Luke 9

Yesu atindi bapostolo na ye zomi na mibale

(Mt. 10.1-9,11-14 ; Mk. 6.7-13)

1Yesu asangisaki bapostolo na ye zomi na mibale, mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo mabe nyonso mpe ya kobikisa bamaladi. 2Atindaki bango bakende koteya Bokonzi ya Nzambe mpe babikisa bato ya maladi. 3Bongo alobaki na bango :

—Bomema eloko moko te mpo na mobembo : nzete te, sakosi te, eloko ya kolia te, mbongo te, elamba mosusu te.
4Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda wana kino tango bokolongwa na vile wana. 5Soki bayambi bino te, tango bokobima na vile wana, bopupola makolo na bino mpo yango ezala litatoli mpo na bango.

6Bongo bakendaki mpe batambolaki na mboka moko na moko : bazalaki koteya Sango Malamu mpe kobikisa bato ya maladi na bisika nyonso.

Erode amitungisi

(Mt. 14.1-2 ; Mk. 6.14-16)

7Mokonzi Erode ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki kosalama. Amitungisamaki mingi penza, pamba te bato mosusu bazalaki koloba ete Jean asekwi kati na bakufi ; 8basusu ete Eliya abimi, mpe basusu, moprofeta moko ya kala asekwi !

9Kasi Erode alobaki :

—Ngai moko nakatisaki motu ya Jean ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo ya ndenge oyo mpo na ye azali nani ? Bongo Erode azalaki koluka komona ye.

Yesu aleyisi mibali nkoto mitano

(Mt. 14.13-21 ; Mk. 6.33-44 ; Jn. 6.1-15)

10Tango bapostolo bazongaki, bayebisaki Yesu makambo nyonso oyo bawutaki kosala. Akamataki bango elongo na ye, mpe bakendaki na esika ya bango moko kaka, na vile moko kombo na yango Betsayida. 11Kasi tango ebele ya bato bayebaki yango, balandaki ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe abikisaki baoyo bazalaki na posa ya kobika.

12Tango pokwa ebandaki kokoma, bapostolo zomi na mibale bayaki pene-pene ya Yesu, mpe balobaki na ye :

—Zongisa ebele ya bato oyo mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni awa, mpo baluka biloko ya kolia mpe bisika ya kolala, pamba te tozali na esika ezangi bato.

13Kasi Yesu azongisaki :

—Bino moko bopesa bango biloko ya kolia ! Bongo bazongisaki :

—Tozali kaka na mampa mitano mpe mbisi mibale. Soki te, malamu tokende kosomba biloko ya kolia mpo na ebele ya bato oyo nyonso !
14Pamba te, mibali nyonso oyo bazalaki wana, bazalaki pene-pene na nkoto mitano.

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Bovandisa bango na maboke ya bato ntuku mitano-ntuku mitano.

15Basalaki bongo, mpe bavandisaki bango nyonso. 16Bongo Yesu akamataki mampa mitano mpe bambisi mibale, atombolaki miso likolo, azongisaki matondi mpe akataki yango ; bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola na bato. 17Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Mpe balokotaki bitunga zomi na mibale ya biteni oyo etikalaki.

Piere atatoli mpo na Yesu

(Mt. 16.13-21 ; Mk. 8.27-31)

18Mokolo moko tango Yesu azalaki kobondela na esika ya ye moko, mpe bayekoli na ye bazalaki elongo na ye, atunaki bango :

—Bato balobaka ete ngai nazali nani ?

19Bango bazongisaki :

—Bato mosusu balobaka ete yo ozali Jean-Batiste ; basusu Eliya ; mpe basusu balobaka ete yo ozali moprofeta ya kala oyo asili kosekwa.

20Bongo atunaki bango :

—Kasi bino, bolobaka ete ngai nazali nani ? Piere azongisaki :

—Yo ozali Kristo ya Nzambe !

21Bongo Yesu akebisaki bango makasi mpo ete baloba yango na moto moko te.

22Bongo Yesu alobaki :

—Esengeli ete Mwana ya Moto ayoka pasi mingi, mpe baboya ye na bankolo, na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na balakisi ya Mibeko ; bakoboma ye mpe akosekwa na mokolo ya misato !

Ndenge nini kolanda Yesu

(Mt. 16.24-28 ; Mk. 8.34–9.1)

23Mpe alobaki na bango nyonso :

—Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye mikolo nyonso mpe alanda ngai !
24Pamba te, oyo akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango ; mpe oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akobikisa yango. 25Litomba nini moto akozwa soki azwi mokili mobimba, kasi amibebisi ye moko to amibungisi ye moko ? 26Pamba te, moto nyonso oyo akoyokela ngai soni, mpe akoyokela Maloba na ngai soni, Mwana ya Moto mpe akoyokela ye soni tango akoya kati na nkembo na ye, mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya baanzelu basantu. 27Nalobi na bino ya solo, bato mosusu bazali awa, liboso ete bakufa, bakomona Bokonzi ya Nzambe.

Nzoto ya Yesu ebongwani

(Mt. 17.1-8 ; Mk. 9.2-8)

28Sima ya mikolo pene-pene mwambe ya maloba wana, Yesu akamataki Piere, Jean mpe Zaki, mpe amataki na ngomba mpo na kobondela.

29Tango azalaki kobondela, elongi na ye ebongwanaki, bilamba na ye ekomaki pembe mpe ezalaki kongenga lokola kongenga na kake. 30Bato mibale, Moyize mpe Eliya, 31bamonanaki kati na nkembo mpe bazalaki kosolola na Yesu. Bazalaki koloba mpo na liwa na ye, oyo azalaki kokende kokokisa na Yeruzalem.

32Bongo Piere mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu mpe bato mibale oyo bazalaki na ye elongo.

33Tango balingaki kokabwana na Yesu, Piere alobaki na Yesu :

—Moteyi, malamu totikala na biso awa ! Tosala bandako misato ya kapo : moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya ! Pamba te, ayebaki te oyo azalaki koloba.
34Tango azalaki koloba, lipata ebimaki mpe ezipaki bango. Bayekoli babangaki tango bakotaki na lipata.

35Mongongo moko ewutaki na mapata, elobaki :

—Oyo azali Mwana na ngai, oyo napona. Boyokela ye !

36Tango mongongo esilaki koyokana, bamonaki Yesu atikalaki kaka ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango, mpe na mikolo wana bayebisaki na moto moko te makambo oyo bamonaki.

Yesu abikisi mwana oyo azalaki na molimo mabe

(Mt. 17.14-18 ; Mk. 9.14-27)

37Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, bato ebele penza bayaki kokutana na Yesu. 38Bongo moto moko na kati ya ebele ya bato wana agangaki :

—Moteyi, na bondeli yo, tala mwana na ngai ya mobali ! Nazali na ye kaka moko.
39Molimo mabe ekangaka ye ; mpe agangaka na mbala moko ; molimo yango eningisaka ye makasi penza mpe ebimisaka ye fulu-fulu na monoko. Etikaka ye na pasi penza sima ya kolembisa ye mingi penza. 40Nabondeli bayekoli na yo mpo babengana molimo yango, kasi bakoki te !

41Yesu alobaki :

—O ! bato bazangi kondima mpe bato mabe ! Nakozala na bino kino tango nini ? Mpe nakokanga motema mpo na bino kino tango nini ? Bongo alobaki na moto wana :

—Yaka na mwana na yo awa !

42Tango mwana azalaki kopusana pene-pene ya Yesu, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi penza ; kasi Yesu apamelaki molimo mabe, mpe abikisaki elenge mobali ; bongo azongisaki ye na tata na ye. 43Bongo bato nyonso bakamwaki mingi penza monene ya Nzambe.

Yesu ayebisi lisusu liwa na ye

(Mt. 17.22-23 ; Mk. 9.30-32)

Awa bato nyonso bazalaki kokamwa mpo na makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, alobaki na bayekoli na ye :

44—Bobomba malamu maloba oyo boyokaki, pamba te bakoteka Mwana ya Moto na maboko ya bato.

45Kasi bayekoli basosolaki maloba wana te, pamba te maloba yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola yango te. Mpe bazalaki kobanga kotuna Yesu mpo na maloba yango.

Nani azali moto monene na Bokonzi ya likolo

(Mt. 18.1-5 ; Mk. 9.33-37)

46Motuna moko ebimaki na kati ya bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. 47Kasi Yesu ayebaki makanisi ya mitema na bango, akamataki mwana moko ya moke, mpe atiaki ye pembeni na ye, 48bongo alobaki na bango :

—Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi mpe moto oyo atindaki ngai. Pamba te, moto oyo azali moto moke na kati na bino nyonso, ye nde azali moto monene.

(Mk. 9.38-40)

49Bongo Jean alobaki :

—Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo. Mpe tolobaki na ye atika, pamba te azali a biso elongo te !

50Kasi Yesu alobaki na ye :

—Bopekisa ye te pamba te moto oyo ayinaki bino te azali mpo na bino.

YESU AZALI KOKENDE NA YERUSALEM

Baboyi Yesu na Samariya

51Awa tango ya Yesu ya komemama na Likolo ekomaki pene-pene, azwaki mokano ya kokende na Yeruzalem. 52Bongo atindaki bantoma liboso na ye. Tango bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya Samariya mpo na kobongisela ye esika ya kolala. 53Kasi bato ya mboka Samariya baboyaki koyamba Yesu, mpo azalaki kokende na Yeruzalem 54Tango bayekoli na ye, Zaki mpe Jean bayebaki yango, balobaki :

—Nkolo, olingi tobenga moto ekitela bango wuta na likolo mpe ezikisa bango ?

55Kasi Yesu abalukaki mpe apamelaki bango.

56Bongo bakendaki na mboka mosusu.

Ndenge moyekoli asengeli komipesa

(Mt. 8.18-22)

57Tango bazalaki kokende na nzela, moto moko alobaki na Yesu :

—Nakolanda bipai nyonso okokende.

58Kasi Yesu azongiselaki Ye :

—Yeba malamu ete banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, mpe bandeke bazali na bazala na bango ; kasi Mwana ya Moto azali na esika te oyo akoki kolala.

59Yesu alobaki na moto mosusu :

—Landa ngai ! Kasi moto wana alobaki na ye :

—Nkolo, pesa ngai ndingisa nakende liboso kokunda tata na ngai.

60Yesu azongiselaki ye :

—Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende mpe sakola Bokonzi ya Nzambe.

61Moto mosusu lisusu alobaki na ye :

—Nakolanda yo ; kasi pesa ngai ndingisa napesa liboso mbote ya bokabwani na bato ya libota na ngai.

62Kasi Yesu azongiselaki ye :

—Moto moko te oyo asimbi kongo mpo na kosala elanga mpe atali na sima, azali ya kokoka mpo na Bokonzi ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB