Luke 2

Mbotama ya Yesu

(Mt. 11.18-25)

1Na mikola wana, Sezare-Oguste apesaki mobeko ya kotanga talo ya bato nyonso oyo bavandaka na mikili oyo ezalaki na nse ya bokonzi ya Roma. 2Kotanga yango ezalaki ya liboso, oyo esalamaki tango Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siriya.

3Bongo moto na moto azalaki kokende komikomisa na vile na ye. 4Lokola Zozefi azalaki na libota ya David, yango wana alongwaki na vile ya Nazareti, na mokili ya Galileya mpo na kokende na mokili ya Yudea, na vile ya Betelemi, vile ya David. 5Akendaki kuna mpo na kokomisa kombo elongo na Mariya mwasi oyo ye andimaki kobala ; mpe Mariya azalaki na zemi.

6Tango bazalaki na Betelemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7Mariya abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso. Alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elielo ya banyama, pamba te esika ezalaki te mpo na bango na ndako ya bapaya.

8Mpe babateli ya bameme bazalaki na bilanga ya pembeni wana, bazalaki kokengela etonga ya bameme na bango na butu. 9Anzelu ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki pembeni na bango, bongo bayokaki somo mingi.

10Kasi anzelu alobaki na bango :

—Bobanga te ; nayeli bino sango moko ya malamu oyo ekosepelisa bato nyonso :
11Mobikisi abotami mpo na bino lelo, na vile ya David. Ye azali Kristo, Nkolo. 12Oyo nde ekozala elembo mpo na bino : mwana moke balingi na bilamba mpe balalisi ye na elielo ya banyama !

13Na mbala moko, baanzelu ebele ya mapinga ya likolo, bayaki kosangana na anzelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe :
14 Nkembo na Nzambe na Bisika Bileki Likolo !
Mpe kimia na mokili,
epai ya bato oyo bolamu na ye ezali likolo na bango.

15Tango baanzelu batikaki bango mpe bazongaki na Likolo, babeteli ya bameme balobanaki moko na moko :

—Tika tokende na Betelemi mpe totala likambo oyo esalami kuna, oyo Nkolo ayebisi biso !

16Bakendeki noki mpe bakutaki Mariya na Zozefi na mwana alali na elielo ya banyama. 17Sima ya komona mwana, balobaki makambo oyo bayebisaki bango mpo na mwana. 18Bato nyonso oyo bayokaki yango, bakamwaki mingi mpo na makambo oyo babateli bayebisaki bango. 19Kasi Mariya azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema, mpe azalaki kokanisa yango mbala mingi.

20Bongo babateli ya bameme bazongaki ; bazalaki kokumisa mpe kosanzola Nzambe, mpo na nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki ; mpe yango ezalaki kaka ndenge bayebisaki bango yango.

Bamemi Yesu na Ndako ya Nzambe

21Na mokolo ya mwambe, wana tango ya kokatisa ye ekokaki, bapesaki ye kombo Yesu ; kombo oyo anzelu apesaki liboso ete mama na ye azwa zemi na ye. 22Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, ndenge ekomama na Mobeko ya Moyize, Zozefi mpe Mariya bamemaki ye na Yeruzalem mpo na kolakisa ye na Nkolo, 23ndenge yango ekomama na Mobeko ya Nkolo : Mwana nyonso ya mobali ya liboso,
bakopesa ye likabo na Nkolo.

24Bayaki mpe mpo na kopesa mbeka, mpo na kotosa oyo elobama na Mobeko ya Nkolo : “Bapijon mibale ya zamba to bana mibale ya bapijon”.

25Moto moko azalaki na Yeruzalem, kombo na ye Simeon ; azalaki moto na sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe, azalaki kozela Mobondisi ya Isayele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. 26Molimo Mosantu alakisaki ye ete liboso akufa, akomona Kristo ya Nkolo.

27Simeon ayaki na lopangu ya Ndako ya Nzambe, na kotindama ya Molimo. Tango baboti bayaki na mwana Yesu mpo na kosala mpo na ye, oyo ezaleli ya Mobeko ezalaki kotinda, 28Simeon akamataki mwana na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo :
29 Nkolo
tika ete mosali na yo
akende na kimia, ndenge olakaki.
30Pamba te, miso na ngai emoni Lobiko na yo,
31Oyo obongisaki mpo na bato nyonso :

32 Yango ezali mwinda mpo na kongengisa bikolo,
mpe nkembo ya bato na yo Isayele.

33Bongo tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi mpo na maloba oyo Simeon alobaki mpo na Yesu.

34Simeon apambolaki bango mpe alobaki na Mariya, mama ya Yesu :

—Yoka : mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato mingi na kati na Isayele, mpe akozala elembo oyo bato bakotia na yango tembe,
35mpo ete makanisi ya mitema ya bato mingi emonana polele. Mpe mpo na yo, mopanga ekotobola elimo na yo.

36Moprofeta moko ya mwasi azalaki wana kombo na ye Ana. Azalaki mwana ya Fanwele, ya libota ya Asere. Akomaki mobange penza. Na bolenge na ye, awumelaki na mobali na ye kaka bambula sambo, 37bongo akomaki mwasi akufela mobali kino na bambula ntuku mwambe na minei. Azalaki kolongwa na Ndako ya Nzambe te mpe azalaki kosalela Nzambe butu na moyi, na koboya kolia mpo na mabondeli. 38Ye mpe ayaki na tango wana, azongisaki matondi na Nzambe mpe alobaki mpo na mwana, na bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yeruzalem.

39Tango Mariya mpe Zozefi basilaki kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, bazongaki na Galileya, na vile na bango Nazareti. 40Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na ye.

Yesu na Ndako ya Nzambe

41Baboti ya Yesu bazalaki kokende mbula nyonso na Yeruzalem na feti ya Pake. 42Tango Yesu akokisaki bambula zomi na mibale, bakendaki na feti, lokola momesano.

43Tango feti esilaki, bazwaki nzela mpo na kozonga ; kasi mwana na bango Yesu atikalaki na Yeruzalem. Mpe baboti na ye bayebaki yango te. 44Bakanisaki ete azalaki na baninga na ye ya mobembo, bongo basalaki mokolo mobimba na nzela. Sima babandaki koluka ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. 45Kasi lokola bamonaki ye te, bazongaki na Yeruzalem mpo na koluka ye. 46Sima ya mikolo misato, bayaki komona ye na lopango ya Ndako ya Nzambe, avandaki na kati ya balakisi ya Mibeko, azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna. 47Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mayele na ye mpe biyano na ye. 48Tango baboti na ye bamonaki ye, bakamwaki mingi penza ; bongo mama na ye alobaki na ye :

—Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo na ngai, tozalaki motema likolo mpe toluki-luki yo !

49Bongo Yesu azongiselaki bango :

—Mpo na nini bozali koluka ngai ? Boyebi te ete esengeli nazala na Ndako ya Tata na ngai ?
50Kasi basosolaki te maloba oyo alobaki na bango.

51Bongo azongaki na baboti na ye na Nazareti, mpe azalaki kotosa bango. Kasi mama na ye azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema. 52Bongo Yesu azalaki kokola na bwania mpe na nzoto. Mpe, Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na ye.
Copyright information for LinMNB