Matthew 23

Yesu apameli bakonzi ya banganga Nzambe

(Mk. 12.38-40 ; Lk. 11.39-52 ; 20.45-47)

1Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na ye :

2—Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo mosala na bango kaka kolimbolela bato Mibeko ya Moyize. 3Esengeli botosa bango mpe bosala makambo nyonso oyo bakoloba na bino. Kasi bosala te oyo bango basalaka, pamba te oyo bateyaka, basalaka yango te.

4Bakangaka maboke ya kilo penza mpe batiaka yango na mapeka ya bato ; kasi bango moko basimbaka yango te ata na songe ya mosapi. 5Misala nyonso basalaka, basalaka yango kaka mpo bato bamona bango. Pamba te, bayeyisaka mwa basanduku na bango oyo ekomama mibeko minene, mpe bakomisaka basonge ya banzambala na bango milayi
verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
.

6Na bafeti, balingaka kaka bisika ya kitoko, mpe na Ndako ya mayangani bisika ya lokumu. 7Balingaka bapesa bango mbote na bazando mpe bato babenga bango : “Moteyi”.

8Kasi bino, bondima te ete babenga bino : “Moteyi”. Pamba te, bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. 9Mpe bobenga moto moko te awa na mokili : “Tata”, pamba te bozali na Tata kaka moko, oyo azali na Likolo. 10Bolinga te ete babenga bino : “Bakonzi”. Pamba te, bozali na Mokonzi kaka moko : Kristo.

11Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino. 12Pamba te moto oyo akomimatisa bakokitisa ye, mpe oyo akomikitisa bakomatisa ye.

13—Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Bokangelaka bato nzela ya Bokonzi ya Likolo, pamba te, bino moko mpe bokotaka te, mpe botikaka nzela te na baoyo balingi kokotampo bakota.

14[Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosaka ! Bobotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali ; mpe mpo na kokosana, bosalaka mabondeli ya milayi-milayi. Yango wana, bokozwa etumbu oyo eleki monene
Verset oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
 !]

15Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa ata mopaya moko oyo akondima kokota na lisanga na bino ; mpe soki bozwi ye, bokomisaka yemoto ya lifelo mbala mibale koleka kutu bino moko.

16Mawa na bino, batambusi bakufa miso ! Bino bolobaka ete : Soki moto alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya wolo ya Ndako ya Nzambe, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye. 17Bazoba ! Bato bakufa miso ! Eloko nini eleki na tina, wolo to Ndako ya Nzambe oyo ekomisaka wolo bosantu ? 18Bolobaka lisusu ete : soki moto alapi ndayi na kombo ya mesa oyobatumbelaka Nzambe makabo, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali likolo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye ! 19Bato bakufa miso ! Eloko nini eleki na tina, likabo to mesa oyo ekomisi likabo bosantu ? 20Pamba te, moto oyo alapi ndayi na kombo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, alapi yango na kombo ya mesa mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali likolo na yango. 21Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, alapi yango na kombo ya Ndako ya Nzambe mpe na kombo ya moto oyo afandaka kuna. 22Mpe oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo, alapi yango na kombo ya Kiti ya Nzambe mpe na kombo ya Nzambe oyo afandi likolo na yango.

23Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Bopesaka makabo ya eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi botiolaka makambo oyo eleki tina oyo ya Mibeko ; lokola : bosembo, mawa, mpe bosolo
Bosolo  : ndimbola mosusu : Kondima.
. Esengeli bokokisakamakambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana.

24Batambusi bakufa miso ! Bolongolaka mwa ngungi oyo ekotaka na mayi oyo bomelaka, kasi bodundaka shamo.

25Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Bosukolaka na malamu penza libanda ya bakopo mpe ya basani na bino, kasi na kati na yango, etondi na bosoto ya misala na bino ya moyibi mpe na posa ya mabe. 26Bafarizeo bakufa miso ! Bosukola liboso kati ya kopo mpe ya sani, bongo ekokoma peto kino na libanda.

27Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Pamba te, bozali lokola malita oyo bapakola kulele ya pembe, na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondi na mikuwa ya bato bakufa mpe na biloko ya kopola ya ndenge na ndenge. 28Bino mpe ndenge moko, na libanda bozali komonana bato malamu, kasi na kati botondi na makambo ya lokuta mpe ya mabe !

29Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo ! Bato ya kokosana ! Botongaka malita ya kitoko mpo na baprofeta mpe bobongisaka malita ya bato na sembo ; 30mpe bolobaka : “Soki tozalaki na tango ya bakoko na biso, mbele tokokaki kosangana na bango te mpo na koboma baprofeta !” 31Na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali bana ya bato oyobabomaki baprofeta ! 32Bosilisa mosala oyo batata na bino babandaki.

33Bino banioka ! Bana ya banioka ! Bokokima ndenge nini etumbu ya lifelo ? 34Yango wana, nakotindela bino baprofeta, bato ya mayele mpe balakisi ya Mibeko : bokoboma basusu, bokobaka basusu na ba-ekulusu, bokobeta basusu fimbo na bandako na bino ya mayangani, mpe bokonyokola bango na vile moko na moko. 35Yango wana, makila ya bato na sembo nyonso oyo baboma, ekokweya likolo na bino : banda na Abele moto na sembo, kino na Zakaria mwana ya Baraki oyo bobomaki kati na Ndako ya Nzambe mpe esika oyo batumbelaka Nzambe makabo.

36Nalobi na bino ya solo : etumbu ya makambo nyonso wana ekokweyila bato ya tango oyo !

Yesu aleli mpo na Yeruzalem

(Lk. 13.34-35)

37—A a Yeruzalem ! Yeruzalem ! yo moto obomaka baprofeta mpe obomaka na mabanga bato oyo batindelaka yo ! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo ndenge soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye, kasi olingaki te. 38Tala, ndako na yo ekotikala pamba.

39Yango wana nalobi na bino : bokomona ngai lisusu te kino tangobokoloba : Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo !
Copyright information for LinMNB