Mark 13

Yesu ayebisi bapasi oyo ekokweyila Yeruzalem

(Mt. 24.1-3 ; Lk. 21.5-7)

1Awa azalaki kobima na Ndako ya Nzambe, moyekoli na ye moko alobaki na ye :

—Moteyi, tala, mabanga kitoko boye ! Ndako kitoko boye !
2Yesu azongiselaki ye :

—Omoni Ndako monene-monene oyo ? Libanga moko te ekotikala likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobwakama na nse.

3Awa Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, esika oyo etalani na Ndako ya Nzambe, Piere, Zaki Jean mpe Andele batunaki ye motuna na esika ya bango moko : 4Yebisa biso, makambo wana ekosalama tango oyo makambo nyonso wana esengeli kosalamaekoki ?

(Mt. 24.4-14 ; Lk. 21.8-19)

5Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bokeba mpo ete moto ata moko te akosa bino.
6Bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba : “Ezali nga”, mpe bakokosa bato ebele.

7Tango bokoyoka makelele ya bitumba mpe sango ya bitumba, bomitungisa te, pamba te esengeli ete makambo wana esalama ; kasi wana ekozala naino suka te. 8Ekolo moko ekobundisa ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana na bisika mingi ya mokili, mpe nzala ekongala. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.

9Kasi bino, bomikebisa ! Pamba te, bakokaba bino na batibinale ya Bayuda mpe bakobeta bino na bandako ya mayangani, bakofunda bino liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi minene mpo na ngai, mpo ezala litatoli epai na bango. 10Kasi esengeli ete Sango Malamu eteyama na bikolo nyonso. 11Tango bakomema bino mpo na koteka bino, bomitungisa liboso te mpo na makambo oyo bokoloba. Kasi boloba maloba nyonso oyo bakopesa bino na tango wana. Pamba te, ezali bino te bato bokoloba, kasi Molimo-Mosantu. 12Ndeko akokaba ndeko na ye mpo baboma ye, mpe tata akokaba mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 13Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai. Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka, akobika !

(Mt. 24.15-20 ; Lk. 21.20-24 ; 17.23-25)

14Tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, etelemi na esika yango ekoki kozala te—moto oyo azali kotanga asosola malamu likambo oyo !—bongo ba oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba. 15Moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpe akota te na ndako mpo na kobimisa ata eloko nini. 16Moto oyo akozala na bilanga, azonga sima te mpo na kozwa elamba na ye. 17Mawa mingi penza na basi oyo bakozala na zemi, mpe ba oyo bakozala komelisa bana mabele na mikolo wana. 18Bobondela mpo ete makambo wana esalama te na tango ya malili makasi. 19Pamba te, yango ekozala mikolo ya pasi mingi, na ndenge ete mikolo ya ndenge wana ekoma naino te banda na ebandeli, tango Nzambe asalaki mokili, kino sikʼoyo. Mpe bapasi ya ndenge wana ekozala lisusu te.

20Mpe soki Nkolo atiaki mikolo yango mokuse te, mbele moto ata moko te akokaki kobika. Kasi mpo na baponami, ba oyo ye apona, yango wana atiaki yango mokuse.

21Na tango wana soki moto alobi na bino : “Tala Kristo azali awa”, to “Tala, azali kuna !” bondimela ye te. 22Pamba te, Ba-Kristo ya lokuta mpe baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala makamwisi mpe bilembo mpo na kokosa, soki yango ekokaki kosalama, ata baponami. 23Kasi bino, bokengela ! Nasi nayebisi bino makambo nyonso liboso.

Koya ya Mwana Moto

(Mt. 24.29-35 ; Lk. 21.25-28)

24Kasi na mikolo wana, sima ya bapasi wana, Moyi ekoyinda Sanza ekongenga lisusu te ;

25 Minzoto ya likolo ekokweya,
mpe banguya oyo ezali na likolo ekoningana.

(Lk. 21.29-33)

26Bongo bakomona Mwana ya moto akoya na kati ya mapata, na nguya monene mpe na nkembo. 27Akotinda baanzelu na ye, mpe akosangisa baponami na ye nabipai nyonso minei ya mokili, banda na suka ya mokili tii na suka ya likolo.

28Boyekola liteya oyo nzete ya figi epesaka bino : soki bitape na yango ekomi pete-pete mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya mbula ekomi pene-pene. 29Ndenge moko mpe mpo na bino, tango bokomona makambo wana ekosalama, boyeba ete ye akomi pene-pene, na porte. 30Nalobi na bino ya solo, bato ya tango oyo koleka te, kino tango makambo wana nyonso ekosalama. 31Likolo mpe mokili ekoleka, kasi Maloba na ngai ekoleka te !

Bokengela

(Mt. 24.36-44)

32Mpo na likambo etali mokolo wana to ngonga, moto moko te ayebi yango, ata baanzelu na likolo, ata Mwana, kasi kaka Tata nde ayebi yango.

33Bokeba ! Bokengela ! Pamba te boyebi te tango nini yango ekoya.

34Ekozala lokola moto akeyi mobembo, atiki ndako na ye, mpe apesi mokumba na basali na ye. Apesi mosali moko na moko mosala na ye, mpe atindi mokengeli ya porte akengela malamu. 35Yango wana bokengela, pamba te boyebi te tango nini nkolo ya ndako akozonga, na pokwa, to na midi ya butu, to tango soso elelaka, to na tongo. 36Pamba te soki aye na mbalakaka, esengeli te akuta bino bokufa na pongi. 37Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : “Bokengela !”
Copyright information for LinMNB