Matthew 11

1Tango yesu asilisaki kopesa mitindo wana na bayekoli na ye zomi na mibale, akendaki koteya mpe kolakisa na bavile na bango.

Yesu mpe Jean Batiste

(Lk. 7.18-35)

2Tango Jean Batiste azalaki na boloko, ayokaki sango ya misala oyo Kristo azalaki kosala ; bongo atindaki bayekoli na ye mpo batuna Yesu :

3—Boni, ozali moto oyo asengeli koya, to esengeli tozela mosusu ?

4Yesu azongiselaki bango :

—Bozonga mpe boyebisa Jean makambo nyonso oyo boyoki mpe bomoni :
5bato bakufa miso bazali komona, bato bakufa makolo bazali kotambola, bato ya maba bazali kopetolama, bato bayokaka te bazali koyoka, mpe bato bakufa bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama na babola. 6Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te mpo na ngai.

7Tngo bayekoli ya Jean bakendaki, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato mpo na Jean :

—Eloko nini bokendaki kotala na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa bipai na bipai ?
8Bokendaki kotala nani ? Moto moko alataki bilamba ya kitoko ? Ezali bongo te, mpo bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya mikonzi. 9Bongo bokendaki kotala nini ? Moprofeta ? E e ! Nalobi na bino, ye aleki kutu moprofeta. 10Pamba te, ye azali moto oyo ekomama boye mpo na ye : Natindi ntoma na ngai liboso na yo ;
oyo akobongisela yo nzela !

11Nalobi na bino ya solo : na kati ya bato nyonso oyo babotama na basi, moto ata moko te aleki Jean Batiste. Nzokande, moto oyo azali moto moke na Bokonzi ya Likolo, ye nde aleki ye ! 12Banda na mikolo ya Jean Batiste kino sikʼoyo, Bokonzi ya Likoloezali kozwama na makasi penza, mpe bilombe nde bato bazali kobotola yango. 13Pamba te baprofeta nyonso mpe Mibeko basakolaki kino na tango ya Jean. 14Mpe soki bolingi kondima yango, boyeba ete ye azali Eliya oyo asengeli koya. 15Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka !

16—Bongo bato ya tango oyo bakokani na banani ? Bakokani na bana mike oyo bafandi na zando, mpe bazali koloba na baninga na bango :
17 Tobetelaki bino flute,
kasi bobinaki te.
Toyembaki banzembo ya ebembe,
kasi boyokaki mawa te.

18Pamba te, Jean ayaki, azalaki kolia te mpe komela te, kasi bolobaki : “Azali na milimo mabe !” 19Bongo Mwana ya Moto aye, azali kolia mpe komela, kasi bolobi : “Azali lokoso mpe molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpaku mpe ya bato ya masumu”. Kasi bwanya ezali komonana sembo na nzela ya misala na yango.

Yesu apameli bavile oyo eboyaki kondima

(Lk. 10.12-15)

20Bongo Yesu abandaki kopamela bavile epai ye asalaki makamwisi mingi ; pamba te, bato yango babongolaki mitema na bango te.

21—Mawa na yo Korazini ! Mawa na yo Betsaida ! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki kati na bino, esalamaka na Tire mpe Sidon, mbele banda kala, bato ya bavile wana balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango na kolata saki mpe komipakola putulu. 22Yango wana nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekoleka oyo ya Tire mpe Sidon.

23Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bokotombola yo kino na likolo ? Te ! Bakokitisa yo kino na mboka ya bakufi. Pamba te, soki makamwisi oyoesalamaki kati na yo, esalamaka na Sodomo, mbele vile wana ezali kowumela kino lelo oyo. 24Yango wana nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekoleka oyo ya Sodomo !

Yesu abengi bato ya mikumba

(Lk. 10.21-22)

25Na tango wana, Yesu alobaki :

—Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya nse, nakumisi yo mpo obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe ya mayele, mpe olakisi yango na bana mike.
26E e Tata, yo moko olingaki ete esalama bongo !

27Tata apesaki makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko te ayebi Mwana, kaka Tata nde ayebi ye. Moto moko te ayebi Tata, kaka Mwana nde ayebi ye na moto oyo Mwana alingi kolakisa ye.

28Boya epai na ngai bino nyonso oyo bolembi mpe bomemi mikumba, bongo ngai nakopesa bino kopema. 29Bozala basali na ngai, mpe boyekola epai na ngai ; pamba te nazalimoto ya boboto mpe ya komikitisa ; mpe bokozwa kopema na milimo na bino. 30Pamba te, kosalela ngai ezali pasi te, mpe mokumba na ngai ezali pepele.
Copyright information for LinMNB