Matthew 1

KOBOTAMA MPE BOMWANA YA YESU

Bankoko ya Yesu

(Lk. 3.23-38)

1Oyo ezali bakombo ya bankoko ya Yesu Kristo, mwana ya David, mwana ya Abraham : 2Abraham abotaki Izaki ; Izaki abotaki Zakobi ; mpe Zakobi abotaki Yudana bandeko na ye.
3Yuda na mwasi na ye Tamare babotaki Farezi mpe Zara ; Fareziabotaki Esromi ; mpe Esromi abotaki Arami.
4Arami abotaki Aminadabi ; Aminadabi abotaki Nasoni ; mpe Nasoni abotaki Salmon ;
5Salmon na mwasi na ye Rabi babotaki Bowazi ; mpe Bowasi na mwasi na ye Ruti babotaki Obedi.
6Obedi abotaki Isayi ; Isayi abotaki Mokonzi David ; mpe Mokonzi David na mwasi oyo Uri atikaki, babotaki Salomon.
7Salomon abotaki Robowami ; Robowami abotaki Abia ; mpe Abia abotaki Asa ;
8Asa abotaki Zozafati ; Zozafati abotaki Zorami ; mpe Zorami abotaki Oziasi.
9Oziasi abotaki Zowatami ; Zowatami abotaki Akazi ; mpe Akazi abotaki Ezekiasi.
10Ezekiasi abotaki Manase ; Manase abotaki Amoni ; mpe Amoni abotaki Zoziasi.
11Zoziasi abotaki Zakoniasi na bandeko na ye ; bango babotamaki tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na ekolo ya Babilone.
12Sima ya komema bato ya Isayele na Babilone ; Zekoniasi abotaki Salatiele ; mpe Salatiele abotaki Zorobabele ;
13Zorobabele abotaki Abiyudi ; Abiyudi abotaki Eliyakimi ; mpe Eliyakimi abotaki Azori.
14Azori abotaki Sadoki ; Sadoki abotaki Akimi ; mpe Akimi abotaki Eliyudi.

15 Eliyudi abotaki Eleyazari ; Eleyazari abotaki Matani ; mpe Matani abotaki Zakobi.

16Zakobi abotaki Zozefi, oyo azalaki mobali ya Mariya, mama ya Yesu oyo babengaka Kristo.

17Bango nyonso, banda na Abraham kino na David, ezalaki na mabota zomi na minei ; banda David kino na tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na Babilone, ezalaki na mabota zomi na minei ; mpe kobanda tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu kino na Kristo, ezalaki na mabota zomi na minei.

Anzelu ayebisi mbotama ya Yesu

18Tala ndenge Yesu Kristo abotamaki : mama na ye Mariya, azalaki elenge mwasi oyo Zozefi andimaki kobala. Kasi liboso ete bavanda esika moko, Mariya azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu. 19Zozefi, mobali na ye, azalaki moto na sembo mpe alingaki te koyokisa ye soni na miso ya bato ; yango wana akanaki aboya ye na sekele.

20Awa azalaki kokanisa mpo na makambo yango, anzelu ya Nkolo abimelaki ye na ndoto, mpe alobaki na ye :

—Zozefi mwana ya David, kobanga te mpo na kozwa Mariya mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.
21Akobota mwana mobali, bongo okopesa ye kombo Yesu, pamba teye moto akobikisa bato na ye na masumu na bango !

22Nyonso oyo esalamaki mpo ete maloba oyo Nkolo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisama :
23 Boyoka, elenge mwasi oyo ayebi naino mobali te,
akozwa zemi.
Akobota mwana mobali,
mpe bakopesa ye kombo Emanuele ;
yango elingi koloba :
Nzambe azali elongo na biso !

24Tango Zozefi alamukaki, asalaki ndenge anzelu ya Nkolo atindaki ye, mpe azwaki Mariya mwasi na ye. 25Kasi Zozefi ayebaki nzoto na ye te kino tango abotaki mwana mobali ; mpe apesaki ye kombo Yesu.
Copyright information for LinMNB