Luke 22

LIWA MPE LISEKWA YA YESU

Yuda ateki Yesu

(Mt. 26.1-5,14-16 ; Mk. 14.1-2,10-11 ; Jn. 11.47-53)

1Feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo babengaka feti ya Pake, ekomaki pene-pene. 2Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koluka nzela ya koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.

3Bongo Satana akotaki na motema ya Yuda, oyo babengaka Iskariote ; ye azalaki mopostolo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale. 4Yuda akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe epai ya bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe. Ayokanaki na bango soki ndege nini akoteka Yesu epai na bango. 5Basepelaki mingi penza mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo. 6Andimaki mpe abandaki koluka mwaye moko ya malamu mpo akaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete bato bayeba te.

Yesu na bayekoli na ye balie bilei ya Pake

(Mt. 26.17-19 ; Mk. 14.12-16)

7Mokolo ya feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo bazalaki koboma mwana meme ya Pake, ekomaki. 8Yesu atindaki Piere mpe Jean, mpe alobaki na bango :

—Bokende kobongisela biso bilei ya Pake, mpo tolia yango.

9Bango batunaki ye :

—Olingi tokende kobongisa yango wapi ?

10Ye azongiselaki bango :

—Tango bokokota na vile, bokokutana na mobali moko amemi eluku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako oyo akokota ;
11bongo boloba na nkolo ya ndako : “Moteyi atuni : Esika nini nakosalela mpo na kolia bilei ya Pake elongo na bayekoli na ngai ?” 12Bongo akolakisa bino sambele moko ya monene, na etaze, oyo ebongisami malamu ; kuna nde bokobongisa bilei ya Pake.

13Bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso ndenge Yesu ayebisaki bango ; bongo babongisaki bilei ya Pake.

(Mt. 26.26-29 ; Mk. 14.22-25 ; tala 1 Kor. 11.23-25)

14Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki elongo na bapostolo na ye na mesa. 15Bongo alobaki na bango :

—Nayokaki posa mingi penza mpo na kolia Pake oyo elongo na bino liboso ete namona pasi.
16Pamba te, nalobi na bino, nakolia yango lisusu te kino yango ekokokisama kati na Bokonzi ya Nzambe !

17Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi mpe alobaki :

—Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino.
18Pamba te nalobi na bino, nakomela lisusu vino te kino tango Bokonzi ya Nzambe ekoya.

19Sima akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki bango yango ; bongo alobaki :

—Oyo ezali nzoto na ngai, ekabami mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai !
20Sima ya kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; mpe alobaki :

—Kopo oyo ezali Boyokani ya sika oyo esalami na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopana mpo na bino.

(Mt. 26.20-25 ; Mk. 14.17-21)

21—Kasi tala, moto oyo akoteka ngai azali kolia elongo na ngai. 22Mwana na Moto akokende ndenge yango ebongisama, kasi mawa mingi na moto oyo akoteka ye !

23Bongo babandaki kotunana bango na bango soki nani kati na bango akosala likambo yango.

Nani aleki monene

(Mt. 20.25-28 ; Mk. 10.42-45)

24Bongo tembe ebimaki kati na bango mpo na koyeba soki nani aleki monene.

25Yesu alobaki na bango :

—Bakonzi ya bapakano bapesaka bato na bango mitindo na makasi, mpe baoyo bayangelaka bango balingaka babenga bango “Bato malamu”.
26Kasi epai na bino ekoki kozala bongo te. Nzokande, moto oyo aleki monene kati na bino esengeli azala lokola leki na kati na bino nyonso, mpe moto oyo ayangelaka, esengeli azala lokola mosali. 27Pamba te nani aleki monene ? Oyo avandi na mesa to oyo azali kosalela ye ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Nzokande ngai nazali na kati na bino, lokola moto oyo azali kosalela bino.

(Mt. 19.28)

28—Bino bozali bato oyo bokangaki mitema elongo na ngai na bapasi na ngai nyonso. 29Lokola Tata apesaki ngai bokonzi, ngai mpe napesi bino yango, 30mpo ete bolia mpe bomela na mesa na ngai, kati na Bokonzi na ngai ; mpe mpo bovanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa bikolo zomi na mibale ya Isayele.

Yesu ayebisi ete Piere akowangana ye

(Mt. 26.31-35 ; Mk. 14.27-31 ; Jn. 13.36-38)

31—Simon, Simon ! Satana asengi bino mpo ayungula bino ndenge bayungulaka ble. 32Kasi nabondelaki mpo na yo mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe yo, tango okozonga, lendisa bandeko na yo !

33Bongo Simon alobaki na ye : —Nkolo, nazali ya komibongisa mpo na kokota na boloko elongo na yo mpe kokufa elongo na yo !

34Kasi Yesu azongiselaki ye : —Piere, nalobi na yo : Lelo, liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato ete oyebi ngai te !

35Bongo Yesu atunaki bango :

—Tango natindaki bino bozalaki na mbongo te, sakosi te, sandale mpe te, boni bozangaki eloko ? Bango bazongisaki : —Tozangaki eloko te !

36Bongo alobaki na bango : —Kasi sikʼoyo, oyo azali na mbongo akamata yango, ndenge moko mpe mpo na moto oyo azali na sakosi. Moto oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango. 37Pamba te ekomama : Batiaki ye na molongo ya bato mabe. Mpe nalobi na bino : maloba oyo esengeli kokokisama mpo na ngai : makambo oyo ekomama mpo na ngai, ekokokisama.

38Bongo bango balobaki na ye :

—Nkolo, tozali na mipanga mibale awa !

Yesu azongisaki : —Ekoki !

Yesu abondeli na ngomba ya banzete ya Olive

(Mt. 26.36-45 ; Mk. 14.32-41)

39Bongo Yesu abimaki mpe akendaki na ngomba ya banzete ya Olive lokola amesanaki kosala. Bayekoli na ye mpe balandaki ye. 40Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango :

—Bobondela mpo bokweya na komekama te !

41Sima apusanaki mwa mosika na bango, afukamaki mpe abondelaki boye : 42—Tata, soki olingi, longola kopo oyo ; tika ete mokano na ngai esalama te, kasi oyo ya yo esalama. [ 43Bongo anzelu ya Likolo abimelaki ye mpe alendisaki ye. 44Lokola azalaki na kati ya somo monene ya etumba, abondelaki lisusu makasi koleka, motoki na ye ekomaki lokola matanga ya makila, mpe ezalaki kokweya na mabele
Mikanda mingi ya kala ezangi ba versets oyo.
.]

45Awa asilisaki kobondela, atelemaki mpe akendaki epai bayekoli na ye bazalaki. Akutaki bango balali pongi mpo na mawa.

46Bongo Yesu atunaki bango :

—Mpo na nini bozali kolala ? Botelama, mpe bobondela mpo ete bokweya na komekama te.

Bakangi Yesu

(Mt. 26.47-55 ; Mk. 14.43-49 ; Jn. 18.2-11)

47Tango Yesu azalaki naino koloba, bato ebele penza bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga kombo Yuda, oyo azalaki moko ya bapostolo zomi na mibale, ye moto azalaki liboso na bango. Apusanaki pene-pene ya Yesu mpo na kopesa ye beze. 48Kasi Yesu alobaki na ye :

—Yuda, oteki Mwana na Moto na beze ?

49Tango bato oyo bazalaki pembeni ya Yesu bamonaki makambo oyo elingaki kosalama, batunaki ye :

—Nkolo, olingi tobundisa bango na mipanga ?

50Bongo moko na kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya mobali.

51Kasi Yesu alobaki :

—Tika kosala bongo ! Asimbaki litoyi ya moto oyo azokaki, mpe abikisaki ye.
52Mpe alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, mpe na bampaka oyo bayaki kokanga ye :

—Boni, nakomi motomboki mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzete na maboko ?
53Nazalaki mikolo nyonso elongo na bino na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe moto ata moko te akangaki ngai ; kasi sikʼoyo, ezali ngonga na bino mpe molili elingi kolakisa bokonzi na yango.

Piere awangani Yesu

(Mt. 26.57-58 ; Mk. 14.53-54 ; Jn. 18.15-16)

54Bakangaki Yesu mpe bamemaki ye na ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda na mosika. 55Tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bato bavandaki elongo, Piere mpe avandaki na bango.

(Mt. 26.69-75 ; Mk. 14.66-72 ; Jn. 18.17-18,25-27)

56Mosali moko ya mwasi amonaki ye avandi pembeni ya moto, tango atalaki ye malamu, alobaki :

—Moto oyo azalaki na ye !

57Kasi Piere awanganaki mpe alobaki :

—Mwasi, nayebi ye te !

58Sima ya mwa tango moke, moto mosusu amonaki ye mpe alobaki :

—Yo mpe ozali moko na kati na bango ! Kasi Piere azongiselaki ye :

—Te, mobali, ngai te !

59Sima ya pene-pene ngonga moko, moto mosusu lisusu alobaki na molende nyonso :

—Ya solo, moto oyo azalaki mpe na ye ; pamba te azali moto ya Galileya.
60Kasi Piere azongisaki :

—E e mobali ! Likambo ozali koloba nayebi yango te ! Na tango azalaki naino koloba soso elelaki.
61Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Piere. Tango Piere akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato !” 62Piere abimaki libanda mpe alelaki na mawa mingi penza.

(Mt. 26.67-68 ; Mk. 14.65)

63Bato oyo bazalaki kokengela Yesu bazalaki koseka ye mpe kobeta ye. 64Bazalaki kozipa ye elongi mpe kotuna ye :

—E e yo ! sakola, nani abeti yo ?

65Bongo bazalaki kofinga ye na makambo mosusu mingi.

Yesu asambi liboso ya likita monene

(Mt. 26.59-65 ; Mk. 14.55-64 ; Jn. 18.19-24)

66Tango tongo etanaki, bampaka ya Bayuda, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko basanganaki mpe bamemaki Yesu liboso ya likita wana. 67Bongo babandaki kotuna ye :

—Yebisa biso soki yo ozali Kristo. Yesu azongiselaki bango :

—Ata nayebisi bino, bokondimela ngai te.
68Soki mpe natuni bino motuna, bokopesa ngai mpe eyano te. 69Kasi banda sikʼoyo, Mwana na Moto akovanda na loboko ya mobali ya Nzambe Oyo Aleki na nguya.

70Bongo bango nyonso batunaki ye :

—Elingi koloba ete ozali Mwana na Nzambe ? Ye azongiselaki bango :

—Bino bato bolobi ete nazali bongo !

71Bongo balobaki :

—Tina nini toluka lisusu matatoli ? Biso moko toyoki yango na maloba na ye.
Copyright information for LinMNB