki kokende, bakomaki peto.
15Moko na kati na bango, tango amonaki ete abikaki, azongaki epai ya Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi ! 16Afukamaki liboso ya Yesu, elongi na nse, apesaki ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samariya.

17Bongo Yesu atunaki :

—Bokomaki peto bino zomi, ezali boye te ? Bongo wapi libwa mosusu ?
18Ata moko te azongi mpo na kokumisa Nzambe, longola kaka mopaya oyo ?

19Bongo alobaki na ye :

—Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !

Bokonzi ya Nzambe ekoya ndenge nini ?

20Mbala moko, bafarizeo batunaki ye soki tango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya. Yesu azongiselaki bango :

—Bokonzi ya Nzambe ekoya te na ndenge ete bato bamona yango.
21Bakoloba te ete : “Ezali awa”, to “Ezali kuna”, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino !

22Bongo alobaki na bayekoli na ye :

—Tango ezali koya, oyo bokozala na posa monene ya komona mokolo moko ya mikolo Mwana ya moto, kasi bokomona yango te.

(Mt. 24.23-28)

23—Bato bakoloba na bino : “Azali awa !” to “Azali kuna !” Bokende te, mpe bolanda bango te. 24Ndenge kongenga ya kake ebimaki na likolo mpe engengisaka epai moko kino epai mosusu, ekozala mpe bongo na Mokolo ya Mwana ya moto. 25Kasi liboso esengeli amona pasi mingi, mpe bato ya tango oyo baboya ye.

(Mt. 24.37-41)

26—Makambo oyo elekaki na mikolo ya Nowa, ekoleka mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto. 27Bato bazalaki kolia, komela, kobala, mpe kobalisa bana na bango, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. Bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. 28Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Loti. Bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga. 29Kasi mokolo Loti abimaki na Sodomo, mbula ya moto mpe ya sufulu ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. 30Ekozala mpe bongo mokolo Mwana ya moto akomonana. 31Na mokolo wana, moto oyo akozala likolo ya ndako mpe akozala na biloko na ndako, akita te mpo na kozwa yango. Ndenge moko mpe mpo na moto oyo akozala na bilanga, azonga te mpo na eloko soki nini. 32Bokanisa mwasi ya Loti ! 33Moto oyo akolinga kobatela bomoi na ye, akobungisa yango ; kasi oyo akobungisa yango, akobatela yango.

34Nalobi na bino, butu wana, bato mibale bakolala mbeto moko : bakozwa moko mpe mosusu akotikala. 35Basi mibale bakozala kotuta mbuma esika moko : bakozwa moko mpe mosusu akotikala. [ 36Mibali mibale bakozala na elanga : bakozwa moko mpe mosusu akotikala
Verset oyo, ezali te na Mikanda mingi ya kala (Tala Mt. 24.40 )
.]

37Bongo bayekoli batunaki ye :

—Nkolo, makambo yango ekosalama wapi ? Yesu azongiselaki bango :

—Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana ku !
Copyright information for LinMNB