Matthew 5

Yesu ateyi likolo ya ngomba

(Mk. 3.13 ; Lk. 6.12-13,20)

1Tango Yesu amonaki bato ebele, amataki likolo ya ngomba mpeavandaki ; bongo bayekoli na ye bayaki epai ye azalaki. 2Mpe abandaki koteya bango :

3—Esengo na baoyo bazali babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.

4Esengo na baoyo bazali kolela, pamba te bakobondisa bango !

5Esengo na bato ya boboto, pamba te bakozwa mokili ndenge Nzambe alakaki bango !

6Esengo na baoyo bazali na nzala mpe posa ya bosembo, pamba te bakotondisa bango.

7Esengo na bato ya mitema mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa.

8Esengo na bato ya mitema peto, pamba te bakomona Nzambe.

9Esengo na bato oyo balukaka kotia kimia, pamba te bakobenga bango bana ya Nzambe.

10Esengo na baoyo baniokwamaka mpo na bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.

11Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai.

12Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo.

Mungwa mpe mwinda

(Mk. 9.50 ; 4.24 ; Lk. 14.34-35)

13—Bino bozali mungwa ya mokili. Soki mungwa ebungisi elengi na yango, bakozongisa yango lisusu elengi na nini ? Mungwa yango ekozala lisusu malamu mpo na eloko moko te ; bakobwaka yango libanda mpe bato bakoniata-niata yango.

14Bino bozali mwinda ya mokili, mboka oyo ezali likolo ya ngomba, yango ekoki kobombama te. 15Mpe bapelisaka mwinda te mpo na kotia yango na nse ya katini, kasi na likolo ya eloko oyo batiela muinda mpo engengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako. 16Yango wana, mwinda na bino esengeli engenga ndenge wana liboso ya bato, mpo bamona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likolo.

Yesu mpe Mibeko

17Bokanisa te ete ngai naye mpo na kolongola Mibeko to mpe mateya ya baprofeta ; naye mpo na kolongola yango te, kasi mpo na kokokisa yango. 18Nalobi na bino ya solo, kino likolo mpe nse ekoleka, ata likomi moko te ya moke, ata oyo ya moke penza ekolongwa na Mibeko kino tangomakambo nyonso ekokisama.

19Yango wana, moto oyo akoboya kotosa moko ya Mibeko oyo, ata oyoeleki moke, mpe akolakisa bato mosusu basala bongo, akobengama moto moke na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akolakisa Mibeko yango na bato mosusu mpe akotosa yango, akobengama moto monene na Bokonzi ya Likolo !

20Pamba te nayebisi bino, soki bosembo na bino eleki ya bafalizeompe balakisi ya Mibeko te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.

Kofinga te mpe kokangela moninga kanda te

(Mk. 11.25 ; Lk. 12.25-59)

21Boyokaki ete balobaki na bakoko na biso : “Koboma moto te”. Mpe moto oyo akoboma moto, akosamba liboso ya bazuzi. 22Kasi ngai nalobi na bino : moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda, ekoki asamba liboso ya bazuzi. Moto oyo akofinga ndeko na ye : “Zoba” ; ekoki bamema ye liboso ya likita ya banganga-Nzambe mpo asamba. Mpe oyo akofinga ndeko na ye ; “Liboma !” ebongi babwaka ye na moto ye lifelo.

23Lisusu, soki otelemi liboso ya mesa ya makabo mpo na kopesa makabo, mpe okanisi na mbala moko ete ndeko na yo azali na likambo na yo, 24tika makabo na yo wana, liboso ya mesa, mpe kende naino koyokanana ndeko na yo ; bongo yaka kopesa makambo na yo.

25Soki moto azwi yo likambo, yokana na ye noki tango bozali naino na nzela, soki te akopesa yo na maboko ya zuzi, bongo zuzi akotinda yo epai ya polisi mpo atia yo na boloko. 26Nalobi na yo ya solo : okobima te, kino tango okosilisa kofuta likuta ya suka.

Kosala ekobo te

(Mt. 18.8-9 ; Mk. 9.43,47-48)

27—Boyokaki balobaki ete : “Kosala ekobo te !” 28Kasi ngai nalobi na bino, soki moto atali mwasi na miso oyo etonda na baposa ya mabe asiʼasali ekobo na ye na motema. 29Yango wana, soki liso na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika ! Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te. 30Soki mpe loboko na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, katayango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto, kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te.

(Mt. 19.7-9 ; Mk. 10.11-12 ; Lk. 16.18)

31—Balobaki lisusu ete : “Soki moto akabwani na mwasi na ye, esengeli apesa ye mokanda ya koboma libala.” 32Kasi ngai nalobi na bino : mobali oyo akabwani na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ya ekobo, ezali ye moto afungoleli mwasi yango nzela ya kosala kindumba. Oyo mpe abali mwasi balongola na libala, asali ekobo.

Kolapa ndayi te

33—Boyokaki lisusu balobaki na bakoko na biso : “Kobebisa te ndayi oyo olapaki ; bilaka oyo opesaki tango olapaki ndayi liboso ya Nkolo, esengeli okokisa yango.” 34Kasi ngai nalobi na bino : bolapaka ndayi te ; ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Nzambe ; 35ezala na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali esika Nzambe atiaka makolo na ye ; ezala na kombo ya Yeruzalem, pamba te yango ezali mboka ya Mokonzi monene. 36Kolapa mpe te na kombo ya motu na yo pamba te okoki kokomisaata suki moko te ya motu na yo pembe to mwindu.

37Kasi tika kaka ete “Ee !” na bino, ezala “Ee !” mpe “Te !” na bino, ezala kaka “Te !” Pamba te nyonso oyo ebakisamaka na likolo, ewutaka na molimo mabe.

Kozongisela moninga mabe te

(Lk. 6.29-30)

38—Boyokaki balobaki ete : “Soki moto atoboli liso ya moninga, ye mpe bakotobola oyo ya ye. Soki moto abuki lino ya moninga, ye mpe bakobuka oyo ya ye”. 39Kasi ngai nalobi na bino : botia tembe te na moto oyo alingi kosala bino mabe ; kutu soki moto abeti yo mbata na litama ya mobali, pesa ye mpe oyo mosusu. 40Soki moto alingi kofunda yo mpe kozwa simisi na yo, pesa ye mpe kazaka na yo. 41Soki moto atindi yo na makasi otambola kilometele moko, yotambola na ye bakilometele mibale. 42Pesa na moto asengi yo, mpe koboya te kodefisa moto oyo alingi kodefa epai na yo.

Bolinga banguna na bino

(Lk. 6.27-36)

43Bayokaki balobaki ete : “linga moninga na yo mpe yina monguna na yo”. 44Kasi ngai nalobi na bino : bolinga banguna na bino mpe bosambela mpo na baoyo banyokolaka bino ! 45Na ndenge wana nde, bokozala bana ya Tata na bino oyo azali na likolo. Pamba te, ye angengisaka moi na ye likolo ya bato ya malamu mpe likolo ya batu mabe ; anokisaka mbula na ye likolo ya bato na sembo mpe likolo ya bato oyo bazali sembo te. 46Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpaku basalaka mpe bongo te ? 47Soki bopesaka mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya kokamwa bosalaka ? Boni, bapakano basalaka mpe bongo te ? 48Yango wana, bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
Copyright information for LinMNB