Matthew 26

LIWA MPE LISEKWA YA YESU

Bakani koboma Yesu

(Mk. 14.1-2 ; Lk. 22.1-2 ; Jn. 11.47-53)

1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, alobaki na bayekoli na ye :

2—Boyebi ete feti ya Paki etikali mikolo mibale mpo ebanda, mpe Mwana ya moto bakoteka ye mpo babaka ye na ekulusu.

3Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo basanganaki na ndako ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe ; 4bayokanaki mpo na kokanga Yesu na mayele, mpe baboma ye.

5Kasi balobaki :

—Tosala yango na tango ya feti te, mpo bato batomboka te.

Basopeli Yesu malasi na Betaniya

(Mk. 14.3-9 ; Jn. 12.1-8)

6Tango Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba, 7mwasi moko azalaki na molangi ya Albatre
Albatre  : libanga oyo bazalaki kosalela basani ya mbele, bakopo mpe biloko mosusu.
, oyo ezalaki ya kotonda na malasi ya motuya mingi, ayaki epai na ye, mpe asopaki yango na motu na ye, na tango azalaki na mesa.

8Kasi bayekoli basilikaki tango bamonaki bongo, mpe balobaki :

—Mpo na nini kosala peleti ya boye ?
9Pamba te, malasi yango ekokaki kotekama na ntalo mingi penzampe kopesa mbongo na babola.

10Tango Yesu ayebaki yango, alobaki na bango :

—Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Pamba te, asaleli ngailikambo moko ya malamu.
11Babola, bokozala na bango elongo tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te. 12Pamba te, tango asopaki malasi oyo na nzoto na ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na ngai. 13Nalobi na bino ya solo : na mokili mobimba, esika nyonso oyo Sango Malamu oyo ekoteyama, bato bakobanda kolobela likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye !

Yuda ateki Yesu

(Mk. 14.10-11 ; Lk. 22.3-6)

14Bongo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo bazalaki kobenga Yuda Iskariote, akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe, 15mpe atunaki :

—Bokopesa ngai nini, soki natekeli bino Yesu ?

Bongo batangelaki ye bibende ntuku misato ya mbongo.
16Banda tango wana, Yuda azalaki koluka mwaye ya malamu mpo na koteka Yesu.

Yesu na bayekoli na ye balie bilei ya Pake

(Mk. 14.12-16 ; Lk. 22.7-13)

17Na mokolo ya liboso ya feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki :

—Epai wapi olingi tobongisela yo mpo na kolia bilei ya Pake ?

18Azongisaki :

—Bokende na vile, epai ya moto boye, mpe boloba ne ye : “Moteyi alobi : Tango na ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pake na bayekoli na ngai epai na yo.”

19Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pake.

(Mk. 14.17-21 ; Lk. 22.14 ; Jn. 13.21-30)

20Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa na bapostolo na yezomi na mibale. 21Awa bazalaki kolia, Yesu alobaki :

—Ya solo nalobi na bino : moto moko na kati na bino akoteka ngai.
22Bayokaki mawa mingi, mpe babandaki kotuna ye moko sima ya mosusu :

—Nkolo ezali ngai ?

23Yezu azongisaki :

—Moto oyo akoteka ngai, ezali oyo atie loboko na ye na sani elongo na ngai.
24Mwana ya moto akokufa ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya moto. Elingaki kozala malamu mpo na ye soki abotamaki te. 25Bongo Yuda oyo atekaki ye, atunaki mpe :

—Moteyi, ezali ngai ?

Yezu azongiselaki ye :

—E e, osili koloba yango.

(Mk. 14.22-25 ; Lk. 22.15-20 ; tala 1 Kor. 11.23-25)

26Tango bazalaki kolia, Yezu akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye ; mpe alobaki :

—Bokamata mpe bolia ; oyo ezali nzoto na ngai.
27Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi, mpe apesaki bango yango ; mpe alobaki :

—Bomela yango bino nyonso ;
28oyo ezali makila na ngai, makila ya Boyokani, oyo esopana mpo nabato ebele, mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. 29Nalobi na bino, nakomela lisusu vino oyo te, banda sikʼoyo kinomokolo nakomela yango na lolenge mosusu elongo na bino, na Bokonzi ya Tata na ngai.

Yesu ayebisi ete Piere akowangana ye

(Mk. 14.27-31 ; Lk. 22.33-34 ; Jn. 13.37-38)

30Sima ya koyemba banzembo, bakendaki na ngomba ya banzete ya olive. 31Bongo Yezu alobaki na bango :

—Na butu ya lelo, bino nyonso bokokweyisa kondima na bino mpo na ngai. Pamba te ekomama : Nakobeta mobateli,
mpe bameme ya etongo bakopalangana.

32Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya !

33Piere alobaki :

—Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango mpo na yo kasi ngai nakokweyisa yango te.
34Yezu azongiselaki ye :

—Nalobi na yo ya solo : na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowanganaa ngai mbala misato.
35Kasi Piere alobaki na ye :

—Atako soki nasengeli kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bongo bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.

Yesu abondeli na Getesemane

(Mk. 14.32-42 ; Lk. 22.39-46)

36Bongo Yesu akendaki elongo na bayekoli na ye na esika moko babengaka Getesemane ; mpe alobaki na bango :

—Bovanda awa, na tango ngai nakei kobondela kuna.
37Akamataki Piere na bana mibale ya Zebede, mpe abandaki koyokamawa mingi penza mpe pasi na motema. 38Bongo alobaki na bango :

—Elimo na ngai etondi na mawa mingi penza pene ya liwa. Botikalaawa, bokengela elongo na ngai.
39Akendaki mwa moke liboso, akweyaki elongi na nse, mpe abondelaki :

—Tata, soki ekoki kosalama, tika ete kopo oyo eleka mosika na ngai ! Esalama ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.
40Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango balali. Alobaki na Piere :

—Boni, bokokaki kokengela elongo na ngai ata ngonga moko te ?
41Bokengela mpe bobondela mpo bokweya na komekama te. Molimo ezalina mokano ya malamu kasi nzoto ezali na bolembu. 42Akendaki lisusu mbala ya mibale mpe abondelaki :

—E e ! Tata na ngai, soki ekoki kosalama te ete kopo oyo elekamosika na ngai, kasi esengeli kaka namela yango… tika ete mokano nayo esalama.
43Tango azongaki, akutaki bango balali lisusu, pamba te miso na bango ekomaki kilo mpo na pongi. 44Bongo atikaki bango mpe akendaki lisusu kobondela mpo na mbalaya misato ; mpe alobaki kaka maloba moko. 45Bongo azongaki epai ya bayekoli mpe alobaki na bango :

—Bozali naino kalala mpe kopema ? Botala, ngonga ekomi pene mpe Mwana ya moto bakabi ye na maboko ya batu ya masumu.
46Botelema, tokende. Moto oyo ateki ngai, akomi.

Bakangi Yesu

(Mk. 14.43-50 ; Lk. 22.47-53 ; Jn. 18.2-11)

47Tango azalaki naino koloba ; Yuda, moko na kati ya bapostolo zomina mibale, ayaki elongo na bato ebele, bamemaki mipanga na banzete. Bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo ya Bayuda nde bato batindaki bango. 48Moto oyo atekaki Yesu alakisaki bango elembo ; alobaki :

—Moto oyo ngai nakopesa beze, ye wana, bokanga ye.
49Na mbala moko, apusanaki pene-pene ya Yesu mpe alobaki na ye :

—Mbote Moteyi ! Bongo apesaki ye beze.
50Yesu alobaki na ye :

—Moninga na ngai, sala likambo oyo oyeli. Bongo basusu bayaki pene-pene na ye, basimbaki Yesu, mpe bakangaki ye.
51Moko na kati ya bato oyo bazalaki na Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzaambempe akataki ye litoyi. 52Kasi Yesu alobaki na ye :

—Zongisa mopanga na yo na esika na yango ; pamba te bato nyonsooyo bakamataka mopanga, bakokufa mpe na mopanga.
53Okanisi ete nakoki kobenga Tata na ngai te, mpe ye akokikotindela ngai na mbala moko te mapinga
mapinga  : Na tango ya bato ya Roma, lipinga moko ezalaki na basode nkoto motoba (6.000).
ya baanzelu koleka zomi namibale ?
54Bongo ndenge nini Makomi ekokokisama, oyo ezali koloba eteesengeli makambo yango esalama bongo ? 55Na tango wana, Yesu alobaki na ebele ya bato :

—Boni, nakomi moyibi, mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzetena maboko ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambempo na koteya, mpe bokangaki ngai te !
56Kasi nyonso oyo esalami, mpo ete Makomi ya baprofeta ekokisama ! Bongo bayekoli nyonso batikaki ye mpe bakimaki.

Basambisi Yesu liboso ya likita monene

(Mk. 14.53-65 ; Lk. 22.54-55 ; Jn. 18.12-14,19-23)

57Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya Kayifa, mokonzi ya banganga Nzambe, epai balakisi ya Mibeko mpe bampaka basanganaki. 58Kasi Piere azalaki kolanda ye na mosika kino na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Akotaki na lopango, mpe avandaki elongona bakengeli mpo na kotala soki makambo yango ekosuka ndenge nini. 59Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita moneneya Bayuda, bazalaki koluka litatoli ya lokuta mpo na Yesu, mpo etebakoka koboma ye. 60Atako batemwe ya lokuta bayaki mingi, kasi bazwaki ata moko te. Na sima, bato mibale bayaki, 61mpe balobaki :

—Moto oyo alobaki : “Nakoki koboma Ndako ya Nzambe mpe kotongayango lisusu na mikolo misato”
62Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu :

—Ozali na likambo ya kozongisa te ? Litatoli nini bato oyobazali koloba mpo na yo ?
63Kasi Yesu azongisaki eloko moto te. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe alobaki na ye :

—Nazali kolapisa yo ndayi na kombo ya Nzambe ya bomoi : yebisabiso soki ozali Kristo, Mwana ya Nzambe !
64Yesu azongisaki :

—E e, ezali bongo ndenge olobi. Kasi nalobi na bino : Bandasikʼoyo, bokomona Mwana na Moto akovanda na loboko ya oyo aleki na nguya mpeakoya na mapata ya likolo !
65Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe, apasolaki bilamba na ye, mpealobaki :

—Atioli Nzambe ! Tina nini toluka lisusu batemwe ? Boyoki bino moko ndenge atioli Nzambe !
66Bongo bokanisi nini ? Bazongisaki :

—Akoki na liwa !
67Bongo, babwakelaki ye soyi na elongi mpe babetaki ye makofi. Basusu babetaki ye bambata 68mpe balokabi :

—Kristo, sakolele biso, nani abeti yo ?

Piere awangani Yesu

(Mk. 14.66-72 ; Lk. 22.56-62 ; Jn. 18.15-18,25-27)

69Na tango wana, Piere avandaki libanda, na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayaki epai na ye, mpe alobaki :

—Yo mpe ozalaki na Yesu ya Galileya.
70Kasi Piere awanganaki na miso ya bato nyonso :

—Nayebi kutu te makambo ozali koloba !
71Tango azalaki kokende epai porte ezalaki, mosali mosusu ya mwasiamonaki ye, mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana :

—Moto oyo azalaki na Yesu ya Nazareti.
72Piere awanganaki lisusu mpe alapaki ndayi :

—Nayebi moto wana te !
73Sima ya mwa tango moke, bato oyo batelamaki wana, bayaki pene-pene ya Piere mpe balobaki na ye :

—Ya solo, yo mpe ozali moko ya bato wana, pamba te elobeli nayo ezali kofunda yo !
74Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndayi :

—Nayebi moto wana te. Kaka na tango wana, soso elelaki.

75Bongo Piere akanisaki maloba oyo Yesu alobaki : “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato.” Abimaki libanda mpe alelaki mingi.
Copyright information for LinMNB