Matthew 25

Lisapo ya bilenge basi zomi

1—Na mokolo wana, Bokonzi ya Likolo ekozala lokola bilenge basi zomi oyo bakamataki minda na bango mpo na kokende kokutana na mobali oyo akobala. 2Na kati na bango, mitano bazalaki bazoba mpe mitano bazalaki mayele. 3Baoyo ya zoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te. 4Kasi baoyo ya mayele bakamataki minda mpe mafuta mosusu na milangi.

5Lokola mobali oyo azalaki kobala ayaki noki te, bango nyonso bayokaki pongi mpe balalaki. 6Na midi ya butu, mongongo moko egangaki :

“Mobali aye ! Bokende kokutana na ye !”

7Bongo, bilenge basi balamukaki mpe babandaki kobongisa mindana bango. 8Bilenge basi oyo ya zoba balobaki na baoyo ya mayele :

“Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso elingikokufa !”
9Kasi baoyo ya mayele bazongisaki :

“Ekokoka te mpo na biso na bino. Bokende epai ya baoyo batekaka mafuta mpe bosomba oyo ya bino.”

10Tango bakendaki kosomba mafuta, mobali ayaki. Bongo baoyo bamilengelaki, bakotaki na ye na esika ya feti ya libala, mpe bakangaki porte.

11Na sima, baoyo mosusu mpe bayaki. Balobaki :

“Nkolo, nkolo, fungolela biso !”

12Kasi azongisaki :

“Nalobi na bino ya solo, nayebi bino te.”

13Yango wana bokengela, Pamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.

Lisapo ya mbongo ya mombongo

(Lk. 19.12-27)

14—Ekozala lisusu lokola moto moko azalaki kokende mobembo. Abengaki basali na ye mpe apesaki bango biloko na ye. 15Apesaki na moko batalenta mitano, na oyo mosusu batalentamibale, mpe na oyo mosusu talenta moko ; moto na moto na ndenge oyo ekoki na makoki na ye. Bongo akendaki na mobembo. 16Moto oyo azwaki batalenta mitano, akendaki noki kosala na yango mombongo, bongo azwaki benefisi ya batalenta mitano mosusu na likolo na yango. 17Moto oyo azwaki batalenta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mpeazwaki benefisi ya batalenta mibale mosusu. 18Kasi moto oyo azwaki kaka talenta moko, atimolaki libulu na mabele, mpe abombaki mbongo ya mokonzi na ye.

19Sima ya mikolo ebele, mokonzi ya basali wana azongaki, mpe atunaki bango bayebisa ye ndenge basalelaki mbongo na ye.

20Moto oyo azwaki batalenta mitano amemaki batalenta mitano mosusu. Alobaki :

“Mokonzi, opesaki ngai batalenta mitano ; tala, nazwi benefisi ya batalenta mitano mosusu !”

21Mokonzi na ye azongisaki : “Malamu, ozali mosali malamu mpe ya sembo ; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotala biloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo !”

22Oyo azwaki batalenta mibale, ayaki mpe alobaki :

“Mokonzi, opesaki ngai batalenta mibale ; tala, nazwi benefisi ya batalenta mibale mosusu !”

23Mokonzi azongisaki : “Malamu, mosali malamu mpe ya sembo ; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotalabiloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo !”

24Bongo, oyo azwaki talenta moko ayaki mpe alobaki :

“Mokonzi, nayebaki ete ozali moto ya motema makasi, mpo obukaka mbuma na elanga oyo olonaka te, mpe olongolaka epai yo obwakaka mbuma te.
25Nabangaki mingi penza, yango wana nakendaki mpe nabombakibalenta na yo na nse ya mabele. Tala, kamata oyo ezali yo yo !”

26Mokonzi na ye azongisaki :

“Mosali mabe mpe ya goigoi ! Oyebaki ete nabukaka mbuma na elangaoyo nalonaka te, mpe nalongolaka epai ngai nabwakaka mbuma te ;
27ebongaki malamu opesa mbongo na ngai epai ya babombi-mosolo, mpe tango nalingaki kozonga, nalingaki kozwa oyo ezali ya ngai, elongo na benefisi likolo. 28Bobotola ye talenta wana mpe bopesa yango na moto oyo azali na batalenta zomi.”

29Pamba te, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye, mpe akotonda na yango ; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 30Bongo bobwaka mosali oyo azangi tina na molili ya libanda ; epai ekozala kolela mpe koswa mino.

Kosambisama ya suka

31—Tango Mwana ya moto akoya kati na nkembo na ye, elongo na baanzelu nyonso, akovanda na Kiti na ye ya nkembo. 32Bato nyonso ya mokili bakosangana liboso na ye. Akokabola bangondenge mobokoli akabolaka bameme na bantaba ; 33akotia bameme na loboko na ye ya mobali, mpe bantaba na loboko na ye ya mwasi. 34Bongo mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na loboko na ye ya mobali :

“Boya, bino bato Tata na ngai apambola, bozwa Bokonzi oyo babongisela bino, banda mokili esalama.
35Pamba te, nanyokwamaki na nzala, mpe bopesaki ngai biloko ya kolia ; nazalaki na posa ya mayi, mpe bopesaki ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai ; 36nazangaki bilamba ya kolata, mpe bopesaki ngai ; nazalaki malade, mpe boyaki kotala ngai ; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala ngai !”

37Bongo bato na sembo bakozongisela ye :

“Nkolo, tango nini tomonaki yo ozalaki na nzala, mpe topesaki yo biloko ya kolia ? To ozalaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela ?
38Tango nini tomonaki yo ozalaki mopaya mpe toyambaki yo, to ozangaki bilamba, mpe tolatisaki yo ? 39Tango nini tomonaki yo ozalaki na maladi to na boloko, mpe toyakikotala yo ?”

40Kasi Mokonzi akozongisela bango :

“Nalobi na bino ya solo, mbala nyonso bosalaki yango ata na motomoko na kati ya bandeko na ngai oyo ya mike, boyeba ete bosalaki yango na ngai.”

41Bongo akoloba na bato oyo bakozala na loboko na ye ya mwasi :

“Bolongwa na miso na ngai, bino bato bolakelama mabe. Bokende na moto oyo ekufaka te, oyo ebongisama mpo na zabolo mpe mpo na baanzelu na ye.
42Pamba te, nazalaki na nzala, kasi bopesaki ngai biloko ya kolia te ; nazalaki na posa ya mayi, kasi bopesaki ngai mayi ya komela te ; 43nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai te ; nazangaki bilamba, kasi bolatisaki ngai te ; nazalaki maladi mpe nakotaki boloko, kasi boyaki kotala ngai te !”

44Bongo, bango bakozongisela ye :

“Nkolo, tango nini tomonaki yo ozalaki konyokwama na nzala, to na posa ya mayi, to ozalaki mopaya, to ozangaki bilamba, to ozalaki maladi mpe okotaki boloko, bongo tosalisaki yo te ?”

45Bongo ye akozongisela bango :

“Nalobi na bino ya solo, mbala nyonso bosalaki yango te ata na moto moko na kati ya bato oyo ya mike, boyeba ete bosalaki yango te epai na ngai.”

46Bongo bakozwa etumbu ya seko, kasi bato sembo bakozwa bomoi ya seko.
Copyright information for LinMNB