Matthew 27

(Mk. 15.1 ; Lk. 23.1 ; Jn. 18.28)

1Tango tongo etanaki, bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso nabankolo ya bayuda basanganaki mpo na kobomisa Yesu. 2Bakangaki ye basinga, bamemami ye mpe bapesaki ye na mabokoya guvelenele Pilato.

Yuda amidiembiki

(Mis. 1.18-19)

3Yuda oyo atekaki Yesu, tango amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema, mpe akendaki kozongisa mbongo ya bibendentuku misato wana na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na bampaka. 4Bongo alobaki na bango :

—Nasali lisumu mpo nateki moto oyo azangi likambo ! Kasi bango bazongisaki :

—Etali biso te ! Etali yo moko !
5Yuda abwakaki mbongo yango na Ndako ya Nzambe, mpe alongwaki wana ; akendaki mpe amidiembikaki. 6Bakonzi ya banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki :

—Mibeko epesi nzela te mpo na kotia yango na kesi ya makabo, pamba te yango ezali mbongo ya makila !
7Sima ya kosala likita, basombaki na mbongo yango “elanga ya mosaliya bazungu ya mabele” mpo na bakomisa yango simitiele ya kokunda bapaya. 8Yango wana kino lelo oyo, elanga yango babengaka yango : “Elanga ya makila !” 9Na ndenge wana nde maloba ya moprofeta Jeremi ekokisamaki :

Bakamataki mbongo ya bibende ntuku misato, talo oyo bato ya Isayele bakataki mpo na ye ;

10

mpe basombaki na yango elanga ya moto oyo asalaka banzungu ya mabele, ndenge Nkolo atindaki ngai !

Yesu asambi liboso ya Pilato

(Mt. 15.1-15 ; Lk. 23.1-5 ; Jn. 18.29-40 ; 19.4-16)

11Yesu atelemaki liboso ya guvelenele ; mpe guvelenele atunaki ye :

—Ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki :

—E e, ezali bongo, ndenge olobi !
12Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo ya Bayuda bazalaki kofunda ye, ye azongisaki ata liloba moko te. 13Bongo Pilato atunaki ye :

—Ozali koyoka te makambo bango bazali kofundela yo ?
14Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te. Yango wana, guveleneleakamwaki mingi penza. 15Guvelenele azalaki na momesano, ete na tango ya Feti azalakikobimisa moto moko ya boloko oyo bato bango moko bazalaki kopona. 16Na tango wana, moto moko azalaki na boloko, ayebanaki mingi, kombo na ye Barnabas. 17Tango ebele ya bato basanganaki, Pilato atunaki bango :

—Bolingi natikela bino nani ? Barnabas to Yesu oyo babengaka Kristo ?
18Pamba te, ayebaki ete batekaki Yesu epai na ye kaka mpo nalikunia. 19Tango avandaki na kiti na ye oyo azalaki kokatela makambo, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo :

—Kokota te na makambo ya moto na sembo wana. Pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi na ndoto mpo na ye.
20Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo, bandimisaki ebeleya bato mpo basenga Barnabas mpe baboma Yesu. 21Guvelenele atunaki bango lisusu :

—Na kati na bango mibale, bolingi natikela bino nani ? Bango bazongisaki :

—Baranabas.
22Pilato atunaki bango :

—Bongo Yesu oyo babengaka Kristo, nasala ye nini ? Bango nyonso bazongisaki :

—Baka ye na ekulusu !
23Pilato atunaki :

—Mabe nini ye asali ? Kasi bagangaki lisusu makasi penza :

—Baka ye na ekulusu !
24Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpemobulu ebandaki kobima, akamataki mayi, asukolaki maboko liboso ya ebele ya bato mpe alobaki :

—Ngambo ya makila ya moto oyo etali ngai te, kasi etali bino !
25Bato nyonso, bazongisaki :

—Tika ete ngambo ya makila na ye ezala likolo na biso mpe ya bana na biso !
26Bongo Pilato atikelaki bango Barnabas. Kasi mpo na Yesu, sima yakobetisa ye bafimbo, akabaki ye na maboko na bango mpo babaka ye naekulusu.

Basoda basakani na Yesu

(Mk. 15.16-20 ; Lk. 23.11 ; Jn. 19.2-3)

27Basoda ya Guvelenele bamemaki Yesu na ndako ya Guvelenele, mpebatiaki ye na kati-kati na bongo nyonso. 28Balongolaki ye bilamba mpe balatisaki ye nzambala ya motane. 29Sima, balatisaki ye ekoti moko ya bokonzi, kasi basalaki yango na nzuba. Basimbisaki ye nzete na loboko na ye ya mobali, babandaki kofukamela ye mpe kosakana na ye ; bazalaki koloba :

—Mbote, mokonzi ya Bayuda !
30Bazalaki kobwakela ye soyi ; bakamataki nzete mpe bazalaki kobeta ye yango na motu. 31Sima ya kosilisa kosakana na ye, balongolaki ye nzambala mpe balatisaki ye bilamba na ye, bongo bamemaki ye mpo na kobaka ye na ekulusu.

Liwa ya Yesu

(Mk. 15.21-32 ; Lk. 23.26-43 ; Jn. 19.17-22)

32Tango babimaki na vile, bakutanaki na moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, mpe batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. 33Bakomaki na esika moko babengaka Golgota (elingi koloba : “Esikaya mokuwa ya motu”). 34Mpe kuna, bapesaki Yesu vino oyo basangisa na makasa ya bololo. Kasi tango amekaki, aboyaki komela yango. 35Tango basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba naye sima ya kobetela yango zeke. 36Bongo bavandaki wana mpo na kokengela ye. 37Babambaki na ekulusu, na likolo na motu na ye, mwa libaya mokompo na kolakisa tina oyo babomelaki ye ; bakomaki boye : “Oyo Yesu, mokonzi ya Bayuda !” 38Babakaki mpe miyibi mibale na ba-ekulusu elongo na ye : moko naloboko ya mobali mpe mosusu na loboko ya mwasi. 39Bato oyo bazalaki koleka wana, bazalaki kofinga ye, koningisa mitu 40mpe koloba :

—Yo moto obomaka Ndako ya Nzambe mpe atongaka yango na mikolo misato, mibikisa yo moko. Soki ozali Mwana ya Nzambe, kita na ekulusu !
41Ndenge moko mpe bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko mpebankolo ya Bayuda bazalaki kosakana na ye, mpe koloba :

42—Abikisaki bato mosusu, akoki komibikisa te ! Soki azali mokonziya Isayele akita sikʼoyo na ekulusu, bongo tokondima ye. 43Atiaka elikya na ye na Nzambe ; Nzambe akangola ye sikʼoyo, soki alinga ye. Pamba te, azalaki koloba : “Nazali Mwana ya Nzambe !” 44Ndenge moko mpe, miyibi oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na ye, bazalaki mpe kofinga ye.

(Mk. 15.33-41 ; Lk. 23.44-49 ; Jn. 12.25-30)

45Mokili mobimba ekomaki molili, banda na ngonga ya midi kino nangonga misato ya pokwa. 46Pene-Pene na ngonga ya misato, Yesu agangaki na mongongo makasi :

—Eli, Eli, lama sabakatani ? Elingi koloba : Nzambe na ngai, Nzambena ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai ?

47Bato mosusu oyo batelemaki wana, tango bayokaki bongo, balobaki :

—Azali kobenga Eliya !
48Bongo moko na kati na bango akimaki mbango, akamataki eponze, atondisaki yango na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya nzete, mpeapesaki Yesu mpo amela. 49Kasi basusu bazalaki koloba :

—Tika totala, soki Eliya akoya kobikisa ye !
50Bongo Yesu agangaki lisusu makasi mpe azongisaki molimo na ye. 51Kaka na tango wana, rido ya ndako ya Nzambe epasukaki na bitenimibale, kobanda na likolo kino na nse. Mokili eninganaki, mabanga epasukaki, 52malita efungwamaki ; mpe basantu mingi oyo bakufa, basekwaki ; 53babimaki na malita, mpe sima ya kosekwa ya Yesu, bakotakina vile ya bosantu mpe bato mingi bamonaki bango. 54Mokonzi ya basoda ya Roma, na baoyo bazalaki na ye elongo, baoyobazalaki kokengela Yesu, tango bamonaki ndenge mokili eninganaki namakambo nyonso oyo esalamaki, bayokaki somo mingi penza mpe balobaki :

—Ya solo, azalaki Mwana ya Nzambe !
55Basi mingi mpe bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; ezalibaoyo balandaki Yesu banda na Galileya mpo na kosalela ye. 56Na kati na basi yango, ezalaki : Mariya ya Magadala, Mariya mama ya Zaki mpe Zozefi, mpe mama ya bana ya Zebede.

Bakundi Yesu

(Mk. 15.42-47 ; Lk. 23.50-56 ; Jn. 19.38-42)

57Tango pokwa ekomaki, moto moko ya mbongo mingi kombo na ye Zozefiayaki. Ye azalaki moto ya mboka Arimate mpe azalaki moyekoli ya Yesu. 58Akendaki epai ya Pilato mpe asengaki nzoto ya Yesu. Bongo Pilatoatindaki bapesa ye yango. 59Zozefi azwaki nzoto, alingaki yango na elamba ya peto, 60mpe akotisaki yango na lilita na ye ya sika oyo atobolaki na katiya libanga. Bongo apusaki libanga moko ya monene liboso ya porte ya lilita, bongo azongaki na ye. 61Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu bavandaki wana, liboso yalilita. 62Mokolo oyo elandaki, sima ya mokolo ya komilengela, bakonzi yabanganga-Nzambe mpe bafarizeo bakendaki epai ya Pilato. 63Balobaki :

—Mokonzi, tozali koyeba ete tango moto wana ya lokuta azalaki nabomoi, alobaki : “Nakosekwa sima ya mikolo misato !”
64Yango wana, tinda bato bakengela lilita yango malamu kino na mokoloya misato ; soki te bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto na ye, bongo na sima bakoloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Ya solo, lokuta wana ekoleka oyo ya liboso na mabe ! 65Pilato azongisaki :

—Bozwa bakengeli ; bokende kokengela lilita na ndenge bolingi !
66Bongo bakendaki, bakangaki lilita malamu, batiaki elembo na libangampe batikaki bakengeli.
Copyright information for LinMNB