Mark 14

LIWA MPE LISEKWA YA YESU

Bakani koboma Yesu

(Mt. 26.1-5 ; Lk. 22.1-2 ; Jn. 11.45-53)

1Etikalaki mikolo mibale mpo feti ya Paki mpe ya Mampa oyo ezangi kisi ya mampa, ebanda. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koluka motindo nini ba koki kokanga Yesu na ndenge ya mayele mpe baboma ye. 2Pamba te, bazalaki koloba :

Tosala yango na mokolo ya feti te, soki te bato bakotomboka !

Basopeli Yesu malasi na Betaniya

(Mt. 26.6-13 ; Jn. 12.1-8)

3Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba. Tangu azalaki na mesa, mwasi moko ayaki na molangi ya Albatre,
Tala Matayo 26.7
etonda na malasi ya nar
Nar  : misisa mpe makasa oyo basalelaka malasi.
oyo basangisa te mpe ya motuya mingi. Afungolaki yango mpe asopaki malasi na moto ya Yesu.

4Bato mosusu na kati ya bato oyo bazalaki wana, basilikaki na nse ya mitema mpe balobaki :

—Mpo na nini kobebisa malasi oyo ?
5Pamba te malasi oyo bakokaki koteka yango na badeni koleka nkama misato mpe kopesa mbongo na babola !

Bazalaki kopamela mwasi yango makasi penza.

6Kasi Yesu alobaki :

—Botika ye kimia ! Mpo na nini bozali kotungisa ye ? Asali likambo moko ya malamu mpo na ngai.
7Pamba te, babola bakozala na bino tango nyonso, mpe bokoki kosalela bango makambo ya malamu tango nyonso oyo bokolinga ; kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te. 8Asali oyo ye akoki. Asi apakoli nzoto na ngai malasi, mpo kobongisa kokundama na ngai. 9Nalobi na bino ya solo, epai nyonso oyo bakoteya Sango Malamu na mokili mobimba, bakoloba mpe likambo mwasi oyo asali, mpo na kokanisa ye.

Yuda ateki Yesu

(Mt. 26.14-16 ; Lk. 22.3-6)

10Bongo Yuda Iskariote, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango. 11Tango bayokaki bongo, basepelaki elaka ya kopesa ye mbongo. Bongo abandaki koluka motindo ya malamu mpo ateka Yesu epai na bango.

Yesu na bayekoli na ye balie bilei ya Paki

(Mt. 26.17-19 ; Lk. 22.7-18)

12Mokolo ya liboso ya feti ya mampa oyo ezangi kisi ya mampa, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme ya Paki, bayekoli batunaki ye :

—Epai nini olingi tokende kobongisela yo mpo olia Paki ?

13Bongo Yesu atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango :

—Bokende na vile, moto moko amemi eloko ya mayi akoya kokutana na bino. Bolanda ye.
14Mpe esika ye akokota, boloba na nkolo na ndako wana : “Moteyi atuni : suku na ngai ezali wapi, epai nakolia Paki elongo na bayekoli na ngai ?” 15Bongo ye akolakisa bino suku moko ya monene na etaze, oyo babongisa malamu mpe ezali ya kobongama. Kuna nde bokobongisela biso.

16Bayekoli bakendaki, bakotaki na vile mpe bakutaki makambo nyonso ndenge Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki Paki.

(Mt. 26.20-25 ; Lk. 22.14 ; Jn. 13.21-30)

17Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki na bapostolo zomi na mibale. 18Awa bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki :

—Nalobi na bino ya solo, moto moko na kati na bino, oyo azali kolia elongo na ngai, akoteka ngai !
19Bayokaki mawa mpe batunaki na ye moko sima ya mosusu :

—Boni, ezali ngai ?

20Yesu azongiselaki bango :

—Ezali moto moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo azali kotia eteni ya limpa na sani elongo na ngai.
21Mwana ya Moto azali kokende ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya Moto ! Elingaki kozala malamu mpo na ye, soki abotamaki te.

(Mt. 26.26-30 ; Lk. 22.15-20 ; tala 1 Kor. 11.23-25)

22Awa bazalaki kolia, Yesu akamataki limpa, azongisaki matondi, mpe akataki yango. Apesaki yango na bayekoli na ye, mpe alobaki :

—Bokamata, oyo ezali nzoto na ngai !

23Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi, mpe apesaki bango yango ; mpe bamelaki yango bango nyonso.

24Alobaki na bango :

—Oyo ezali makila na ngai, makila ya Boyokani, oyo esopana mpo na bato mingi.
25Nalobi na bino ya solo, nakomela lisusu vino te, kino mokolo wana, oyo nakomela yango na lolenge mosusu na Bokonzi ya Nzambe !

26Sima ya koyemba nzembo, babimaki mpe bakendaki na ngomba ya banzete ya Olive.

Yesu ayebisi ete Piere akowangana ye

(Mt. 26.31-35 ; Lk. 22.31-34 ; Jn. 13.36-38)

27Yesu alobaki na bango :

—Bino nyonso bokokweyisa kondima pamba te ekomama : Nakobeta mobateli ya bameme
bongo bameme bakopalangana !

28Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya !

29Piere alobaki na ye :

—Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima, kasi ngai te.

30Yesu azongiselaki ye :

—Nalobi na yo ya solo : lelo, na butu oyo liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato !

31Kasi Piere alobaki na molende nyonso :

—Atako nasengeli kokufa elongo na yo, nakowangana yo te !

Bongo nyonso mpe balobaki kaka ndenge moko.

Yesu akeyi kobondela na Getesemane

(Mt. 26.36-46 ; Lk. 22.40-46)

32Bongo bakomaki na esika moko babengaka Getesemane. Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Bovanda awa, awa nazali kobondela.
33Akamataki Piere, Zaki na Jean, elongo na ye. Abandaki koyoka mawa mpe motema pasi ; 34bongo alobaki na bango :

—Elimo na ngai etondi na mawa kino liwa Botikala awa mpe bokengela !

35Akendaki mwa liboso, akweyaki na mabele mpe abondelaki, soki ekokaki kosalama, ete ngonga wana eleka mosika na ye.

36Bongo alobaki :

—Tata, yo okoki kosala makambo nyonso. Lekisa kopo oyo mosika na ngai, kasi oyo ngai nalingi te, kasi oyo yo olingi.

37Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango na pongi.

Alobaki na Piere :

—Simon ozali kolala ? Okoki te kokengela ngonga moko ?
38Bokengela mpe bobondela, mpo ete bokweya te na komekama ; molimo ezali na mokano ya malamu, kasi nzoto ezali na bolembu.

39Akendaki lisusu, mpe abondelaki kaka ndenge moko. 40Tango azongaki, akutaki bango lisusu balaki, mpo miso na bango ekomaki kilo ; mpe bayebaki te likambo nini bayebisa ye.

41Azongaki mpo na mbala ya misato mpe alobaki na bango :

—Bozali naino kolala mpe kopema ? Ekoki ! Ngonga esi ekoki. Botala, Mwana ya Moto bateki ye na maboko ya bato ya masumu.
42Botelema, tokende ; moto oyo ateki ngai akomi pene-pene.

Bakangi Yesu

(Mt. 26.47-56 ; Lk. 22.47-53 ; Jn. 18.2-11)

43Awa azalaki naino koloba, Yuda, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, akomaki. Ayaki elongo na bato ebele, oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; batindaki bango na bakonzi ya banganga Nzambe, balakisi ya Mibeko mpe bankolo. 44Moto oyo atekaki Yesu, apesaki bango elembo moko :

—Moto oyo ngai nakopesa besi, ye wana ; bokanga ye, mpe bomema ye na bokengeli malamu !

45Tango Yuda akomaki, akendaki na mbala moko epai ya Yesu, mpe alobaki na ye : “Moteyi”, bongo apesaki ye besi. 46Bakamataki Yesu mpe bakangaki ye. 47Bongo moto moko na kati ya ba oyo bazalaki wana, abimisaki mopanga na ye, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, mpe akataki ye litoyi.

48Yesu alobaki na bango :

—Boni, nakomi motomboki mpo boya na mipanga mpe na banzete mpo na kokanga ngai ?
49Mikolo nyonso nazalaki elongo na bino, nazalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe bokangaki ngai te, kasi makambo oyo esalami boye mpo ete makomi ekokisama.

50Bongo bango nyonso batikaki ye mpe bakimaki.

51Elenge mobali moko, alataki kaka liputa, azalaki kolanda Yesu. Tango bakangaki ye, 52atikaki liputa na ye mpe akimaki bolumbu.

Basambisi Yesu

(Mt. 26.57-68 ; Lk. 22.54-55,63-71 ; Jn. 18.12-14,19-24)

53Bongo bamemaki Yesu epai ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, epai bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso, bankolo, mpe balakisi ya Mibeko bayaki kosangana. 54Piere azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na kati ya lopango ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe ; bongo avandaki elongo na bakengeli, mpe azalaki koyotela moto. 55Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli mpo na Yesu, mpo bazwa nzela ya kobomisa ye. Kasi bazwaki yango te. 56Pamba te bato mingi bazalaki koloba matatoli ya lokuta mpo na ye, kasi matatoli yango ezalaki kokokana te. 57Bongo ndambo ya bato batelemaki mpe balobaki litatoli oyo ya lokuta mpo na ye : 58Toyokaki ye azalaki koloba : “Nakoboma Ndako ya Nzambe oyo esalami na maboko ya bato, mpe na mikolo misato, nakotonga mosusu, oyo ekosalama na maboko ya bato te”. 59Kasi ata bongo, litatoli na bango ezalaki kaka kokokana te.

60Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki na bango mpe atunaki Yesu :

—Boni, okozongisa eloko moko te ? Litatoli nini bato oyo bazali koloba mpo na yo ?

61Kasi Yesu avandaki nyee mpe azongisaki ata eyano moko te.

Mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki ye lisusu :

—Ozali Kristo, Mwana ya Mopambolami ?
62Yesu alobaki :

—Ee, nazali bongo ! Mpe bokomona Mwana ya Moto akovanda na loboko ya mobali ya ye oyo Aleki na nguya, mpe akoya likolo ya mapata ya likolo.

63Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye, mpe alobaki :

—Mpo na nini tozali lisusu na posa ya batemwe ?
64Bino moko boyoki ndenge afingi Nzambe. Bokanisi nini ?

Bongo bango nyonso bakataki ete akoki mpo na kokufa.
65Basusu babandaki kobwakela ye nsoyi, kozipa ye elongi, kobeta ye makofi, mpe koloba na ye :

—Sakola !

Bongo bakengeli bakamataki ye mpe babetaki ye.

Piere awangani Yesu

(Mt. 26.69-75 ; Lk. 22.56-62 ; Jn. 18.15-18,25-27)

66Awa Piere azalaki na nse, na kati ya lopango, mosali moko ya mwasi ya mokonzi ya banganga-Nzambe ayaki ; 67tango amonaki Piere azalaki koyotela moto, atalaki ye, mpe alobaki na ye :

—Yo mpe ozalaki elongo na Yesu Moto ya Nazareti !

68Kasi Piere awanganaki, mpe alobaki :

—Nayebi te, to nazali kososola kutu te makambo oyo ozali koloba.

Bongo abimaki, mpe akendaki kotelema pene-pene na porte ya lopango ; [mpe soso elelaki
Mikanda mosusu ezangi eteni oyo : “mpe soso elelaki”
.]

69Tango mosali ya mwasi amonaki ye wana, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana :

—Moto oyo azali moko ya bato wana !

70Kasi Piere awanganaki yango lisusu.

Sima ya mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana balobaki na Piere :

—Ya solo, yo ozali moko na bango ; pamba te yo mpe ozali moto ya Galileya !

71Bongo Piere abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndaye :

—Nayebi moto wana te oyo bozali kolobela !

72Kaka na tango wana, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Piere akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : “liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato”.
Copyright information for LinMNB