Matthew 17

Nzoto ya Yesu ebongwani

(Mk. 9.2-9 ; Lk. 9.28-36)

1Sima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Piere, Zaki mpe Jean ndeko ya Zaki, amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi penza, epai bazalaki kaka bango moko. 2Bongo nzoto na ye ebongwanaki liboso na bango ; elongi na ye ekomaki kongengalokola moi mpe bilamba na ye ekomaki pembe makasi penza. 3Na mbala moko, Moyize na Eliya babimelaki bango mpe babandaki kosolola na Yesu.

4Bongo Piere alobaki na Yesu :

—Nkolo, ezali malamu tozala na biso awa ; soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo, moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya !

5Na tango azalaki naino koloba, lipata moko ezalaki kongengaezipaki bango, mpe mongongo ewutaki na lipata elobaki :

—Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi ; boyokelaka ye !

6Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi na nse, mpe kobanga ekotelaki bango.

7Kasi Yesu ayaki, asimbaki bango mpe alobaki :

—Botelema, bobanga te !

8Mpe tango batombolaki miso, bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu ye moko.

9Awa bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango motindo oyo :

—Makambo oyo bomoni boloba yango na moto te, kino tango Mwanaya moto akosekwa kati na bakufi.

(Mk. 9.10-13)

10Bongo bayekoli batunaki ye :

—Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaki ete esengeli Eliya aya liboso ?

11Yesu azongisaki :

—Solo, Eliya akoya, mpe akobongisa makambo nyono.
12Kasi ngai nalobi na bino : Eliya asiʼayaki mpe bayebaki ye te ; kasi basalaki ye makambo nyonso ndenge bango moko balingaki. Ndenge moko mpe ndenge bakoyiokola Mwana ya moto.

13Bongo bayekoli basosolaki ete alobelaki bango mpo na Jean Batiste.

Yesu abikisi mwana oyo azalaki na molimo mabe

(Mk. 9.14-29 ; Lk. 9.37-43)

14Tango bakomaki epai ebele ya bato bazalaki ; moto moko apusanaki pene-pene ya Yesu, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki :

15—Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali konyokwama mingi penza. Mbala mingi akweyaka na moto to na mayi. 16Namemaki ye epai ya bayekoli na yo ; kasi bango bakoki te kobikisa ye !

17Yesu azongisaki :

—Libota ya bato mabe mpe ezangi kondima ! kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga lisusu motema mpo na bino ? Bomemela ngai ye awa !

18Yesu agangelaki molimo mabe, mpe yango ebimaki na mwana. Kaka na tango wana, mwana abikaki.

19Sima bayekoli bayaki epai ya Yesu bango moko kaka, mpe batunaki ye :

—Mpo na nini tokokaki te kobengana molimo wana ?

20Yesu azongiselaki bango :

—Mpo bozali na kondima moke. Nalobi na bino ya solo, soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, mbele bokoki koloba na ngombaoyo : “Longwa awa, kende kuna !” Yango ekolongwa ; mpe eloko moko tebokokaki kolemba kosala.
21[Kasi molimo ya ndenge oyo, ebimaka kaka na mabondeli mpe na koboya kolia mpo na mabondeli
Verset oyo ezali te na mikanda misusu ya kala.
.]

Yesu alobeli lisusu liwa mpe kosekwa na ye

(Mk. 9.30-32 ; Lk. 9.43-45)

22Tango bayaki elongo na Galileya, Yesu alobaki na bango :

—Bakoteka Mwana ya moto na maboko ya bato,
23mpe bakoboma ye. Kasi akosekwa na mokolo ya misato.

Bongo bayekoli bayokaki mawa mingi penza.

Yesu afuti mpako ya Ndako ya Nzambe

24Tango bakomaki na Kapenawumi, bato oyo bafutisaka mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Piere, mpe batunaki :

—Boni, Moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?

25Piere azongisaki :

—E e, afutaka !

Tango Piere akotaki na Ndako, Yesu azwaki maloba liboso mpe atunaki ye :

—Simon okanisi nini ? Bakonzi ya mokili bafutisaka bampako na banani ? Na bana na bango to na bato mosusu ?

26Piere azongisaki :

—Na bato mosusu !

Bongo Yesu alobaki na ye :

—Soki boye, bana-mboka basengeli kofuta te.
27Kasi mpo tobetisa bango mabaku te, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi, mpe kamata mbisi ya liboso oyo okokanga ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo ya ebende. Kamata yango, mpe pesa bango yango mpo na kofuta mpako na ngai na oyo ya yo.
Copyright information for LinMNB