Mark 15

Tango akanisaki yango, alelaki.

Yesu asambi liboso ya Pilato

(Mt. 27.11-26 ; Lk. 23.1-5,13-25 ; Jn. 18.28-40 ; 19.4-16)

1Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe, elongo na bankolo, balakisi ya Mibeko, mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda, basanganaki mpo na kokata likambo. Bongo bakangaki Yesu na basinga, bamemaki ye mpe bapesaki ye na maboko ya Pilato. 2Pilato atunaki ye :

—Ozali mokonzi ya Bayuda ?

Yesu azongisaki :

—Ee, ezali bongo ndenge olobi.
3Bakonzi ya banganga-Nzambe bazalaki kofunda ye na makambo ebele. 4Bongo Pilato atunaki ye lisusu :

—Boni, okozongisa eloko moko te ? Yoka ebele ya makambo oyo bazali kofundela yo !
5Kasi Yesu azongisaki lisusu ata eloko moko te ; bongo Pilato akamwaki mingi penza. 6Na tango ya feti, Pilato azalaki kobimisa moto moko ya boloko, oyo bato bango moko bazalaki kosenga. 7Nzoka nde, moto moko kombo na ye Barabasi, azalaki na boloko elongo na batomboki mosusu, ba oyo babomaki moto na tango mobulu ebimaki. 8Ebele ya bato bayaki mpe basengaki Pilato asala mpo na bango oyo azalaki kosalela bango mbala na mbala. 9Pilato atunaki :

—Bolingi natikela bino Mokonzi ya Bayuda ?
10Pamba te Pilate ayebaki ete bakonzi ya banganga-Nzambe batekaki Yesu apayi na ye, kaka mpo na likunia. 11Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo basenga Pilato atikela bango Barabasi. 12Pilato atunaki bango :

—Bolingi nasala nini na moto oyo babengaka Mokonzi ya Bayuda ?
13Bango bagangaki :

—Baka ye na ekulusu !
14Pilato atunaki bango :

—Likambo nini ya mabe ye asali ? Kasi bagangaki lisusu makasi penza :

—Baka ye na ekulusu !
15Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, yango wana atikelaki bango Barabasi. Sima ya kobetisa Yesu bafimbo, apesaki ye na maboko na bango mpo babaka ye na ekulusu.

Basoda basakani na Yesu

(Mt. 27.27-31 ; Jn. 19.2-3)

16Basoda bamemaki Yesu na esika oyo moyangali akatelaka makambo, bango basangisaki basoda nyonso. 17Balatisaki ye nzambala moko ya motane ; mpe sima ya kosala ekoti moko ya lokumu, ya nzube, balatisaki ye yango na motu. 18Bongo babandaki kopesa ye mbote :

—Mbote, Mokonzi ya Bayuda !
19Bazalaki kobeta ye nzete na motu mpe kobwakela ye nsoyi. Bafukamaki mpe bazalaki kopesa ye lokumu. 20Tango basilisaki kosakana na ye, balongolaki ye nzambala ya motane, bongo balatisaki ye bilamba na ye. Bongo bamemaki ye ne libanda mpo na kobaka ye na ekulusu.

Liwa ya Yesu

(Mt. 27.32-40 ; Lk. 23.26-43 ; Jn. 19.16-24)

21Moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, tata ya Alekizandre mpe Rufusi, awutaki na bilanga mpe azalaki koleka na nzela wana, batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. 22Bongo bamemaki Yesu na esika babengaka Golgota, (yango elingi koloba : “Esika ya mokuwa ya motu”). 23Bapesaki ye vino basangisa na mire mpo amela, kasi amelaki yango te. 24Bongo babakaki ye na ekulusu. Bakabolaki bilamba na ye : babetelaki yango zeke mpo na koyeba oyo moto na moto akozwa. 25Tango babakaki ye na ekulusu, ezalaki na ngonga ya libwa ya tongo. 26Libaya ya moke oyo bakomaki tina oyo bafundelaki ye, ezalaki koloba boye : “Mokonzi ya Bayuda”. 27Babakaki mpe miyibi mibale na ba-ekulusu elongo na Yesu. Moto na loboko na ye ya mobali, mosusu na loboko na ye ya mwasi. 28[Mpe Makomi ekokisamaki, oyo ezali koloba : “Batiaki ye na molongo ya bato oyo basalaka mabe
Verset oyo ezali te na Mikanda mingi ya kala.
.”]
29Bato oyo bazalaki koleka esika wana, bazalaki kofinga ye, koningisa mitu mpe koloba :

—Ee ! yo moto obomaka Ndako ya Nzambe mpe otongaka yango lisusu na mikolo misato,
30mibikisa yo moko, mpe kita na ekulusu ! 31Ndenge moko mpe, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koseka bango na bango ; mpe bazalaki koloba :

—Abikisaki bato mosusu, akoki komibikisa ye moko te !
32Tika ete Kristo, Mokonzi ya Isayele, akita sikʼoyo na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na ye, bango mpe bazalaki kofinga ye.

(Mt. 27.45-56 ; Lk. 23.44-49 ; Jn. 19.25-30)

33Na ngonga ya midi, molili ezalaki na ekolo mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa. 34Bongo na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki na mongongo makasi :

—Eli ; Eli, lama sabakatani ? Elingi koloba : Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai ?
35Tango ndambo ya bato oyo bazalaki wana bayokaki bango, balobaki :

—Yoka, azali kobenga Eliya !
36Bongo moto moko akimaki mbangu, atondisaki eponze na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya mwa nzete, mpe apesaki yango Yesu mpo amela ; mpe alobaki :

—Tozela mpe totala, soki Eliya akoya kokitisa ye.
37Kasi Yesu agangaki makasi peza mpe akataki motema ! 38Rido ya Ndako na Nzambe epasukaki na biteni mibale, banda na likolo kino na nse. 39Bongo tango mokonzi ya basoda ya Roma oyo atelemaki wana liboso ya Yesu, ayokaki koganga na ye mpe amonaki ndenge akufaki, alobaki :

—Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.
40Basi mosusu bazalaki kotala na mosika. Na kati na bango ezalaki : Mariya ya mboka Magadala ; Mariya mama ya Zaki ya leki, ya Zoze, mpe ya Salome. 41Bango nde bazalaki kolanda Yesu mpe kosalela ye tango azalaki na Galileya. Basi mosusu mingi ba oyo bayaki elongo na Yesu kino na Yeruzalem, bazalaki mpe wana.

Bakundi Yesu

(Mt. 27.57-61 ; Lk. 23.50-56 ; Jn. 19.38-42)

42Ezalaki Mokolo ya komilengela, mokolo oyo ezalaki liboso ya mokolo ya Saba. Lokola pokwa ekomaki, 43Zozefi ya Arimateo, moto ya lokumu ya likita monene ya Bayuda, ye oyo, ye moko mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, akendaki na molende nyonso epai ya Pilato mpe asengaki nzoto ya Yesu. 44Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu akufaki banda kala. 45Tangu ayokaki yango na mokonzi ya basoda ete ezalaki bongo, apesaki nzoto ya Yesu na Zozefi. 46Zozefi asombaki elamba ya talo penza, akitisaki nzoto ya Yesu na ekulusu, alingaki yango na elamba wana, mpe akotisaki yango na lilita oyo batimolaki na kati ya libanga. Bongo apusaki libanga liboso ya porte ya lilita. 47Mariya ya mboka Magadala, mpe Mariya mama ya Zoze, bazalaki kotala epai batiaki ye.
Copyright information for LinMNB