Matthew 16

Yesu na bakonzi ya banganga Nzambe ya Bayuda

1Bafarizeo na Basaduseo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe basengaki ye alakisa bango elembo moko oyo ekowuta na Likolo.

2Yesu azongiselaki bango :

—Na pokwa, bolobaka ete : “Lobi ekozala malamu penza, pamba telikolo ezali motane !”
3Mpe na tongo, bolobaka : “Lelo mbula ya makasi ekobeta, pamba te, likolo ezali motane mpe eyindi”. Boyebi kolimbola bilembo ya likolo, kasi bokoki te kolimbola bilembo ya batango. 4Libota ya bato mabe mpe oyo ezangi botosi nde ezali kosengaelembo ya kokamwisa. Bakopesa ye elembo mosusu te longola kakaoyo esalamaki na Jonasi.

Bongo atikaki bango mpe akendaki na ye.

(Mk. 8.14-21)

5Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mampa. 6Yesu alobaki na bango :

—Bokeba mpe bokengela mpo na kisi oyo evimbisaka ya mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseoo !

7Bayekoli babandaki kotunana bango na bango, mpe balobaki :

—Ezali mpo tomemi mampa te !

8Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe alobaki :

—Mpo na nini bozali kotunana bino na bino, mpo bomemi mampa te ? Bato ya kondima moke !
9Naino bososoli te ? Bozali kokanisa te mampa mitano oyo bato nkoto mitano baliaki ? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki ? 10To mampa sambo oyo bato nkoto minei baliaki ? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki. 11Ndenge nini bozali kososola te ete nalobaki mpo na mampa te ? Kasi bokeba mpo na kisi oyo evimbisaka mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseo ?

12Bongo basosolaki ete alobaki na bango mpo bakeba na kisi oyo evimbisakamampa te, kasi mpo na mateya ya bafarizeo mpe Basaduseo.

YESU NA BAYEKOLI NA YE

Piere atatoli mpo na Yesu

(Mk. 8.27-30 ; Lk. 9.18-21)

13Tango Yesu ayaki na mokili ya Sezareya ya Filipo, atunaki bayekoli na ye :

—Bato balobaka ete Mwana ya moto azali nani ?

14Bazongisaki :

—Basusu balobaka : Jean Batiste ; Basusu : Eliya ; mpe basusu : Jeremiya to moko ya baprofeta.

15Yesu atunaki bango :

—Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani ?

16Simon Piere azongisaki :

—Yo ozali Kristo, Mwana na Nzambe ya bomoi !

17Bongo Yesu alobaki na ye :

—Esengo mingi ezali na yo Simon mwana ya Jonasi ! Pamba te moto te ayebisi yo makambo oyo, kasi ezali Tata na ngai oyo ya Likolo.
18Bongo ngai nalobi na yo ete : yo ozali Piere, mpe na likolo ya libanga oyo nakotonga Lingomba na ngai. Mpe baporte ya lifelo ekoki kolonga yango te. 19Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo. Nyonso oyo okokangaawa na mokili, ekokangama mpe na Likolo ; mpe oyo yo okofungola awa na mokili, ekofungwama mpe na Likolo !

20Bongo Yesu apekisaki bayekoli na ye mpo ete baloba na moto moko te ete ye azali Kristo.

Yesu ayebisi liwa mpe kosekwa na ye

(Mk. 8.31 ; Lk. 9.22)

21Banda tango wana, Yesu abandaki kolimbola na bayekoli na yeete asengeli akende na Yeruzalem ; kuna bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, mpe balakisi ya Mibeko bakonyokola ye, bakoboma ye ; mpe akosekwa na mokolo ya misato.

22Bongo Piere amemaki ye pembeni mpe abandaki kolobela ye :

—Nkolo, tika Nzambe abatela yo ! Makambo wana eyela yo te !

23Yesu abalukaki epai ya Piere, mpe alobaki na ye :

—Longwa mosika na ngai Satana ! Ozali libaku mpo na ngai, pamba te makanisi na yo ezali oyo ya Nzambe te, kasi ya bato.

Ndenge nini tokoki kolanda Yesu

(Mk. 8.34–9.1 ; Lk. 9.22-27)

24Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.
25Pamba te, oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango ; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akozwa yango lisusu. 26Soki moto azwi mokili mobimba mpe abungisi elimo na ye, litombanini akozwa ? To eloko nini moto akoki kopesa mpo ete asomba elimo na ye ?

27Pamba te Mwana ya Moto akoya na kembo ya Tata na yeelongo na baanzelu na ye mpe akopesa na moto na moto lifuti oyo ekoki na mosala na ye. 28Nalobi na bino ya solo : bato mosusu bazali awa liboso ete bakufa, bakomona Mwana ya Moko koya kati na Bokonzi na ye.
Copyright information for LinMNB