Mark 12

Lisapo ya basali mabe na elanga ya vino

(Mt. 21.33-46 ; Lk. 20.9-19)

1Bongo Yesu abandaki koloba na bango na masapo :

—Moto moko alonaki elanga ya vino. A salelaki yango lopango pembeni-pembeni, atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbula, mpe atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Bongo apesaki elanga na maboko ya basali mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.
2Tango eleko ya kobuka mbuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli ya elanga mpo azwa epai na bango ya mbuma ya vino. 3Kasi bafuteli ya elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 4Bongo atindelaki bango mosali mosusu ; bazokisaki moto yango na motu mpe bafingaki-fingaki ye. 5Atindaki lisusu moto mosusu, ye nde babomaki ye. A tindaki bato mosusu mingi ; babetaki basusu mpe babomaki basusu.

6Nkolo ya elanga atikalaki kaka na moto moko mpo na kotinda : Mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso, mpe alobaki : “Bakotosa mwana na ngai” 7Kasi bafuteli ya elanga balobanaki : “Tata oyo akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye, bongo elanga ekokoma ya biso”. 8Bongo bakangaki ye babomaki ye, mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.

9Bongo nkolo ya elanga ya vino akosala nini ? Akoya mpe akoboma bafuteli wana ya elanga, mpe akopesa elanga ya vino na bato mosusu mpo bafutela. 10Naino botanga Makomi oyo te : Libanga oyo batongi ya ndako babwaka ekomi libanga ya songe oyo esimbaka ndako mobimba. 11Yango ezali mosala ya Nkolo, mpe likambo ya kokamwa na miso na biso ! 12Bongo bazalaki koluka nzela ya kokanga ye, mpo bayebaki ete alobaki lisapo wana mpo na bango. Kasi bazalaki kobanga bato ; yango wana batikaki ye mpe bakendaki na bango.

Eyano ya Yesu mpo na mpaku ya Sezare

(Mt. 22.15-22 ; Lk. 20.20-26)

13Sima batindaki bafarizeo ndambo na bato ya Erode epai ya Yesu mpo bakweyisa ye na maloba na ye moko. 14Bayaki epai na ye mpe balobaki :

—Moteyi, toyebi ete ozali moto ya bosolo, mpe obangaka bato te, pamba te otalaka bilongi ya bato te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na solo nyonso. Boni, ndingisa ezali mpo na kofuta mpaku ya Sezare to te ? Esengeli tofuta to tofuta te ?

15Kasi Yesu ayebaki kokosana na bango, bongo atunaki :

—Mpo na nini bozali komeka ngai ? Boyela ngai deni moko, mpo natala yango.

16Bayelaki ye yango, mpe atunaki bango :

—Elongi oyo, na makomi oyo, ezali ya nani ?

—Ya Sezare !

17Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare, mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe !

Bongo bakamwaki ye mingi penza.

Eyano ya Yesu mpo na lisekwa ya bato

(Mt. 22.23-33 ; Lk. 20.27-40)

18Bongo Basaduseoo, ba oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na ye, mpe batunaki ye : 19—Moteyi ! Moyize akomelaki biso ete soki ndeko ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, ndeko na ye asengeli kobala mwasi, mpo abotela ndeko na ye oyo akufi bana. 20Nzoka nde, ezalaki na bandeko sambo. Oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, kasi atikaki bana te. 21Oyo ya mibale abalaki mpe mwasi oyo ndeko na ye atikaki, kasi ye mpe akufaki mpe atikaki bana te. Esalamaki mpe ndenge moko na oyo ya misato. 22Bango nyonso sambo babalaki mwasi yango, mpe batikaka bana te. Sima na bango nyonso, mwasi mpe akufaki. 23Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi yango akozala ya nani ? Pamba te bango nyonso sambo babalaki ye !

24Yesu azongisaki : Bozali na libunga ; pamba te boyebi Makomi te to mpe nguya ya Nzambe te. 25Tango bato bakufa bakosekwa, bakobala lisusu te, mpe bakobalisa lisusu te ; bakozala lokola baanzelu oyo bazali na Likolo. 26Mpe mpo na lisekwa ya bato bakufa, naino botangi te na buku ya Moyize, mpo na oyo etali nzete ya moke, ndenge Nzambe alobaki na ye : “Nazali Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Yakobo” ? 27Nzambe azali Nzambe ya bato bakufa te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza na libunga monene.

Mobeko eleki monene

(Mt. 22.34-40 ; Lk. 10.25-28)

28Molakisi moko ya Mibeko ayokaki bango tango bazalaki kotiana tembe. Mpe awa amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano malamu ; apusanaki mpe atunaki ye :

—Na kati ya mibeko nyonso, mobeko nini eleki na tina ?

29Yesu azongisaki :

—Mobeko eleki na tina yangʼoyo : Boyoka bato ya Isayele ; Nkolo Nzambe na biso azali kaka Nkolo moko.
30Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso ! 31Ya mibale yangʼoyo : Linga moninga na yo lokola yo moko. Mobeko mosusu oyo eleki oyo wana mibale ezali te.

32Bongo Molakisi ya Mibeko alobaki na ye :

—Olobi malamu Moteyi, olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mpe mosusu lokola ye azali te.
33Kolinga ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo lokola yo moko, yango ezali na tina mingi koleka kotumbela Nzambe mpe kopesa ye makabo.

34Tango Yesu amonaki ete Molakisi ya Mibeko azongisaki eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye :

—Ozali mosika te na Bokonzi ya Nzambe !

Bongo moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye motuna.

Eyano ya Yesu mpo na bomoto ya Kristo

(Mt. 22.41-46 ; Lk. 20.41-44)

35Awa Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, atunaki :

—Ndenge nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Kristo azali Mwana ya Davidi ?
36Pamba te, Davidi ye moko alobaki boye na nzela ya Molimo-Mosantu : Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
vanda na loboko na ngai ya mobali,
kino tango nakotia banguna na yo
na nse ya makolo na yo.

37Davidi ye moko abengaki ye “Nkolo”, bongo ndenge nini akoki kozala lisusu mwana na ye ?

Ebele ya bato ba zalaki koyoka ye na esengo.

Yesu apameli balakisi ya Mibeko

(Mt. 23.1-12 ; Lk. 20.45-47)

38Na mateya na ye alobaki :

—Bokeba na balakisi ya Mibeko. Balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesaka bango bambote na bazando,
39mpe kovanda na bakiti ya liboso na bandako ya mayangani mpe bisika ya lokumu na bafeti. 40Babotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali, mpe mpo na kokosana, basalaka mabondeli ya milayi-milayi. Bato ya ndenge wana bakozwa etumbu ya makasi penza.

Mwasi mobola apesi likabo

(Lk. 21.1-4)

41Yesu avandaki liboso ya sanduku ya makabo, mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo na sanduku ya makabo. Bato mingi ya bomengo bazalaki kotia mbongo mingi. 42Kasi mwasi moko azalaki mobola mpe akufela mobali, ayaki, mpe atiaki bibende mibale, oyo ezalaki na motuya moke penza.

43Bongo Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango :

—Nalobi na bino ya solo, mwasi oyo mobola, oyo akufela mobali, atie na sanduku ya makabo, mbongo oyo eleki ya bato nyonso mosusu.
44Pamba te, bato nyonso bapesi mbongo oyo bazalaki na yango tina te ; kasi ye, kati na kokelela na ye, apesi nyonso oyo azalaki na yango, oyo azalaki na yango mpo na kosunga bomoi na ye.
Copyright information for LinMNB