Matthew 13

Lisapo ya moloni

(Mk. 4.1-9 ; Lk. 8.4-8)

1Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale. 2Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai ; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili.

3Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango :

—Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga.
4Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela ; bandeke bayaki mpe baliaki yango. 5Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te. 6Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te. 7Mosusu ekweyaki kati ya banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki mwabanzete yango. 8Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, mpe ebotaki bambuma : moko, nkama moko ; mosusu, ntuku motoba ; mpe mosusu, ntuku misato. 9Oyo azali na matoyi, ayoka !

(Mk. 4.10-12 ; Lk. 8.9-10)

10Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye :

—Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo ?

11Bongo ye azongiselaki bango :

—Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te.
12Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango ; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

13Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango ; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te ; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te. 14Ezali mpo na bango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisami, oyo ezali koloba : Bokoyoka, kasi bokososola te ;
bokotala, kasi bokomona te !

15 Pamba te mitema ya bato oyo ekomi libanga,
bazipi matoyi mpe bakangi miso na bango ;
na kobanga ete miso na bango emona,
matoyi na bango eyoka,
mitema na bango esosola,
babongola mitema
mpe nakoka kobikisa bango.

16Nzokande, bino bozali bato ya esengo, pamba te miso na binoezali komona mpe matoyi na bino ezali koyoka. 17Ya solo nalobi na bino : baprofeta mingi mpe bato mingi ya bosembo bazalaki na posa ya komona makambo oyo bozali komona, kasi bamonaki yango te ; bazalaki na posa ya koyoka makambo oyo bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.

(Mk. 4.13-20 ; Lk. 8.11-15)

18Boyoka ndimbola ya lisapo ya moloni mbuma : 19Mbala nyonso soki moto ayoki Liloba ya Bokonzi kasi asosoli yango te, monguna akoya mpe akopikola mbuma oyo elonamaki na motema na ye ; oyo nde mbuma ekweyaki pembeni-pembeni ya nzela. 20Oyo ekweyaki na esika ya mabanga, ezali moto oyo ayoki lilobampe ayambi yango mbala moko na esengo. 21Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza. 22Oyo ekweyaki na kati ya banzube, ezali moto oyo ayoki Liloba kasi makanisi ya bomoi oyo mpe bomengo oyo ekosaka, efinaka yango, mpe epesaka yango nzela te mpo na kobota.

23Kasi oyo ekweyaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango. Abotaka mbuma : nkama, ntuku motoba, mpe ntuku misato.

Lisapo ya matiti ya mabe

24Yesu alobelaki bango lisapo mosusu :

—Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye.
25Tango bato bazalaki kolala, monguna na ye ayaki mpe alonaki matitiya mabe na kati ya ble, bongo akendaki. 26Tango ble ebimaki mpe ebandaki kobimisa mwa mitu ya mbuma, matiti ya mabe mpe ebimaki. 27Basali ya nkolo ya elanga bayaki mpe balobaki :

—Mokonzi, olonaki mbuma ya malamu na elanga na yo te ? Bongo matiti oyo ya mabe ewuti wapi ?

28Ye azongisaki :

—Monguna moto asali bongo !

Basali batunaki :

—Olingi tokende mpe topikola yango ?

29Ye azongisaki :

—Te ! Mpo tango bokobanda kolongola matiti ya mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
30Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma : “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”.

Lisapo ya mbuma ya mutarde mpe ya kisi evimbisaka mampa

(Mk. 4.30-32 ; Lk. 13.18-19)

31Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu :

—Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde ; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye.
32Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke ; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango !

(Lk. 13.20-21)

33Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu :

—Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba.

(Mk. 4.33-34)

34Yesu alobaki na ebele ya bato makambo nyonso wana na masapo, mpe ata mbala moko te azalaki kolobela bango bongo azangisa lisapo. 35Na bongo nde maloba ya moprofeta ekokisamaki : Nakolobela bango na masapo.
Nakoyebisa bango makambo oyo ebombama
banda mokili esalama !

Ndimbola ya lisapo ya matiti ya mabe

36Bongo atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki :

—Limbolela biso lisapo ya matiti ya mabe kati na elanga.

37Yesu azongisaki :

—Moto oyo alonaki mbuma ya malamu, ezali Mwana ya moto.
38Elanga ezali mokili ; mbuma ya malamu ezali bana ya Bokonzi. Matiti ya mabe ezali nde bato ya satana. 39Monguna oyo alonaki matiti ya mabe, ezali Zabolo ; tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili. Bongo bato oyo balongolaka mbuma, ezali baanzelu.

40Ndenge moko lokola bapikolaka matiti ya mabe mpe batumbaka yango na moto, ekozala mpe bongo na suka ya mokili. 41Mwana ya Moto akotinda baanzelu na ye, mpe bango bakolongola na Bokonzi na ye makambo nyonso oyo ekweyisaka na masumu elongo na bato oyo basalaka mabe. 42Bakobwaka bango na fulu ya moto ; epai ekozala kolela mpe koswa mino. 43Bongo bato na sembo bakongenga lokola moi na kati ya Bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka !

Lisapo ya eloko ya ntalo mpe ya pawuni

44—Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu. Na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso oyo azali na yango mpe akosomba elanga wana !

45Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo oyo alukaka bapawuni ya kitoko. 46Soki amoni pawuni moko ya ntalo mingi, akokende koteka biloko nyonso oyo azali na yango mpe akosomba yango !

Lisapo ya monyama oyo bakangelaka mbisi

47—Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo babwaki na ebale, mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge. 48Soki etondi, bato oyo bakangaka mbisi bakobimisa yango na mokili, bakofanda, mpe bakotia oyo ya malamu na bitunga bongo bakobwaka oyo ya mabe. 49Ekozala mpe bongo na suka ya mokili ; baanzelu bakoya kokabola batomabe na kati ya bato na sembo. 50Bongo bakobwaka bato mabe na fulu ya moto epai ekozala kolela mpe koswa mino.

51—Bososoli makambo oyo nyonso ?

Bazongisaki :

—E e !

52Bongo Yesu alobaki na bango :

—Yango wana molakisi nyonso ya Mibeko oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo, akokani na nkolo ndako oyo azali kobenda kati na bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.

Bato ya Nazareti batioli Yesu

(Mk. 6.1-6 ; Lk. 4.1-30)

53Tango Yesu asilisaki koloba masapo wana, alongwaki kuna 54mpe azongaki na vile na ye. Abandaki koteya bato na ndako nabango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa. Batunaki :

—Bwania mpe nguya ya kosala makamwisi oyo azwi yango wapi ?
55Ezali ye te mwana ya salampatie ? Mama na ye kombo na ye Mariya te ? Bongo Zaki, Zozefi, Simon mpe Zude bazali bandeko na ye ya mibali te ? 56Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali na biso awa te ? Yango azwi makambo oyo nyonso wapi ?

57Bongo ye azalaki libaku mpo na kondima na bango.

Kasi yesu alobaki na bango :

—Moprofeta azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpe na ndako na ye.

58Bongo asalaki makamwisi mingi kuna te, mpo bazangaki kondima.
Copyright information for LinMNB