Luke 18

Bolemba te mpo na kobondela

1Bongo Yesu alobaki lisapo moko epai ya bayekoli na ye mpo na kolakisa bango ete esengeli babondelaka tango nyonso mpe balembaka te. 2Alobaki :

—Na vile moko, zuzi moko azalaki kuna. Azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki kotosa bato te.
3Mwasi moko akufela mobali azalaki mpe na vile yango ; ye azalaki koya mbala na mbala epai na ye mpo na koloba : “Longisa ngai liboso ya monguna na ngai.” 4Banda kala zuzi azalaki koboya. Kasi suka na yango alobaki na nse ya motema : “Ata nabangaka Nzambe te mpe natosaka bato te, 5kasi lokola mwasi mokufeli mobali oyo azali kotungisa ngai, nakolongisa ye ; soki te akolembisa ngai mpo na koyaka na ye tango nyonso.”

6Bongo Nkolo alobaki ;

—Boyoka malamu maloba oyo zuzi ya mabe alobaki.
7Boni, bokanisi ete Nzambe mpe akolongisa te bato oyo ye apona, baoyo bazangaka epai na ye butu na moi ? Akowumela mpo na kosalisa bango ? 8Nalobi na bino, akolongisa bango noki. Kasi, tango Mwana ya moto akoya, akokuta kondima na mokili ?

Lisapo ya mofarizeo mpe mofutisi mpako

9Yesu alobaki lisusu lisapo oyo mpo na bato oyo bazalaki kotia mitema na bango moko ete bazali bato sembo mpe bazalaki kotiala bato mosusu.

10—Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe mpo na kobondela : moko azalaki mofarizeo mpe mosusu mofutisi mpako. 11Mofarizeo atelemaki mpe abondelaki boye na nse ya motema :

“E e Nzambe, natondi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, oyo bazali miyibi, basalaka mabe, bazali bandumba, to lokola mofutisi mpako oyo.
12Naboyaka kolia mpo na kobondela mbala mibale na poso, mpe napesaka eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo nazwaka.”

13Kasi mofutisi mpako atelemaki mosika, mpe alingaki kutu te kotombola miso na likolo. Azalaki komibeta na tolo mpe koloba :

“E e Nzambe, yokela ngai mawa, ngai moto ya masumu !”

14Nalobi na bino ete, moto oyo, azongaki na ndako akomi moto na sembo na miso ya Nzambe, kasi oyo mosusu te. Pamba te, moto oyo akomimatisa, bakokitisa ye ; mpe oyo akomikitisa, bakomatisa ye !

Yesu ayambi bana mike

(Mt. 19.13-15 ; Mk. 10.13-16)

15Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo asimba bango, kasi tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango. 16Kasi Yesu abengaki bana mike epai na ye mpe alobaki :

—Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te ; pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato ya ndenge oyo.
17Ya solo nalobi na bino : Moto nyonso oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe te lokola mwana moke, akokota kuna te.

Bato ya bomengo mpe Bokonzi ya Nzambe

(Mt. 19.16-30 ; Mk. 10.17-31)

18Bongo mokonzi moko ya Bayuda atunaki ye :

—Moteyi malamu, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko ?

19Yesu azongiselaki ye :

—Mpo na nini obengi ngai moto malamu ? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko.
20Oyebi Mibeko : “Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, tosa tata mpe mama na yo !”

21Moto yango azongisaki :

—Nyonso wana, natosaka yango banda bolenge na ngai.

22Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na ye :

—Ozangi naino eloko moko ; teka biloko nyonso oyo ozali na yango, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai !

23Tango ayokaki maloba wana, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki moto ya bomengo mingi penza.

24Awa Yesu amonaki ete akomaki mawa-mawa, alobaki :

—Ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe !
25Ezali pasi te na samo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.

26Baoyo bayokaki yango batunaki :

—Bongo nani akoki kobika ?

27Yesu azongisaki :

—Likambo oyo bato bakoki kosala te, Nzambe akoki kosala yango !

28Bongo Piere alobaki :

—Totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda yo !

29Yesu alobaki na bango :

—Ya solo nalobi na bino : moto moko te oyo atiki dako na ye, to mwasi na ye, to bandeko na ye ya mibali, to baboti na ye, to bana na ye, mpo na Bokonzi ya Nzambe,
30akozanga kozwa biloko mingi koleka na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.

Yesu ayebisi lisusu liwa mpe kosekwa na ye

(Mt. 20.17-19 ; Mk. 10.32-34)

31Yesu akamataki bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni mpe alobaki na bango :

—Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe makambo nyonso oyo baprofeta bakoma mpo na Mwana ya moto ekokokisama.
32Pamba te, bakokaba ye na maboko ya bapakanu, bakoseka ye, bakofinga ye, bakobwakela ye soi, 33bakobeta ye bafimbo mpe bakoboma ye ; mpe akosekwa na mokolo ya misato.

34Bayekoli basosolaki eloko ata moko te na makambo yango ; pamba te ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te soki Yesu alingaki koloba nini.

Yesu abikisi moto akufa miso

(Mt. 20.29-34 ; Mk. 10.46-52)

35Awa Yesu akomaki pene-pene na Zeriko, moto moko akufa miso avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo. 36Tango ayokaki ebele ya bato bazalaki koleka, atunaki soki likambo nini yango.

37Balobaki na ye “Yesu ya Nazareti azali koleka.”

38Abandaki konganga :

—Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

39Bato oyo bazalaki liboso ya molongo bapekisaki ye mpo atika koloba ; kasi agangaki lisusu makasi koleka :

—Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

40Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela ye moto wana akufa miso. Tango akomaki pene-pene na ye, Yesu atunaki ye :

41—Olingi nasala nini mpo na yo ? Ye azongisaki :

—Nkolo, nalingi namona lisusu.

42Bongo Yesu alobaki na ye :

—Mona, kondima na yo ebikisi yo !

43Kaka na tango wana, moto yango abandaki komona, alandaki Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki likambo yango, bango mpe bakumisaki Nzambe.
Copyright information for LinMNB