Matthew 14

Liwa ya Jean Batiste

(Mk. 6.14-29 ; Lk. 9.7-9 ; 3.19-20)

1Na tango wana, mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu. 2Bongo alobaki na basali na ye :

—Ezali Jean Batiste asekwi kati na bakufi, yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi.

3Pamba te, Erode atindaki bakanga Jean, batia ye na minyololo mpe na boloko, mpo na likambo ya Erodiade : mwasi ya ndeko na ye Filipo. 4Mpo Jean azalaki koloba na ye :

—Ozali na ndingisa te mpo na kobala ye.

5Erode azalaki koluka kobomisa ye kasi azalaki kobanga bato, mpo bazalaki komona Jean lokola moprofeta. 6Na mokolo ya kokanisa mbotama ya Erode, mwana ya mwasi ya Erodiade abinaki liboso na bango mpe asepelisaki Erode mingi penza. 7Yango wana Erode apesaki ye elaka ya kolapa ndayi ete, akopesa ye eloko nyonso oyo akosenga.

8Bongo ye, lokola mama na ye atindikaki ye mpo na koloba ; alobaki :

—Pesa ngai motu ya Jean Batiste na sani !

9Mokonzi ayokaki mawa mingi penza ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo bavandaki na ye na mesa, yango wana atindaki bapesa ye yango. 10Bongo atindaki bakata motu ya Jean na kati ya boloko. 11Bamemaki motu ya Jean na sani, mpe bapesaki yango na elenge mwasi. Bongo ye, amemaki yango na mama na ye. 12Bayekoli ya Jean bayaki, bazwaki nzoto na ye mpe bakundaki yango. Bongo bakendaki mpe bayebisaki Yesu likambo yango.

Yesu aleyisi mibali nkoto mitano

(Mk. 6.30-44 ; Lk. 9.10-17 ; Jn. 6.1-15)

13Tango yesu ayokaki sango yango, alongwaki wana na bwatompe akendaki ye moko kaka, na esika ezangi bato. Kasi tango bato bayokaki yango, babimaki na bavile na bango mpe balandaki ye na makolo. 14Tango Yesu akitaki na bwato, amonaki bato ebele penza ; ayokelaki bango mawa mingi. Bongo abikisaki bamaladi na bango.

15Tango pokwa ekomaki, bayekoli bayaki epai na ye, mpe balobaki :

—Tozali na esika ezangi bato, mpe tango esiʼeleki ; zongisabato oyo na bamboka mpo bakende kosomba bango moko biloko ya kolia !

16Kasi Yesu alobaki na bango :

—Tina ezali te mpo bakende. Bopesa bango bino moko biloko ya kolia !

17Bongo bayekoli bazongisaki :

—Tozali awa na mampa mitano mpe bambisi mibale kaka.

18Yesu alobaki :

—Bomemela ngai yango awa.

19Sima atindaki bato bavanda na matiti. Akamataki mampa mitano wana mpe bambisi mibale, atombolaki miso na likolo mpe azongisaki matondi. Akataki mampa yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bayekoli bapesaki yango na bato.

20Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Balokotaki biteni oyo etikalaki mpe etondisaki bitunga zomi na mibale. 21Baoyo baliaka bazalaki pene-pene mibali nkoto mitano, kotangabasi na bana te.

Yesu atamboli likolo ya mayi

(Mk. 6.45-52 ; Jn. 6.16-21)

22Sima Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato mpe bakatisa na ngambo mosusu liboso na ye, ye atikalaki mpo na kozongisa bato. 23Tango asilisaki kozongisa bato, amataki na ngomba na esika na ye moko kaka, mpo na kobondela. Tango butu ekomaki, azalaki kaka ye moko.

24Nzokande bwato ekomaki na kati-kati ya ebale mpe mbonge ezalaki kobeta yango ; pamba te mopepe ezalaki kotutana na yango. 25Na ngonga ya minei ya butu, Yesu akendaki epai na bango mpe azalaki kotambola likolo ya ebale. 26Tango bayekoli bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, batondaki na kobanga mpe balobaki :

—Elima !

Bongo babandaki koganga mpo na somo.

27Kasi Yesu alobaki na bango :

—Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai !

28Bongo Piere azongisaki :

—Nkolo, soki ezali yo, loba na ngai naya epai na yo, likolo ya mayi.

29Yesu alobaki na ye :

—Yaka !

Piere akitaki na bwato, mpe abandakikotambola likolo ya mayi mpo nakokende epai ya Yesu.
30Kasi tango amonaki mopepe ezalaki makasi, abangaki, mpe abandaki kodinda ; agangaki :

—Nkolo, bikisa ngai !

31Na mbala moko Yesu apesaki ye loboko, asimbaki ye, mpe alobaki na ye :

—Moto ya kondima moke, mpo na nini otiaki tembe ?

32Tango bamataki na bwato, mopepe mpe esilaki.

33Baoyo bazalaki na bwato bafukamaki liboso na ye, mpe balobaki :

—Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !

Yesu abikisi bato ya maladi na Genezareti

(Mk. 6.53-56)

34Awa basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti. 35Tango bato ya esika wana bayebaki ete ezali ye, bapanzaki sango pembeni-pembeni nyonso ya mokili wana. Bongo bamemelaki ye bato na bango nyonso ya maladi. 36Babondelaki ye ete atika bango basimba kaka songe ya zambala na ye. Bongo baoyo nyonso basimbaki ye, babikaki.
Copyright information for LinMNB