Mark 11

Bayambi Yesu na nkembo monene na Yeruzalem

(Mt. 21.1-11 ; Lk. 19.28-40 ; Jn. 12.12-19)

1Awa bazalaki kopusana pene-pene ya Yeruzalem, epai ya Betfaze mpe Betani, pene-pene na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na ye mibale, mpe 2alobaki na bango :

—Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bakokota na mboka yango, bakomona mwana ya mpunda ekangama, mpe moto ata moko te naino amatela yango. Bofungola yango, mpe boya na yango.
3Soki moto atuni bino : “Mpo na nini bozali kosala bongo ?”, boloba na ye : “Nkolo azali na posa na yango, mpe akozongisa yango awa noki.”

4Bakendaki mpe bakutaki mwana ya mpunda ezalaki ya kokangama na porte, libanda, na nzela mpe bafungolaki yango ?

5Ndambo ya bato oyo bazalaki wana, batunaki :

—Bozali kosala nini, awa bazali kofungola mwana mpunda ?

6Bazongisaki eyano kaka ndenge Yesu atindaki bango, mpe batikaki bango bakende. 7Tango bamemelaki Yesu mwana mpunda mpe batiaki bilamba na bango likolo na yango, avandaki likolo na yango. 8Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; basusu batandaki bitape ya nzete oyo bakataki na bilanga. 9Ba oyo bazalaki kokende liboso, na ba oyo bazalaki kolanda, bazalaki koganga : Ozana
Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo !

10 Mapamboli na Bakonzi ya Tata na biso ya Tata na biso Davidi, oyo ezali koya !
Ozana na bisika oyo eleki likolo !

11Bongo Yesu akotaki na Yeruzalem mpe akendaki na ndako ya Nzambe. Atalaki biloko nyonso epai na epai, kasi lokola tango elekaki, abimaki, mpe akendaki na Betani elongo na Bapostolo na ye zomi na mibale.

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

(Mt. 21.18-19)

12Mokolo oyo elandaki, awa bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. 13Na mosika, amonaki nzete moko ya figi ezalaki na makasa, bongo akendaki kotala soki ezalaki na mbuma. Kasi tango akomaki, amonaki eloko moko te, kaka makasa, mpo ezalaki eleko ya mbuma ya figi te.

14Bongo Yesu alobaki na nzete yango :

—Tika ete moto ata moko te alia lisusu mbuma oyo ekowuta epai na yo !

Bayekoli na ye bayokaki ye koloba maloba yango.

Yesu na kati ya Ndako ya Nzambe

(Mt. 21.12-17 ; Lk. 19.45-48 ; tala Jn. 2.13-16)

15Bongo bakomaki na Yeruzalem. Yesu akotaki na lopango ya ndako ya Nzambe mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe ba oyo bazalaki kosomba na kati ya lopango ya Ndako na Nzambe. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, bongo na bakiti ya ba oyo bazalaki koteka, bapijon ; 16mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kokatisa lopango ya Ndako ya Nzambe ete bamema biloko.

17Bongo abandaki koteya bango mpe alobaki :

—Ekomama te ete : Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikolo nyonso ? Kasi bino, bikomisi yango nganda ya miyibi.

18Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na balakisi ya Mibeko bayokaki yango mpe babandaki koluka nzela ya kobomisa Yesu pamba te bazalaki kobanga ye, mpo ebele ya bato nyonso bazalaki kokamwa mateya na ye.

19Tango pokwa ekomaki, Yesu na bayekoli na ye babimaki na vile.

Nguya ya kondima

(Mt. 21.20-22)

20Na tango, awa bazalaki koleka, bamonaki nzete ya figi ekawukaki wuta na misisa.

21Piere akanisaki likambo oyo esalamaki mpe alobaki na Yesu :

—Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe, ekawuki.

22Bongo Yesu azongisaki :

—Bozala na kondima na Nzambe.
23Nalobi na bino ya solo, soki moto alobi na ngomba oyo : “Longwa wana mpe mibwaka na kati ya ebale”, mpe atie tembe na motema na ye te, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalama, yango ekosalama mpo na ye. 24Yango wana nalobi : eloko nyonso oyo bokosenga na libondeli, bondima ete bosili kozwa yango, mpe yango ekosalama mpo na bino.

25Mpe tango botelemi mpo na kobondela, soki bozali na likambo na moto mosusu, bolimbisa ye, mpo ete Tata na bino oyo azali na Likolo, alimbisa masumu na bino. 26[Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akolimbisa mpe masumu na bino te.]
Verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala (tala Mt. 6.15)

Bokonzi ya Yesu endimami te

(Mt. 21.23-27 ; Lk. 20.1-8)

27Bongo bakomaki lisusu na Yeruzalem. Tango Yesu azalaki kotambola na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, na bankolo, bayaki epai na ye mpe 28batunaki ye :

—Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini ? Mpe nani apesi yo bokonzi ya kosala yango ?

29Yesu azongisaki :

—Nakotuna bino motuna moko. Bozongisela ngai eyano, bongo nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.
30Jean azwaki ndingisa ya kobatisa epai ya nani ? Na Nzambe to na bato ? Boyebisa ngai !

31Babandaki kotiana tembe bango na bango mpe balobaki :

—Soki tolobi : “Na Nzambe”, ye akotuna biso : “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te ?”
32Soki mpe tolobi “Na bato”…

Bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kondima ete Jean azalaki penza moprofeta.
33Bongo bazongiselaki Yesi :

—Toyebi te !

Yesu mpe alobaki na bango :

—Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.
Copyright information for LinMNB